Mabondeli masalemaki na ngomba Hiei—mazali komema na kimya ya mokili mobimba?
Libondeli ekotya kimya na mokili mobimba? “Libondeli yango moko ekotya kimya te. Ezali likambo ya petee te”. Wana ezali likanisi ya Gijun Sugitani, mobongisi moko ya likita mpo na libondeli oyo esalemaki na sanza ya août 1987 euti koleka na Japon. “Kasi nakanisi mpe ete tokoki kozwa kimya te kozanga libondeli.” Ezali mpe likanisi ya Bajapone 500 mpe bamonisi 24 oyo bautaki na bamboka ya bapaya mpo na koyangana na likita ya losambo oyo esalemaki na 1987 na Kyoto, na Japon.
Lingomba ya Buda Tendai elingaki ete likita yango mpo na libondeli etangama nzela moko na likita oyo esalemaki na Assise, na ltalie, mpe ete ekokana na bosepeli mpo na mbala ya 12 ya kosalema na lingomba na Enryakuji, na ngomba Hiei. Bamonisi na lingomba ya Buda, ya boklisto ya mokili oyo, ya confucianisme, ya hindu, ya Bayuda, ya islam, ya sikhisme mpe shintoïsme basambelaki na ngomba wana moto na moto na likelemba na ye. Likita yango ememaki mpenza na kimya mpo na mokili mobimba?
“Liboke na fololo”
Etai Yamacla, nganga-nzambe monene ya lingomba na Tendai mpe mokengeli na likita yango alobaki ete: “Likita yango ezali liboke na fololo. Fololo moko te ekobungisa lolenge na yango to nsolo na yango.” Alingaki koloba ete, lokola bafololo ekeseni kati na liboke moko, mangomba nyonso makoki kobatela bindimeli na yango ekeseni nzokande bazala se na bomoko mpo na mposa ya kotya kimya na mokili mobimba.
Kati na “bafololo” oyo ebendaki likebi mingi ezalaki Lingomba na katolike, emonisamaki na cardinal Francis Arinze mokambi ya sekretaria ya Vatican mpo na baoyo bazali baklisto te. Francis Arinze atangaki mokanda moko eutaki epai na pape elobaki ete “kimya ekoki kozwama te kozanga libondeli mpe na bokeseni na etumba oyo ekoki kobimisama se na mwa bato, kimya ezali kosenga boyokani mpe bomoko ya bato banso”, engebene Mainichi Daily News ya le 5 août 1987.
Soki kimya ya mokili mobimba ezali “kosenga boyokani mpe bomoko ya bato banso”, wapi nguya ya Nzambe oyo bamonisi yango basambelaki? Babondelaki mpo na kimya, kasi bakanisaki ete ekouta na molende ya bato. Lokola fololo esangisami na liboke moko mpo na kobongisa esika, likita yango ya libondeli elingaki kokokana na etaliseli oyo moto na moto azali kolakisa molende na ye.
Liboke na bafololo etyami esika moko ezali kobenda likebi, kasi wana feti esili, bafololo oyo ekatamaki ekolemba mpe langi na yango ekosila. Kitoko ya fololo mokomoko mpe boyokani na yango ekolimwa noki mpenza. Lisusu, elikya ezali te ete liboke ya fololo yango ekobota mbuma. Na likambo yango, likita wana esukaki motindo moko na “liboke na fololo ndenge na ndenge etyami esika moko”?
Bakonzi na mangomba bango moko basepelaki te na matomba ya likita yango. Engebene Asahi Evening News, “bazalaki na mposa ya kolobela na sikisiki meko oyo mangomba esengeli kokamata na mikolo mikoya, kasi balobaki ete bazwaki ntango mingi te mpo na masolo motindo boye”. Elikya ezalaki ete makambo masuka motindo yango. Takaaki Kobayashi moko na babongisi na likita yango ya libondeli alobaki ete: “Mokano na biso ezali ya koyoka lingomba nyonso ebimisa likanisi na yango mpo na myango malamu ya kotya kimya. Likanisi ya moboko ezali boye ete mosangani nyonso ayoka likanisi ya moninga kozanga kosala bakomantere, kozanga koyanola to kotya ntembe.” Basangani na likita yango ya libondeli bazalaki se koyoka baninga kozanga koloba. Na yango, likita yango “ekokisaki mokano na yango te mpo na oyo etali kopona makambo ya sikisiki oyo bakoki kosalela mpo na kolonga na mokano bazali koluka na likita yango”.
Baklisto ya solo bakoki koyangana na yango?
Baoyo bazali kotya makasi na kolanda ndakisa na Yesu bazali komituna mbala mosusu soki moklisto akoki kosangana na likita na libondeli ya motindo oyo? Lokola likita yango esalemaki na ngomba Hiei, ngomba na bulee ya lingomba ya Buda, etindi biso tokanisa. Yesu akokaki komata na ngomba mosantu ya Buda mpo na kokende kobondela na ntina na kimya?
Ntoma Paulo akebisaki bayekoli na Yesu Klisto na maloba oyo: “Bokangana na ekanganeli na bokesene te, esika moko na bato bazangi kondima. Mpamba te kokokana nini ezali kati na boyengebene mpe mabe? Lisangana nini ezali kati na moi mpe molili? Kokokana nini ezali na Klisto mpe Beliala? Likabo nini ezali na mondimi mpe moto oyo azangi kondima? Esambelo na Nzambe ezali na kondimana nini na bikeko? . . . Yango wana, bobima na kati na bango, mpe bokabwana na bango. Nzambe alobi bongo. Bosimba eloko na mbindo te, mpe boye nakoyamba bino.”—2 Bakolinti 6:14-17.
Kosambela likolo na ngomba mosantu ya Buda mpo na likita ya mangomba makeseni elimboli mpo na moklisto ‘kokangana na ekanganeli na bokesene’. Kasi yango elimboli ete baklisto na solo basengeli te komibanzabanza mpo na kobondela na ntina na kimya? Ee bakoki kobondela.
Libondeli mpo na kimya
Kati na esakweli na ye etali “mikolo na nsuka”, mosakoli Yisaya asakolaki ete bato mingi bakoloba: “Yakani, tobuta na ngomba na Jéhovah”, kasi na ngomba na Hiei te, esika na losambo na Buda. “Ngomba na Jéhovah” elimboli losambo na solo ya Nzambe ya Biblia. Baoyo bakomata kuna bakozwa eloko nini? Mosakoli alobi ete Jéhovah ‘akolakisa bango banzela na ye, mpe bakotambola na bipai bikokendaka ye’. Jéhovah “akosambisa kati na mabota”. Yango ekopesa nzela na kimya kati na mokili mobimba, mpamba te Yisaya asakolaki ete basambeli na solo basengeli kotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makonga na bango ete mazala bikateli na matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te’.—Yisaya 2:2-4.
Makambo yango, oyo mazali komonana uta sikawa epai na ba Témoins de Jéhovah, etikali moke, ekomonana kati na mabelé mobimba. Ezali bongo Jéhovah nde akotya kimya oyo ekoumela, na nzela na Bokonzi na ye kasi bato te. Akolongola makambo nyonso oyo mazali kobebisa kimya na mabelé mpe akozalisa Paradis awa na mabelé. (Emoniseli 11:15, 18) Na kokesena na maloba oyo masalemaki na bokutani ya mangomba oyo ekokani na “liboke na bafololo” oyo ekozanga kobimisa mbuma, maloba na Jehovah makozonga epai na ye te kozanga kokokana.—Yisaya 55:11.
Nzokande, mpo na nini esengeli kobondela mpo na kimya soko Nzambe akotya yango kozanga kotalela milende na bato? Wana ezali biso kobondela mpo ete Bokonzi na Nzambe eya, tozali komonisa mposa na biso mpo ete kimya ezala, mpe tozali komonisa ete tozali na kondima na lolenge oyo Nzambe akotya kimya yango na mabelé. (Matai 6:9, 10) Mpo na kozwa likoki ya kozala na kimya oyo Nzambe akotya, tosengeli ‘kolikya na Jéhovah’. Mpo na yango boya na “ngomba na Jéhovah” mpe bosambela mpo na kimya ya solo oyo ye alaki biso!—Nzembo 37:9, 11.
[Elilingi na lokasa 8]
Liboke ya fololo ndenge na etyami esika moko ezali kitoko mpo na kotala kasi elikya ezali te ete ekobota mbuma
[Elilingi na lokasa 9]
Ngomba Hiei, ngomba mosantu ya lingomba na Buda Tendai, epai mangomba ndenge na ndenge bakutanaki mpo na kobondela