Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 1/10 lok. 24
  • Mituna na batangi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna na batangi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Masolo mosusu
  • Nsukansuka babotaki mwana!
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Abalayama ná Sala​—Okoki komekola kondima na bango!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • “Elilingi” ya ntina mingi mpo na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Sara “Mama ya Bakonzi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 1/10 lok. 24

Mituna na batangi

◼ Mpo ete basaleli na Nzambe basengeli ‘kokokisa bamposa na bato na ndako na bango’, ndenge nini Abrahame abenganaki Agare mpe lsmaël, baoyo batelenganaki na esobe?

Esengeli mpenza ete basaleli na Nzambe bakokisa bamposa ya basangani na libota na bango baoyo bazali na bosenga; ezali mpe elembo ya bolingo oyo bazali komonisa bango. Mpo na yango, ntoma Paulo akomaki: “Soko moto nani akokokisa bamposa na bato na ye te mpe na koleka bato kati na ndako na ye moko te, asili koboya bindimeli mpe aleki mabe moto oyo azangi kondima.”​—1 Timoté 5:8.

Tokoki solo kondima ete etamboli na Abrahame etemelaki likanisi na toli oyo te ya Nzambe, mpamba te tata na mabota yango atangami lokola ndakisa mpo na kondima na ye ya sembo mpe abengami “moninga na Jéhovah”.​—Yakobo 2:23; Baebele 11:8-19.

Nzambe alakaki ete akopambola bato na nzela na libota na Abrahame. Sara, oyo azalaki ekomba mpe apusanaki na mbula, asengaki epai na Abrahame ete abotela ye mwana na mosaleli na ye ya mwasi moezipito Agare. Nsima na yango ntango Agare akomaki na zemi, abandaki kotiola mpenza Sara na boye ete afundamaki lokola moto na “mobulu”; azalaki na ezaleli mabe liboso na mwasi molingami na Abrahame. (Exode 23:1; 2 Samwele 22:49; Nzembo 11:5) Abrahame apesaki nzela na Sara ete apamela Agare oyo, mbala mosusu azwaki likanisi ya kozonga na Ezipito, akimaki na esobe. Lisolo elobi te ete akumbaki bilei. Yango emonisi ete akanisaki akozwa bilei mpe mai na nzela, na ndakisa epai na bafandi na esobe.​—Genese 12:1-3, 7; 16:1-6.

Anzelu moko abimelaki Agare mpe ayebisaki ye azonga epai na mbanda na ye, mpamba te akozala na bana mingi, mpe ‘loboko na mwana na ye. lsmaël, ekotemela bato nyonso’. (Genese 16:7-12) Mwa bambula na nsima, ekomaki ete lsmaël azalaki “koseka”, elingi koloba kofinga Isaka. Ezalaki bobele kowelana mpamba te kati na bandeko: Liloba na Nzambe elobi sikisiki ete “azalaki konyokola” libota oyo Nzambe alakaki epai na Abrahame. Ezali na ntina ete ekateli makasi ezwama.​—Genese 21:1-9; Bagalatia 4:29-31.

Jéhovah alobaki epai na Abrahame asala likambo oyo mwasi na ye asengaki ye mpe ‘abengana Agare mpe mwana na ye’. Ata asepelaki te ete Agare akenda na mwana na ye, Abrahame apesaki ye bilei. Na kokesana na mbala ya liboso, oyo Agare akumbaki ata eloko te, sikawa azwaki na maboko na Abrahame bilei—mpe mai. Tokoki kokanisa ete abungaki na nzela ”kati na esobe na Béer-Schéba”; yango wana bilei na ye esilaki liboso ete akoma na libulu na mai na régio yango. Ata bongo, akelelaki te mpo Abrahame azangaki kokokisa bamposa na ye, mpamba te bazwaki biloko bazalaki na yango mposa ata basalaki libunga oyo etindaki Abrahame ete abengana bango.​—Genese 21:10-21.

[Kart/​Elilingi na lokasa 24]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Mongala mokaoka ya Zin, lobwaku lokaoka na sud ya Beleseba

Mai monene

Mai na monana

Ngomba Karmel

Megido

Yelusaleme

Ebeloni

Beleseba

Negebe

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Based on a map copyrighted by Pictorial Archive (Near Eastern History) Est. and Survey of Israel

[Elilingi]

Wadi Zin, a dry river valley south of Beer-sheba

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto