Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 15/11 nk. 15-19
  • Botya elikya na bino epai na Jéhovah

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Botya elikya na bino epai na Jéhovah
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Banani bazali na bolingo ya solo?
  • Baoyo batii motema epai na Jéhovah bakobika
  • Mikolo malamu mizali liboso
  • Jéhovah azali kosimba basaleli na ye
  • Tyelá Yehova motema na yo mobimba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • “Ee Yehova, . . . natyeli yo motema”
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • Tosengeli kotyela bato motema mpo na kozala na esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Okoki kotyela bandeko na yo motema
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 15/11 nk. 15-19

Botya elikya na bino epai na Jéhovah

“Zala na elikya epai na Jéhovah mpe sala malamu; . . . omisepelisa na Jéhovah”​—NZEMBO 37:3, 4.

1, 2. (a) Na ekeke ya liboso nini ekomelaki baoyo batiaki motema te epai na Jéhovah, mpe nini ekomelaki baoyo batielaki ye motema? (b) Na mikolo na biso, mituna nini tokoki komituna na ntina na mangomba?

NA EKEKE ya liboso ya ntango na biso, bakonzi na mangomba ya Bayuda bamikumisaki ete bazali kosambela Nzambe, kasi batyaki motema epai na ye te: bazalaki kobuka mibeko na ye mpe konyokola bamonisi na ye. (Matai 15:3; Yoane 15:20) Ntina wana Jéhovah ‘asundolaki ndako na bango’. (Matai 23:38) Na mobu 70, basoda ya Loma babomaki Yelusaleme elongo na temple na yango, mpe mingi kati na bakonzi na mangomba elongo na balandi na bango bakufaki. Nzokande, bato oyo batiaki motema epai na Jéhovah babatelamaki, mpamba te batosaki likebisi oyo Jéhovah apesaki na nsima ya balobeli na ye mpe bakendaki komibomba na esika malamu.​—Matai 24:15-22; Luka 21:20-24.

2 Na mikolo oyo ya nsuka ya biloko mabe ya lelo, mangomba ya mokili bazali kotya elikya epai na Jéhovah, Nzambe na solo? Bazali kotosa mibeko na ye mpe kosala mokano na ye, to bazali nde komekola bakonzi na mangomba na ekeke ya liboso oyo Nzambe asundolaki bango? Lingomba nini, na mikolo na biso, ekoki kolikya kobatelama na Nzambe mpamba te ‘etii motema epai na Jéhovah mpe ezali kosala malamu’?​—Nzembo 37:3.

Banani bazali na bolingo ya solo?

3. Mpo na nini Nzambe apamboli te milende oyo mangomba ya mokili ezali kosuka mpo na kotya kimya?

3 Eleki kala mingi te, pape Jean Paul II alobaki ete “lobiko ya mokili mobimba ekomi na mokakatano makasi”. Alobelaki makasi “matomba oyo mangomba ndenge na ndenge bazali kozwa ntango bazali komitya esika moko mpo na komeka kopengola likama yango”. Ezali mokano na Nzambe. elobaki ye, ete bakonzi na mangomba “basala elongo” mpo na koluka “kimya mpe boyokani”. Nzokande, soki yango ezali mokano na Nzambe, mpo na nini apamboli te milende oyo bato bazali kosala mpo na yango uta bikeke mingi? Ezali mpo ete mangomba yango mazali mpenza kotya elikya na bango te na ebongiseli oyo Nzambe asali mpo na kotya kimya: Bokonzi na ye ya likolo. (Matai 6:9, 10) Na esika na yango, bazali kopesa maboko na politike mpe na bitumba oyo mabota bazali kobunda. Mpo na yango, na boumeli ya bitumba, bandimi ya mokili moko babomaki bandimi ya mokili mosusu, mpe bato ya lingomba moko babomanaki. Ezali ndenge yango bakatolike babomaki bakatolike, baprotestá babomaki baprotestá mpe ezalaki se ndenge moko na mangomba mosusu. Nzokande, bato oyo bazali solo bandeko na elimo, bakoki kobomana mpe koloba ete bazali kosalela Nzambe?

4. Engebene maloba na Yesu, ndenge nini tokoki koyeba lingomba ya solo, mpe mpo na nini ezalaki “lilako ya sika”?

4 Yesu amonisaki ndenge tokoki koyeba lingomba ya solo wana elobaki ye na bayekoli na ye ete: “Nazali kopesa bino lilako na sika ete, bolinganaka; bolinganaka lokola ngai nalingi bino. Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.” (Yoane 13:34, 35) Na yango, basambeli na solo basengeli kolingana. Ezali “lilako na sika”, mpamba te Yesu andimaki kopesa bomoi na ye mpo na bayekoli na ye; esengeli ete bango mpe bandima kosala bongo: kolongola bomoi ya bandeko na bango kati na kondima te, kasi kopesa nde ya bango soko esengeli. Na motindo yango, lilako oyo ezalaki ya sika, mpamba te Mibeko na Moïse esengaki bongo te.

5. Ndenge nini, kati na Liloba na ye, Nzambe amonisi ete basaleli na ye ya solo basengeli kozala na bomoko na bolingo?

5 Tala oyo tokoki kotanga kati na Liloba na Nzambe: “Soko moto nani alobi ete, Nalingi Nzambe, nde azali koyina ndeko na ye, ye wana moto na lokuta. Mpo ete ye oyo akolingaka ndeko na ye te, awa esili ye komona ye, akolonga kolinga Nzambe te, oyo amoni naino ye te. Tozwi mpe lilako oyo epai na ye ete oyo akolingaka Nzambe alinga mpe ndeko na ye lokola.” (1 Yoane 4:20, 21) Mpo na bolingo yango, baoyo batii motema epai na Jéhovah bazali na bomoko mpenza kati na mokili mobimba. Na ntina yango, Paulo alobaki kati na 1 Bakolinti 1:10: “Bandeko, nalombi bino . . . bolobaka na motindo moko; bokabwana kati na bino te kasi bosangana na elimo moko mpe na likanisi moko.”​—Tala 1 Yoane 3:10-12.

6. Mpo na nini ba Témoins de Jéhovah bakoki koloba ete bazali ‘mpeto na makila na bato nyonso’?

6 Engebene encyclopédie moko (The World Book Encyclopedia) bato 55 milió babomamaki na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Longola ba Témoins de Jéhovah, basangani na mangomba nyonso minene basalaki mosala oyo ya koboma bato. Témoin de Jéhovah ata moko te asanganaki na koboma moto ata moko, mpamba te batemwe batosaki etinda oyo ya kolingana mpe baboyaki kosangana na bitumba oyo mabota bazalaki kobunda. Mingi kati na bango babomamaki mpo ete baboyaki komikotisa kati na makambo ya mokili, kasi bakokaki koloba, kozongelaka maloba na ntoma Paulo: ‘Tozali mpeto na makila na bato nyonso.’​—Misala 20:26.

7, 8. Bakonzi mosusu ya mangomba balobaki nini, komonisaka bongo ete bazali na nyongo ya makila?

7 Aumônier katolike ya etuluku ya basoda oyo babwakaki bombe atomike na Japon na 1945 alobaki kala mingi te ete: “Uta bikeke 17, Mangomba mazali kolakisa bitumba lokola ete ezali eloko ya lokumu. Ezali kondimisa bato ete ezali mosala ya moklisto. Ezali solo te. Bakosaki biso. . . . Esika moko te Yesu ateyaki etumba ete ezali eloko ya sembo. . . . Eloko moko te na bomoi to na mateya na Klisto emonisi ete kosalela bombe atomike nde ezali mabe, kasi kosalela ba bombe mosusu lokola oyo ya napalm nde ezali mabe te.”

8 Tala makambo makomamaki kati na zulunalo moko ya Londres (Catholic Herald): “Baklisto ya liboso . . . bazalaki kotosa maloba nyonso ya Yesu, mpe bazalaki koboya kokota na mosala ya soda na kati na mampinga ya Loma, ata basengelaki kokufa mpo na yango. Lisolo ya mokili mbele ekokaki kozala ndenge mosusu soki Eklezia elandaki lilako oyo? . . . Soki lelo, mangomba nyonso elongo bamonisi ete etumba ezali mabe . . . , mpe bandimi na bango nyonso baboya kobunda mpo na kotosa lisosoli na bango lokola esalaka yango baklisto ya yambo, wana mbele kimya ezali bipai nyonso na mokili. Kasi toyebi ete yango ekosalema te.”

9. Mpo na nini tokoki koloba ete Jéhovah asundoli mangomba ya mokili?

9 Mangomba ya mokili babebisi bongo makasi mibeko ya Nzambe. Bazali kosala lokola Bafalisai. “Balobi ete bayebi Nzambe nde na misala na bango bazali koangana ye. Bazali bato na bosoto mpe na nkanza; babongi mpo na mosala moko malamu te.” (Tito 1:16) Lokola Nzambe asundolaki lingomba ya Bayuda ya bokosi na ekeke ya liboso, bobele bongo asundoli mangomba ya lelo.​—Matai 15:9, 14.

Baoyo batii motema epai na Jéhovah bakobika

10, 11. Ezekiase asalaki nini ntango mokonzi na Asulia asengaki na bato ya Yelusaleme ete babima mpo na komikaba lokola baombo, mpe molobeli na Senakeribe atumolaki nde nani?

10 Kotya motema te ete bato bakosilisa bampasi tozali na yango na mokili. Tya motema na yo nde epai na Ye oyo akoki kokokisa bilaka na ye. (Yosua 23:14) Tala, na ndakisa, makambo masalamaki na ekeke ya mwambe liboso na ntango na biso, na mikolo ya mokonzi Ezekiase na Yuda. Na ntina na ye Biblia elobi: “Asalaki malamu na miso na Jéhovah.” (2 Mikonzi 18:3) Na mikolo ya Ezekiase, Asulia, Nguya na mokili mobimba na ntango wana etelemelaki Yelusaleme. Molobeli ya Senakeribe, mokonzi ya Asulia, akendaki koloba na bato na Yelusaleme ete babima mpe bamikaba lokola baombo. Alobáká: “Mokonzi alobi boye ete, Tika te ete Ezekiase azimbisa bino, mpamba te ye akolonga kobikisa bino na loboko na ngai te. Tika te ete Ezekiase andimisa bino epai na Jéhovah.”​—2 Mikonzi 18:29, 30.

11 Ezekiase asalaki nini? Biblia elobi na biso: “Ezekiase abondelaki liboso na Jéhovah; alobaki ete, Jéhovah, Nzambe na Yisraele, yo okofandaka kati na bakeluba, yo bobele yo moko, ozali Nzambe na bikonzi nyonso na mokili. Yo osalaki lola mpe mokili. O Jéhovah, zipola miso na yo mpe mona. Yeba maloba na Senakeribe oyo ye atioli Nzambe na bomoi na yango. . . . O Jéhovah Nzambe na biso, nabondeli yo ete obikisa biso kati na loboko na ye ete bikonzi nyonso na mokili biyeba ete yo ozali Jéhovah Nzambe, bobele yo moko.”​—2 Mikonzi 19:15-19.

12. Ndenge nini Jéhovah ayokaki libondeli ya Ezekiase?

12 Jéhovah ayokaki libondeli yango mpe atindaki mosakoli Yisaya epai ya Ezekiase mpo na koloba na ye ete: “Jéhovah alobi boye mpo na mokonzi na Asulia ete, ye akokoma na mboka oyo te, akobeta mpe mbanzi wana te; akokoma liboso na yango na nguba te; akobwakela yango ebutelo te.” Ezekiase asengelaki koyanganisa limpinga mobimba mpo na kobundisa Asulia? Te, asengelaki kotya motema epai na Jéhovah; mpe ezali yango asalaki. Likambo nini esalemaki? “Anzelu na Jéhovah abimaki mpe abetaki kati na efandelo na Baasulia bato nkoto makama na ntuku mwambe na mitano.” Epai mosusu, Senakeribe azwaki etumbu mpo afingaki Jéhovah mpe basaleli na ye; etumbu yango ezalaki ete nsima na mwa bambula bana na ye moko babomaki ye. Na motindo yango, na kokokisama na liloba na Jéhovah, abwakaki ata mbanzi moko te na Yelusaleme.​—2 Mikonzi 19:32-37.

13, 14. Bato ya mabota nyonso basengeli kosala nini mpo na kobika na nsuka na biloko na ntango oyo?

13 Makambo ya motindo moko makosalema na mikolo na biso. Baoyo batii motema epai na Jéhovah bakobika ntango mokili oyo ekokufa. “Baoyo bayebi nkombo na yo bakondima yo [bakotyela yo motema]; mpo ete yo Jéhovah okotikaka bango te baoyo bazali kolukaka yo.” (Nzembo 9:10) Kasi liboso ete aboma mokili oyo ya mabe, Jéhovah azali kobenga bato nyonso ya motema sembo ete babelema epai na ye mpo na kozala na kimya. Baoyo bandimi libengami na ye bazali “ebele monene” ya bato “bauti na bolozi monene” longwa na mabota nyonso. Bato yango bakobika na nsuka na biloko mabe ya ntango oyo mpo batii motema epai na Jéhovah mpe bazali kosalela ye “butu na moi”​—Emoniseli 7:9-15.

14 “Ebele monene” bayanoli na libiangami oyo ezali koyokama na mokili mobimba, engebene esakweli ekomami na Yisaya 2:2, 3: “Ekozala ete na mikolo na nsuka, ngomba na ndako na Jéhovah [losambo na ye ya solo] ekokokisama likolo koleka ngomba nyonso . . . Bikólo mingi bakokenda mpe bakoloba ete, Yakani, tobuta na ngomba na Jéhovah . . . ete alakisa biso nzela na ye mpe ete totambola na bipai bikokendaka ye.” Verset 4 elobi: “Bakotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makonga na bango ete mazala bikateli na matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te.”

15. Banani bazali kokokisa esakweli ekomami na Yisaya 2:2-4, mpe bazali kosala nini mpo na yango?

15 Na mikolo na biso, bato nini ‘babongoli mipanga na bango ete mizala bitimweli to kongo’? bato nini ‘bazali koyekola lisusu etumba te’? bato nini bazali na bomoko kati na bolingo makasi lokola bandeko mibali mpe bandeko basi kati na mokili mobimba? mpe banani batii elikya na bango epai na Jéhovah mpe bazali kobenga bazalani na bango ete basala motindo moko? Na ntembe te, ezali bobele ba Témoins de Jéhovah, baoyo, na ndakisa ya Ezekiase, batii motema epai na Jéhovah na makambo nyonso mpe bazali komonisa elikya na bango epai na ye na ndenge bazali kotosa mibeko na ye.

Mikolo malamu mizali liboso

16, 17. Avenire nini kitoko Jéhovah atii liboso na baoyo batii elikya na bango epai na ye?

16 Jéhovah alaki mikolo malamu mingi epai na baoyo batii elikya na bango epai na ye. Ntango akolongola biloko mabe ya ntango oyo mpo na kotia ya sika, bato oyo bakozala na bomoi na mabele bakobanga lisusu eloko te, bakozala na konfianse moko epai na mosusu, bobola ekozala lisusu te, soko mpe bokesene, soko mpe mabe ya lolenge nyonso. Bitumba bikozala lisusu te, soko mpe kosopa zemi, na ntina na yango bomoi ya bikelamu mingi ezali kokatama. Mpe Emoniseli 21:4 elaki ete “kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te”.

17 Lokola Yesu alakaki yango, na nsima mabele ekokoma paradis. (Luka 23:43) Baoyo batii elikya na bango epai na Jéhovah bakokoka kozala na bomoi ya seko kati na Paradis yango, mpamba te kufa ekozala lisusu te. Maloba na Mika 4:4 makokokana: “Bakofanda mpe na nse, moto na moto na nse na miwiti na ye mpe na nzete na ye na mosuke, moto moko akobangisa bango te.” Kanisa naino ete ofandi na mokili moko kati na yango okoki kotyela moto nyonso motema! Mpo na nini tokoki kozala na elikya ete ekozala boye? Ezali mpo ete, lokola elobaki yango Yisaya 54:13, “bana na yo nyonso bakolakisama na Jéhovah, mpe kimya na bana na yo ekozala monene”.

18. Bato oyo batii motema epai na Jéhovah bazali komizwela bolamu nini?

18 Nzokande, elikya oyo bamilió ya ba Témoins de Jéhovah bazali na yango epai na Nzambe ezali kozwela bango bolamu mingi uta sikawa. Na ndakisa, basaleli ya Jéhovah babatelami na maladi lokola kanser ya pumo mpo bazali kotosa mibeko na Nzambe oyo epekisi komela likaya. Mpe lokola bazali komibatela na pite, bazali na likama mpenza te na kozwa SIDA, soki mpe maladi mosusu oyo ekozwamaka na pite. Lokola bakokamataka drogue te, babatelami na ba maladi oyo ebele na bameli-drogue na ntonga bazali kozwa yango, ba maladi yango ezali kobebisa mayele ya moto mpe ezali koboma mingi kati na bango. Lokola bakondimaka kozongisa makila te, basaleli ya Jéhovah babatelami malamu na ba maladi oyo ekozalaka na makila. Mbula na mbula, na Etats-Unis, moko na maladi yango, hépatite virale, ezali koboma to kobebisa libela koleka bato nkoto zomi oyo bandimaki kozongisa makila.

19. Ndenge nini Jéhovah ekosalisa baoyo bazali kosalela ye, ata bakufi sikawa?

19 Ata soko bamoko kati na baoyo bamipesi na Jéhovah bakufi mpo na bobangé, mpo na maladi to mpo na likama moko, Jéhovah akosunga bango. Akozongisa bango na bomoi na nzela na lisekwa. Yango wana ntoma Paulo ayikisi biso mpiko ete ‘totya motema epai na biso moko te, kasi epai na Nzambe oyo akosekwisaka bakufi’.​—2 Bakolinti 1:9.

Jéhovah azali kosimba basaleli na ye

20, 21. (a) Engebene makambo makomelaki Yesu, botemeli nini tokokutana na yango? (b) Lokola asalaka yango mpo na Yesu, ndenge nini Jéhovah azali kobatela basaleli na ye?

20 Kobosana te ete “mokili mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe”, Satan le Diable. (1 Yoane 5:19) Na yango, soki yo otii motema epai na Nzambe, Satana mpe mokili oyo ye azali koyangela bakotelemela yo; bakomeka kobebisa kondima na yo na koseka to na monyokoli, lokola basalaki yango epai na Yesu. Nsima wana abakisamaki na nzete ya mpasi, “baoyo baleki batuki ye, baninganisi mitó na bango mpe balobi: . . . Soko ozali mwana na Nzambe, omibikisa yo moko mpe okita na nzete ya mpasi! Bobele bongo banganga minene mpe bakomeli mpe mikolo na mboka elongo baseki ye, bango ete, Abikisaki bamosusu, ayebi komibikisa te! . . . ‘Azali kotalela Nzambe; Nzambe abikisa ye sikawa soko alingi ye.”​—Matai 27:39-43.

21 Mikolo misato nsima na makambo oyo, Nzambe abikisaki Yesu mpo ete asekwisaki ye longwa na bakufi. Mpo na baoyo basekaki ye, babomamaki to bamemamaki na boombo na basoda ya Loma. Lokola Klisto, na motindo na ye na Mokonzi na Bokonzi na Nzambe na likolo, akokamba lisekwa, soki bato yango bakosekwa, ekosengela na bango komikitisa na nse na moto oyo bango basekaki ye esili koleka mibu 2 000! Ee, Jéhovah azali kobatela basaleli na ye, oyo bakoloba: “[Natii motema na ngai] epai na Nzambe, nakobanga te; moto akoki kosalela ngai nini?”​—Nzembo 56:11.

22. Jéhovah alobi nini na ntina na baoyo bazali kotyela ye motema, mpe alobi nini na ntina na baoyo batyeli ye motema te?

22 Tala oyo Jéhovah alobi na ntina na basaleli na ye: “Moto apambolama oyo akotia motema epai na Jéhovah mpe oyo Jéhovah azali elikya na ye. Mpo ete akozala lokola nzete oyo ekonami pembeni na mai, oyo ekosembola misisa na yango pembeni na ebale; akobanga te wana ekoya moi makasi kasi nkasa na yango ekozala mibesu, akobanga na elanga na kokauka te, akotika kobimisa mbuma mpe te.” Alobi lisusu: “Moto alakelama mabe oyo akotia motema epai na moto, mpe akotia mosuni lokola loboko na ye, mpe motema na ye elongwi na epai na Jéhovah. Akozala lokola matiti na lisobe, akososola malamu te wana ekoya yango.”​—Jérémie 17:5-8.

23. Tosengeli kosala nini soki tolingi kozwa bomoi ya seko?

23 Na ntango oyo ya mpasi, ‘totya bongo motema na biso epai na Jéhovah mpe tosala malamu; tofanda na mokili mpe tosala makambo na bosembo. Tomisepelisa na Jéhovah mpe ye akopesa biso mposa nyonso na motema na biso.’ (Nzembo 37:3, 4) Tika ete mabondeli oyo okosala mayokama, kati na yango, oyo ya kosepela na likabo ya bomoi ya seko kati na mokili ya sika mpe ya sembo oyo Nzambe alaki, Ye oyo tokoki kotiela ye motema!

Bozongeli

◻ Bato oyo bazali na elikya epai na Jéhovah basengeli kobatela mitindo nini?

◻ Mangomba ya mokili mazali kotya elikya na yango epai na Jéhovah?

◻ Elikya oyo Ezekiase atyaki epai na Jéhovah ememelaki bolamu nini?

◻ Ndenge nini esakweli ya Yisaya 2:2-4 ezali kokokana na eleko na biso?

◻ Bato oyo bazali na elikya epai na Jéhovah, avenire na bango ekozala ndenge nini?

[Elilingi na lokasa 17]

Molobeli ya mokonzi Senakeribe atumolaki Jéhovah mpe asengaki ete bato na Yelusaleme babima mpe bamikaba lokola baombo

[Elilingi na lokasa 18]

Na mokili ya sika, bato oyo bazali na elikya epai na Jéhovah bakosepela na kimya mpe libateli ya kokoka

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto