Jérémie: mosakoli na bikateli na Nzambe oyo bato balingaki koyoka yango te
“Naino natongi yo kati na libumu te, nayebaki yo. . . . Napesaki yo lokola mosakoli epai na mabota.”—JÉRÉMIE 1:5.
1. (a) Bato mosusu bazali koloba nini mpo na Jérémie? (b) Nzokande, ye moko amitalelaki ndenge nini?
“ATA NA KATI NA BASAKOLI, Jérémie azali monene.” Likanisi oyo ya molimboli moko na Biblia ekeseni makasi na likanisi oyo Jérémie ye moko azalaki na yango ntango Jéhovah aponaki ye mosakoli mpo na Yuda mpe mpo na mabota. Yoka eyano na ye: “Aha, Nkolo Jéhovah, tala; nayebi koloba te mpo ete ngai nazali bobele elenge.” Jérémie ayebaki ete azali naino elenge mpenza mpe amonaki ete azali na makasi te ya kotelema liboso na mabota oyo bayini Jéhovah. Nzokande, likanisi ya Jéhovah mpo na ye ezalaki ndenge mosusu.—Jérémie 1:6.
2. Ndenge nini Jéhovah alendisaki Jérémie?
2 Na maloba azongiselaki elenge Jérémie, Jéhovah amonisaki ye ete kobotama na ye ezali likambo Jéhovah abongisaki yango. (Jéhovah asalaki boye mpo na bato mingi te.) Mpo na nini Jéhovah azalaki kolanda malamumalamu bokoli ya Jérémie uta bomoi na ye ebandaki na libumu ya mama na ye? Ezali mpo ete asilaki kobongisa mosala ya ntina mingi mpo na ye. Yango wana alobaki na ye: “Naino obotami te, nabulisaki yo.” (Jérémie 1:5) Na nsima apesaki etinda elandi epai na elenge oyo: “Loba te ete, ngai nazali bobele elenge! Mpo ete okokenda epai na bango nyonso ekotinda ngai yo epai na bango, okoloba nyonso ekolakisa ngai yo. Banga bilongi na bango te, mpo ete ngai nazali na yo elongo mpo na kobikisa yo; Jéhovah alobi bongo.” Jérémie asengelaki koyamba mosala na ye na móto, komonisa molende mpe kotia motema epai na Jéhovah.—Jérémie 1:7, 8.
3. Mpo na nini mosala ya Jérémie ezalaki makasi?
3 Ezalaki likambo monene mpo na elenge oyo na kozwa mosala na maboko na Nzambe ye moko. Mpe, oyo nde ebakata ya mosala! “Tala, lelo oyo, natii yo likolo na mabota mpe likolo na bikonzi mpo na kopikola mpe kobwaka na nse, mpo na kobuka mpe kobebisa, kotonga mpe kokona.” Ezalela ezalaki na bokonzi na Yuda penepene na katikati ya ekeke ya nsambo liboso ya ntango na biso ekomonisa biso mokumba monene oyo ezalaki na mapeka na elenge mobali oyo. Jérémie asengelaki kosakola kati na libota wana ya lolendo mpe oyo ezalaki komona ete misala na yango mibongi; bazalaki mpe kotia motema na mboka na bango ya bosantu Yelusaleme mpe na temple na yango. Jérémie asengelaki mpe kosakola nsango na ye na Yelusaleme mbula 40, na nse ya boyangeli ya mikonzi mitano: Yosiya, Yoakaza, Yeyoakirne, Yeyoakine mpe Sedesiase. Mpo na kosukisa, bikateli oyo asengelaki kosakola ekozala mpo na kokweisa libota ya Bayuda mpe bato ya Babilone.—Jérémie 1:10; 51:41-64.
Mpo na nini ndakisa ya Jérémie ezali litomba mpo na biso?
4, 5. (a) Mpo na nini makambo mabimaki na mikolo na Jérémie matali mpe biso? (Baloma 15:4) (b) Motindo nini tokoki kokokisa yango mpo na biso?
4 Nzokande, tokoki komituna, na nini makambo yango matali biso, biso baoyo tozali kobika na nsuka na ekeke oyo ya ntuku mibale. Ntoma Paulo amonisi biso yango. Nsima na kolobela lisolo ya libota ya Yisraele kati na mokanda oyo akomelaki Bakolinti, alobi boye: “Makambo oyo nyonso mazali elakiseli epai na biso ete tozala na mposa na mabe te pelamoko ezalaki bango na mposa. . . . ekomami mpo na kolakisa biso mpo ete nsuka na bikeke eyei na biso.”—1 Bakolinti 10:6, 11.
5 Na ntango oyo ya nsuka, makambo mabimelaki Yisraele mpe Yuda mazali likebisi mpo na lisanga ya solo ya boklisto; epesi mpe bilakiseli mpe bililingi na makambo makobima mosika te. (Kokanisa Jérémie 51:6-8 mpe Emoniseli 18:2, 4.) Na yango, mosala oyo Jérémie asalaki lokola mosakoli mpe makambo makwelaki Yelusaleme mazali lelo na ndimbola monene mpo na ba Témoins de Jéhovah, mingimingi, lokola tokomona yango na masolo malandi, mpo na oyo etali mosala na bango kati na mikili mibengami ete ya boklisto.
Jérémie asakoli bikateli ya Nzambe na mpiko nyonso
6. Mpo na nini mosala ya Jérémie ekomaki lisusu makasi koleka; nzokande, elendiseli nini azwaki?
6 Mpo na kobongisa Jérémie ete akokisa mokumba monene oyo ezalaki kozela ye, Jéhovah alendisaki ye na maloba oyo: “Loba mpe na bango makambo nyonso mazali ngai kolakisa yo. Banga bilongi na bango te, . . . mpe tala, ngai natii yo lelo oyo lokola mboka na makasi . . . kotemela mokili mobimba mpe mikonzi na Yuda mpe mikolo na yango mpe banganga na yango mpe bato na mokili.” Na ntembe te, Jérémie alingaki kokokana na mboka makasi mpo na kotelemela mikonzi mpe banganga na Yuda. Ezalaki likambo ya petee te mpo na kosakola nsango oyo eyinamaki na bato mingi, oyo bato bamonaki yango lokola litumoli.—Jérémie 1:17, 18.
7. Mpo na nini mikóló na Bayuda balingaki kobundisa Jérémie?
7 “Bakobunda na yo nde bakokoka yo te mpo ete ngai nazali na yo elongo mpo na kobikisa yo. Jéhovah alobi bongo.” (Jérémie 1:19) Mpo na nini Bayuda mpe bakonzi na bango balingaki kobundisa mosakoli? Ezali mpo ete nsango na ye elingaki kokweisa lolendo na bango mpe losambo na bango ya libanda mpamba. Jérémie atikaki bango nyee te: “Tala liloba na Jéhovah ezali eloko na nsoni epai na bango, basepeli na yango te. Mpo ete longwa na oyo moke na bango kino oyo monene na bango, nyonso bamipesi na bilulela; longwa na mosakoli kino na nganga [baoyo bakokaki kozala babateli na bizaleli malamu mpe na matomba na elimo], nyonso bazali kokosa.”—Jérémie 6:10, 13.
8. Ndenge nini banganga mpe basakoli bazalaki kokosa bato?
8 Ya solo, bakonzi na mangomba Bayuda bazalaki kobongisa mabonza mpo na ekolo na bango, bazalaki kokokisa makambo nyonso ya libanda mpo na kolakisa ete bazali na losambo ya solo, kasi bazalaki kotia motema na bango na kati na yango te; bazalaki kotalela mingi milulu na esika ete batalela etamboli ya sembo. Epai mosusu, bazalaki kozimbisa bato, kolobaka na bango ete “Kimya ezali! Kimya ezali!” nzokande kimya ezali te. (Jérémie 6:14; 8:11) Ee, bazalaki kokosa bato ete bazali na kimya elongo na Nzambe. Bayuda bakanisaki ete bakoki kobanga eloko te, mpamba te bazali libota oyo Jéhovah abikisaki, libota oyo ezali na mboka mosantu mpe na temple. Nzokande, Jéhovah azalaki kokanisa motindo moko na bango?
9. Likebisi nini Jérémie akebisaki Bayuda mpo na temple na bango?
9 Jéhovah atindaki Jérémie ete atelema na esika ya polele, na porte ya temple, mpe apesa nsango na ye na baoyo bazalaki kokota wana mpo na kosambela. Tala maloba asengelaki kolobela bango: “Bondima maloba na lokuta te ete, Oyo ezali Tempelo na Jéhovah, Tempelo na Jéhovah, Tempelo na Jéhovah. . . . Tala, bozali kondima maloba na lokuta mazali na litomba te.” Bayuda, oyo bazalaki komikumisa mpo na temple na bango, bazalaki kotambola na komona, na esika ete batambola na kondima. Basilaki kobosana makebisi oyo Jéhovah akebisaki bango na yango: “Lola ezali kiti na ngai mpe mokili ezali etielo na makolo na ngai. Wapi ndako elingi bino kotongela ngai?” Jéhovah, Nkolo Moyangeli ya molongo oyo monene, azalaki mokangami kati na temple na bango te, atako ezalaki na bonzenga boni.—Jérémie 7:1-8; Yisaya 66:1.
10, 11. Libota ya Bayuda ezalaki na ezalela nini ya mabe na elimo oyo Jérémie akweisaki yango, mpe ezali ndenge moko mpo na boklisto ya mokili oyo? (2 Timote 3:5)
10 Jérémie alandi kopamela bango polele na maloba oyo makasi: “Bokoyibaka mpe bokobomaka mpe bokosalaka ekobo mpe bokokataka ndai na lokuta mpe bokotumbelaka Bala mpaka na malasi mpe bokotambolaka nsima na banzambe mosusu bayebi bino te, . . . mpe bokolobaka ete, ‘Tokobikisama’, nzokande bozali kosalaka makambo oyo nyonso na bosoto?” Mpo ete bazalaki ‘libota liponami’, Bayuda bakanisaki ete ata basali nini Nzambe akopesa bango etumbu te, bobele bamemela ye mabonza na temple. Nzokande, awa bango bazalaki kotalela Jéhovah lokola tata moko oyo azali na bilingalinga epai na mwana na ye bobele moko, balingaki komona nokinoki ete kokanisa na bango wana ezalaki nde libunga.—Jérémie 7:9, 10; Exode 19:5, 6.
11 Losambo na bafandi na Yuda ebebaki mingi, yango wana Jéhovah atunaki motuna oyo makasi mpo na Bayuda: “Ndako oyo ebiangami na nkombo na ngai etongami na miso na bino lokola ndako na bayibi?” Ata nsima na bambula 700, ezalela ebongaki te, mpamba te Yesu, mosakoli aleki Jérémie na monene, azongelaki maloba oyo mpo na kokweisa baoyo bazalaki kotekisa biloko kati na temple; ezali se ndenge moko mpo na boklisto ya mokili, na mikolo na biso oyo.—Jérémie 7:11; Matai 16:14; Malako 11:15-17.
Baboyi koyoka basenzeli, mpasi esakolami
12. Ndenge nini Bayuda bayambaki basakoli oyo Jéhovah atindelaki bango?
12 Ya solo Jérémie azalaki mosakoli ya liboso te oyo Nzambe asalelaki mpo na kokweisa etamboli mabe ya Yisraele mpe Yuda. Na boumeli ya ekeke moko koleka, Jéhovah atindaki basenzeli epai na libota yango; ezalaki bongo basakoli Yisaya, Mika, Hosea mpe Oded. (Yisaya 1:1; Mika 1:1; Hosea 1:1; 2 Ntango 28:6-9) Ndenge nini mingi na bango bayambaki basakoli oyo? Jéhovah alobi: “Natie mpe bakengeli likolo na bino koloba ete, Boyokamela mongongo na mondule. Nde balobi ete, Tokoyokamela te!” (Jérémie 6:17; 7:13, 25, 26) Bayuda baboyaki koyokamela Jérémie; nkutu, banyokolaki ye mpe bamekaki kokanga monoko na ye; mpo na yango, Jéhovah azwaki ekateli ete bakozwa etumbu mpo na lolendo na bango mpe kozanga kondima.—Jérémie 20:1, 2; 26:8, 11; 37:15; 38:6.
13. Mpo na nini Jéhovah asambisaki libota yango?
13 Lokola libota yango eboyaki koyokamela bantoma oyo atindelaki bango, Jéhovah alobaki boye na miso na mabota ya mokili: “E mokili, oyoka! Tala nakoyeisela bato oyo mabe, mbuma na mabanza na bango; mpo ete bayokameli maloba na ngai te, to Mobeko na ngai te, nde baboyi yango.” Mpasi elingaki kobimela libota wana na ntina na misala na bango ya mabe, awa epusamaki bango na makanisi mabe. Mpamba te, baboyaki maloba mpe mobeko ya Jéhovah, balandaki mposa na bango ya moimi mpe ya mosuni.—Jérémie 6:18, 19; Yisaya 55:8, 9; 59:7.
14. Bafandi na Yuda bazalaki kosala nini mpo na kosalela losambo ya lokuta? (Tala 2 Ntango 33:1-9)
14 Bafandi na Yuda bazalaki kosala nini, ntina wana Jéhovah asilikaki na bango? Bazalaki kotumba mikate mpo na kopesa yango mbeka epai na “mokonzi mwasi na lola” mpe bazalaki kosopela banzambe mosusu mbeka na komela, mpo na kosilikisa Jéhovah. Yango wana Nzambe atunaki bango: “Bazali nde kopesa ngai zuwa? Bazali nde koyeisela bango mpenza zuwa ete bilongi na bango mpenza bizala na nsoni.” (Jérémie 7:18, 19) Kasi bakendaki lisusu mosika koleka kati na misala na bango ya kotuka Nzambe, mpamba te bakotisaki bikeko ya mbindo makasi kati na ndako ya Jéhovah, mpe batongaki bitumbelo na bikuke na Yelusaleme, na lobwaku na Hinome, “mpo na kotumba bana na bango babali mpe bana na bango basi kati na moto”. Motindo etiolaki bango losambo ya solo, ebongaki na bango kozwa etumbu nini?—Jérémie 7:30, 31.
Etumbu ya Yuda
15. Nsango nini mabe Jérémie asakolaki yango na Bayuda?
15 Pene na mobu 632 liboso na ntango na biso, Asulia ekweaki na maboko na Bakaladi mpe na Bamedese, nzokande Ezipito, na nse na Yuda, ezalaki lisusu nguya makasi te. Likama mpo na Yuda elingaki kouta na likolo to na nord; banguna balingaki kouta kuna. Jérémie azalaki bongo na nsango mabe mpo na kosakola yango epai na Bayuda: “Tala libota ekobima na mokili epai na likolo . . . bazali na yauli, bakoyoka mawa te. . . . Batemisami na milongo lokola bato mpo na etumba, liboso na yo, e mwana mwasi na Siona.” Nguya ya mokili mobimba oyo ebimaki na eleko yango ezalaki Babilone; Nzambe alingaki kosalela yango mpo na kopesa etumbu na bokonzi na Yuda mpo ete bazangaki botosi.—Jérémie 6:22, 23; 25:8, 9.
16. Mpo na nini Jérémie akokaki kobondela te mpo na bato ya ekolo na ye?
16 Jérémie akokaki kobondela Nzambe mpo na bato na libota na ye? Nzambe akokaki kobalola losambo ya solo, to kotika pembeni meko mosusu oyo akamataki mpe kolimbisa libota na ye? Na likambo yango, ekateli ya Jéhovah ezalaki polele; yango wana, mbala misato, apesaki etinda oyo epai ya Jérémie: “Okobondela mpo na libota oyo te, . . . mpo ete nakoyoka yo te.” Maloba oyo emonisi mpe ete mpasi monene ezali kozela boklisto ya mokili oyo.—Jérémie 7:16; 11:14; 14:11.
17, 18. Etumbu nini Nzambe ayeisaki likolo na Yuda?
17 Makambo masukaki boni mpo na Yuda? Bobele lokola Jéhovah asakolaki yango na monoko na Jérémie. Na boumeli ya boyangeli ya Yeyoakime, bokonzi na Yuda ekweaki na boombo na maboko na Babilone, bokonzi elekaki makasi na eleko wana. Mbula misato na nsima Yeyoakime atombokaki. Bozoba oyo ememelaki Yuda nsoni mingi lisusu, mpamba te basoda ya Babilone bayaki kofanda liboso na Yelusaleme. Na eleko yango, Yeyoakime asilaki kokufa, mpe mwana na ye, Yeyoakine, akitanaki ye. Yuda ekweaki na maboko na bato na Babilone; Yeyoakine, libota mobimba ya mokonzi mpe bato minene kati na Bayuda bakumbamaki na boombo kino na Babilone.—2 Mikonzi 24:5-17.
18 Nini ekomelaki temple mosantu mpe biloko nyonso ya motuya bizalaki kati na yango? Ememelaki Yuda bolamu te. Mpamba te, Nebukadanezare “abimisaki wana biloko nyonso na ndako na Jéhovah mpe biloko nyonso na motuya na ndako na mokonzi; akataki na ndambo mikemike biloko nyonso na wolo oyo Salomo, mokonzi na Yisraele asalaki na temple na Jéhovah”. (2 Mikonzi 24:13) Ntango bato ya Babilone bazongaki na mokili na bango, batiaki Sedekiase ete azala mokonzi likolo na bato batikalaki na Yelusaleme; kasi ye mpe atombokaki. Ntina wana Nebukadanezare amonaki ete abaye: atindaki Nebuzaradane kobundisa lisusu Yelusaleme, akamataki yango mpe abomaki yango nyonso na mobu 607 liboso na ntango na biso.—Jérémie 34:1, 21, 22; 52:5-11.
19, 20. Mpo na oyo etali mpasi esakolamaki, likeseni nini emonanaki kati na bafandi na Yuda mpe Jérémie, mpe nsuka na yango ezalaki nini?
19 Oyo nde kopalangana, oyo nde mpasi mpo na ‘libota liponamaki’! Nzokande, bikateli oyo Jérémie asakolaki bikokanaki. Wana Bayuda bafandaki na kimya ya lokuta mpe bakanisaki ete eloko moko ekobimela bango te, Jérémie “mosakoli na bampasi”, amonisaki ete azali moloti na bandoto ya mpamba te, kasi moyebisi na makambo na solo. (Jérémie 38:4; liloba “mpasi” to “mabe” emonani mbala 64 kati na mokanda na Jérémie.) Ekateli ya Jéhovah emonanaki sembo: “Okoloba na bango ete, Oyo ezali libota litosaki mongongo na Jéhovah Nzambe na bango te; baoyo bakoyambaka mpamela mpe te. Makambo na sembo makufi mpe malongolami na minoko na bango. Mpe na mboka na Yuda mpe na nzela na Yelusaleme, nakosilisa mongongo na koseka mpe mongongo na esengo . . . mpo ete mokili ekozala mpamba.”—Jérémie 7:28, 34.
20 Na ntango wana ya mpasi, Bayuda na lolendo bamonaki ete kobelela Nzambe mpe kozala na boyokani ya sipesiale elongo na ye ebatelaki bango te. Engebene oyo esakweli elobi, “toluki kimya nde malamu eyei te; toluki mpe ntango na kobikisama nde tala mikakatano eyei. Ntango na kobuka mbuma eleki, ntango na moi makasi esili nde tobiki te.” (Jérémie 8:15, 20) Mpo na Yuda, ntango ekokaki ete bazongisa monoko mpo na misala na bango. Kasi Jérémie, mosakoli na molende mpe kozanga kobanga, abatelamaki na boumeli ya mosala na ye nyonso mpe akokisaki yango kino na nsuka. Asukisaki bomoi na ye na mokili ya bapaya; na Babilone te, elongo moko na libota liyokisami nsoni, kasi na Ezipito. Na boumeli ya bambula koleka 65 asakolaki bikateli na Nzambe na mpiko nyonso mpe na bosembo nyonso.
21. Mituna nini tosengeli koyanola yango na masolo mazali koya?
21 Ekomi biso na esika oyo, etikali na biso toyeba, bomoi mpe mosala na Jérémie ezali na ndimbola nini na mikolo na biso? Nani, na ekeke oyo ya ntuku mibale, akokani na mosakoli Jérémie? Yuda mpe Yelusaleme ekokani lelo na nini? Likama oyo euti epai ya likolo to na nord elimboli nini lelo? Masolo oyo malandi makoyanola na mituna oyo.
Bozongeli
◻ Ndenge nini Jérémie ayambaki mosala oyo Nzambe apesaki ye, mpe Jéhovah alobaki na ye nini?
◻ Mpo na nini makambo mabimaki na mikolo na Jérémie matali mpe biso?
◻ Mabe nini ya losambo Jérémie apamelaki yango, mpe na nini Bayuda bazalaki kotia motema?
◻ Nsuka ezalaki nini mpo na Yelusaleme mpe mpo na Yuda?
[Likanisi ya paragrafe on page 10]
Jérémie asakolaki na mpiko nyonso bikateli na nzambe epai na Bayuda mpe na mikonzi na bango
[Elilingi na lokasa 11]
Basi bazalaki kolamba mikate mpo na “mokonzi-mwasi na lola”