Discipline oyo ezali kobota mbuma na kimya
“Na ntango na yango, bitumbu nyonso biyokani na esengo te kasi na mpasi; nde nsima ekozwisa mbuma na kimya na boyengebene epai na bango baoyo babongisami na yango.”—BAEBELE 12:11.
1, 2. (a) Engebene Baebele 12:9-11, eloko nini Nzambe azali kopesa biso na bolingo nyonso? (b) Moko na ba discipline yango ezali nini, mpe matomba nini ekoki kobimisa?
KANISA lisusu bolenge na yo. Mingi kati na biso bazali koyeba lisusu discipline oyo baboti na bango bazalaki kopesa bango. Na Baebele 12:9-11, ntoma Paulo azali kosalela lisese yango mpo na kolobela discipline oyo ezali kouta epai na Nzambe.
2 Discipline oyo Nzambe azali kopesa biso lokola tata ekoki komema bopusi kati na bomoi na biso ya elimo mpe ezali na mitindo mingi. Moko na yango etali bongo kobimisa kati na lisangá ya boklisto mosangani nyonso oyo azwi ekateli ya komitambwisa na bokesene na mitinda ya Nzambe to oyo aboyi kotosa yango. Moto oyo azwi etumbu yango to discipline makasi akoki kobongola motema mpe etamboli na ye. Kasi lisangá ya basembwi, yango mpe ezali kozwa discipline na ndimbola oyo ete ezali koyekola ntina nyonso ya kosala na boyokani na mitinda mitombwami ya Nzambe.—1 Timote 1:20.
3. Bato mosusu balobaka nini mpo na oyo etali meko ya kobimisa moto na lisangá?
3 ‘Kasi, bato mosusu bakoki koloba boye mbala mosusu ete, tozali kolekisa ndelo te na kobimisaka moto moko na lisangá mpe na nsima koboya kolobisa ye?’ Likanisi yango eyebisamaki kala mingi te na ntango ya efundeli moko esalamaki na mwasi moko oyo abokolamaki na baboti ba Témoins de Jéhovah, baoyo na nsima babimisamaki na lisangá. Ye moko abimisamaki te, kasi akomaki mokanda moko kati na yango ayebisaki ete amilongoli ye moko kati na lisangá. Bayebisaki bobele lisangá ete moto yango azalaki lisusu Témoin de Jéhovah te. Mwasi yango alongwaki na mboka wana mpe na nsima ayaki kozonga lisusu na mboka yango mwa mibu na nsima. Ayaki komona ete ba Témoins de Jéhovah ya mboka yango bazalaki kolobisa ye te. Amemaki bongo likambo yango epai na bisambiselo. Nsuka na yango ezalaki nini, mpe yango ekoki kotalela yo na likambo nini? Mpo na kosimba malamu likambo yango, totalela oyo Biblia ezali koloba na ntina ya kobimisama.
Mpo na nini ekateli makasi boye?
4. Basangani mosusu ya lisangá bamitambwisaka ndenge nini? (Bagalatia 6:1; Yuda 23)
4 Ntalo monene ya baklisto bazali kotosa Nzambe na bosembo nyonso mpe mibeko na ye, (1 Batesalonike 1:2-7; Baebele 6:10) Nzokande ekomaka mbala mosusu ete moko kati na bango amilongoli na nzela ya solo. Na yango, ekomaka mbala mosusu ete moklisto moko, atako bankulutu basalisi ye mingi, azali kobuka mibeko ya Nzambe mpe aboi kobongola motema. To mpe akoki kobwaka kondima ya boklisto na koteyaka mateya ya lokuta to na komilongolaka ye moko kati na lisangá. Na bongo likambo nini tosengeli kosala? Likambo yango esalámáká ata na ntango ya bantoma. Na bongo totala oyo bakomaki na ntina yango.
5, 6. (a) Batoli nini ya mayele epesameli biso mpe na oyo etali ezalela na biso liboso na bato oyo bazali kosala mabunga minene mpe bazali kobongola motema te? (Matai 18:17) (b) Mituna nini mizali kotunama?
5 Ntango mobali moko na Korinte, asalaki pite kozanga kobongola motema, Paulo akomaki na lisangá: ‘Bosangana na moto moko te oyo abiangami ndeko mpenza soko ye azali moto na pite, soko na bilulela, soko mosambeli na bikeko, soko motuki, soko molangi masanga, soko moyibi. Bolia esika moko na moto na ndenge yango te.’ (1 Bakolinti 5:11-13) Esengelaki kosala motindo moko epai na bapengwi lokola Umenai: “Mpo na moto oyo asali lingomba, bwaka ye nsima na toli ya liboso mpe ya mibale, koyebaka ete moto motindo yango atiki nzela ya solo mpe azali kosala lisumu.” (Tito 3:10, 11, MN; 1 Timote 1:19, 20) Ebongaki mpe kotika kosangana na moto nyonso oyo abwakaki eklezya to lisangá. “Babimaki na kati na biso kasi bazalaki bato na biso te; mpo ete soko bazalaki bato na biso mbele basili koumela na biso elongo. Kasi babimaki ete bamonana ete nyonso bazali bato na biso te.”—1 Yoane 2:18, 19.
6 Atako bongo tozali kobatela elikya ete moto motindo yango akobongola motema mpo akoka kondimama lisusu kati na lisangá. (Misala 3:19) Kasi na kozelaka ete abongwana, baklisto bakoki kozala na boyokani moke elongo na ye, to basengeli koboya mpenza kosangana na ye? Soki ezali bongo, mpo na nini?
Kokata boyokani nyonso?
7. Ezalela nini ekeseni tozali komonisa liboso na mitindo mibale ya basumuki?
7 Baklisto bazali kokima bato te. Tozali na boyokani malamu elongo na baninga na biso ya pembeni, ya mosala, baninga na biso ya kelasi mpe bato mosusu, mpe tozali koteya bango, ata soki bamosusu kati na bango bazali ‘bato na pite, na bilulela, bayibi to basambeli na bikeko’. Paulo akomaki ete tokoki kokata boyokani nyonso te, ‘soki te ekosengela na biso kobima kati na mokili’. Nzokande, amonisaki ete esengeli kozala ndenge mosusu mpo na “ndeko” oyo akozala na etamboli motindo wana. Akomaki: ‘Bosangana na moto moko te oyo abiangami ndeko mpenza soko ye azali moto na pite, soko mosambeli na bikeko, soko motuki, soko molangi masanga, soko moyibi. Bolia esika moko na moto na ndenge yango te.’—1 Bakolinti 5:9-11; Malako 2:13-17.
8. Toli nini ntoma Yoane apesaki na ntina etali kobimisa moto na lisangá?
8 Tozali kokuta kati na makomi ya ntoma Yoane batoli ya motindo moko oyo ezali komonisa malamu epai na baklisto ntina ya koboya kosangana mpenzampenza na bato motindo wana. Totangi: “Moto na moto oyo akoleka liboso mosika nde akotikala na Mateya na Klisto te azali na Nzambe te. . . . Soko moto nani ayei epai na bino mpe akomema mateya oyo te, boyamba ye kati na ndako te; bopesa ye mbote te. Mpo ete ye oyo akopesa ye losako [greke khaïrô] asangani na ye na misala na ye mabea.”—2 Yoane 9-11.
9, 10. (a) Likambo nini bazalaki kosala na Yisraele mpo na bato oyo bazalaki kosala masumu mpe babongolaki motema te? (b) Liyoki na biso esengeli kozala nini liboso na malako oyo matali boyokani na biso elongo na basumuki oyo bazangi kobongola motema baoyo babimisami? (2 Petelo 2:20-22)
9 Mpo na nini ezalela makasi boye ebongi mpe na mikolo oyo lisusu? Na yango, kanisa na liwa ezangi mawa oyo Mibeko Nzambe apesaki epai na Yisraele ezalaki kosengisa. Mpo na mabunga mosusu ya minene, bato oyo bazalaki kobuka mibeko na nko basengelaki kobomama (Levitike 20:10; Mituya 15:30, 31) Ntango likambo motindo yango ezalaki kosalema, Bayisraele mosusu, mpe ata bandeko ya moto oyo abuki mobeko, bakokaki lisusu kolobana na mosumuki te mpamba te akufaki (Levitike 19:1-4; Deteronome 13:1-5; 17:1-7) Bayisraele na sembo ya eleko wana bazalaki bato lokola biso, na mayoki motindo moko, kasi bayebaki ete Nzambe azali sembo mpe atondi na bolingo, mpe ete Mibeko na ye mizalaki kobatela bopeto ya bizaleli mpe ya elimo. Na bongo bakokaki kondima ete kobomama ya basumuki ezalaki mpenza etumbu moko ya sembo mpe ya malamu.—Yobo 34:10-12.
10 Motindo moko na mikolo na biso, tokoki kotalela lokola libateli etinda ya Nzambe oyo elobi ete baklisto baboya kosolola na moto nyonso abimisami na lisangá mpo asalaki lisumu mpe abongoli motema te. “Longola mfulu oyo na kala ete bozala mampa na sika, pelamoko mampa mazangi mfulu.” (1 Bakolinti 5:7) Na koboyaka mpe kosangana na baoyo bamilongoli bango moko na lisangá, baklisto bazali komibatela na matong, na maloba mabe mazangi matondi, to mpe na makanisi ya bapengwi.—Baebele 12:15, 16.
Ezalela ya baboti
11, 12. (a) Kobomama ya mobuki mibeko na Yisraele ezalaki kopesa mpasi nini epai na bandeko na ye? (b) Monisa na ndakisa moko bolamu tokoki kozwa soki tozali na botosi.
11 Nzambe ayebi malamu ete kosalela mibeko na ye ya sembo oyo mitali kolongola bato oyo babuki mibeko mbala mingi ezali na mikakatano mpo na baboti to bandeko ya bato yango. Lokola tosilaki koloba yango, ntango mosumuki moyisraele moko abomamaki, bondeko esengelaki kozala lisusu te elongo na ye. Mpo na koloba solo, soko mwana moko amimonisaki ete azali molangwi na masanga mpe moto na lokoso to molundi, baboti na ye basengelaki komema ye liboso ya bazuzi mpe, soki abongoli motema te, baboti basengelaki mpe kotia maboko na koboma ye, ‘mpo na kolongola mabe kati na Yisraele’. (Deteronome 21:18-21) Omoni ete ezalaki likambo ya petee te mpo na baboti wana. Kanisa mpe na mayoki oyo bandeko mibali, bandeko basi to bankoko ya moto oyo abuki mobeko basengelaki koyoka. Atako bongo, na kolekisaka bosembo na bango epai ya Nzambe na bango ya boyengebene liboso ya bolingo na bango mpo na basangani ya libota na bango bakokaki kobikisa bomoi na bango.
12 Kanisa lisusu likambo ya Koré, moko na bakambi ya bato oyo batombokelaki bokonzi na Nzambe oyo emonisamaki na Moïse. Na lisambisi na ye ya kokoka, Jéhovah akataki ete Koré asengelaki kokufa. Kasi basembwi nyonso bakebisamaki na maloba oyo: “Longwa na hema na bato mabe oyo mpe simba eloko moko na bango te ete bobebisama mpo na masumu nyonso na bango te.” Basangani nyonso ya libota na Koré baoyo bandimaki likebisi na Nzambe te bakufaki elongo moko na batomboki. Nzokande, mwa ndambo bamonisaki mayele mpe bandimaki kotikala sembo epai na Jéhovah; yango ebikisaki bomoi na bango mpe na nsima bazwaki matomba malamu.—Mituya 16:16-33; 26:9-11; 2 Ntango 20:19.
13. Ndenge nini baklisto ya sembo bakosala soki moko kati na basangani ya libota na bango ebimisami to amilongoli ye moko na lisangá?
13 Kobimisama to kolongolama na ye kati na lisangá ya boklisto elimboli liwa ya mosuni te mpo na moto oyo abuki mobeko; na bongo bikanganelo ya libota bikatami te. Ekoki kozala ete moto oyo abimisami, to oyo amilongoli ye moko na lisangá, alandi kofanda na ndako na ye elongo na mwasi na ye mpe bana na ye baoyo bazali naino sembo. Limemya na bango epai na bikateli ya Nzambe mpe na meko oyo ekamatami na lisangá ekosalisa mwasi moklisto wana mpe bana na ye na koyeba ete na ntina na etamboli na ye, mobali mpe tata na bango atye nsuka na ekanganelo ya elimo oyo ezalaki kosangisa bango na ye. Nzokande, mpo ete kobimisama na ye ete nsuka te na bikanganelo ya libala to ya libota, bakolanda kozala na bomoi ya libota lokola bazalaki na yango liboso mpe komonisana bolingo.
14. Toli nini ya Nzambe esengeli kozala na bopusi likolo ya boyokani na biso elongo na ndeko ya mosuni abimisami na lisangá kasi afandaka esika moko na biso te to mpe mboka moko te?
14 Likeseni ezali soki moto oyo abimisami to oyo amilongoli ye moko na lisangá azali ndeko oyo azali kofanda ndako moko na bino te to mpe mboka moko te. Mbala mosusu likoki ezali ya kokata bokutani nyonso elongo na ye. Ata soki makambo matali libota masengi bokutani, bokutani yango bosengeli kozala mingi te, engebene mobeko oyo ya Nzambe: ‘Bosangana na moto moko te oyo abiangami ndeko mpenza soko ye azali moto na pite, soko na bilulela (to asali lisumu mosusu ya monene) . . . , bolya esika moko na moto ndenge yango te.’—1 Bakolinti 5:11.
15. Ndenge nini kati na likambo motindo boye tokoki kolonga bopusi ya mayoki na biso? (Nzembo 15:1-5; Malako 10:29, 30)
15 Lokola eyebani, ezalela wana ekoki kozala nkaka mpo na mayoki mpe na bikanganelo ya libota, lokola bolingo oyo bankoko bazalaka na yango mpo na bana ya bana na bango. Kasi ezali bosembo na biso epai na Nzambe nde etiami na komekama, lokola moklisto mwasi oyo atangami na lokasa 20 amonisi yango. Moklisto nyonso oyo ayoki mawa mpe mpasi oyo mosangani moko ya libota na ye abimisami abondeli ye, akozwa elendiseli kati na ndakisa oyo bandeko mosusu ya Koré batikaki.—Nzembo 84:10-12b.
Ekateli ya tribinale
16-18. Ekateli ya tribinale ezalaki nini kati na likambo oyo eyebisamaki liboso, mpe ekateli ya cour d’appel ebakisaki nini?
16 Ntango mosusu ozali na mposa ya koyeba ekateli oyo tribinale ezwaki mpo na efundeli ya mwasi oyo azokisamaki na motema mpamba te baninga na ye ya kala bazalaki lisusu kolobisa ye te uta azwaki ekateli ya kotika kondima na ye mpe komilongola kati na lisangá.
17 Liboso ete likambo ekatama libela, tribinale moko ya moke eyebisaki ekateli ya polele mpo na kokweisa mwasi yango. Ekateli na yango etongamaki likolo na mobeko oyo ete batribinale ekotaka te na makambo matali bitumbu kati na Mangomba. Mwasi yango asengaki ete basamba liboso ya tribinale mosusu oyo eleki monene. Cour d’appel esakolaki mpe ekatelic na yango na bomoko na kotalelaka Kobongisama ya Liboso ya (Constitution to buku ya mibeko ya Etats-Unis): “Lokola etumbu ya kobimisa moto na lisangá ezali kati na kondima ya ba Témoins de Jéhovah, tokanisi ete ‘bonsomi’ (ya kopesa etumbu yango kati na lingomba) oyo endimami na Constitution ya Etats-Unis . . . epekisi [na mwasi oyo] kosamba na esika mosusu. Ba Témoins bazali na lotomo, oyo endimami na Constitution, na kopesa etumbu ya kobimisa moto na lisangá na bango. Na ntina yango, tondimi ekateli ya liboso ya tribinale de distrike.”
18 Ekateli ya cour d’appel ebakisaki: “Kobengana [kobimisa] moto na lingomba ezali likambo esalemaka epai ya ba Témoins de Jéhovah mpo na ndenge na bango ya kolimbola makomi oyo mandimami; nzokande biso tozali na lotomo te ya kobalola lisusu makomi wana . . . Ba Témoins bazali na lotomo mpenza ya kosalela na bonsomi nyonso bindimeli na bango ya losambo. . . . Mingimingi, tribinale etalelaka sikisiki mpenza te boyokani oyo basangani (to basangani ya kala) ya Lingomba moko bazali na yango. Mangomba bazali na bonsomi mpo na kosenga discipline epai na bato na bango to basangani ya kala. Tondimi likanisi ya zuzi Jakson (mosambisi ya kala ya cour suprême ya Etats-Unis) engebene yango ete ‘misala ya losambo oyo mitali bobele basangani ya lingomba moko mizali mpe misengeli kozala na bonsomi, bonsomi ya kokoka, to lokola yango ezali na likoki ya kozala’: . . . Basangani ya Lingomba oyo (mwasi wana) azwaki ekateli ya kokabwana na bango bamonaki ete bakoki lisusu kosolola na ye te to kofanda na ye esika moko te. Tondimi ete bazali na bonsomi na kozwa ekateli ya boye.”
19, 20. Mpo na nini moto oyo abimisami azali na lotomo te ya kozwa mosolo mpo na dommages et intérêts na lolenge wana?
19 Cour d’appel endimaki ete, ata soki mwasi wana ayokaki mawa na komona ete baninga na ye ya kala bazwaki ekateli ya koboya kolobisa ye, “kofuta ye to dommages et intérêts mpo na yango mbele esengelaki kozala kozanga kotosa na bonsomi ya losambo ya ba Témoins de Jéhovah, mpe mbele ekozala kozanga kotosa constitution . . . Bonsomi ya losambo oyo endimami na Constitution ezali kosenga epai na bato ete bandima lolenge na mpasi oyo ezwi (mwasi wana) lokola lifuta oyo esengeli kofutama mpo na kobatela lotomo ya kokesena na bato mosusu, lotomo oyo lingomba ezali na yango, mpe lotomo oyo epesami epai na ba citoyens nyonso,” Longwa wana, lisambisi yango, elendisamaki lisusu koleka. Ndenge nini? Mwasi yango akendaki kofunda lisusu na tribinale oyo eleki monene na mokili yango mpo ete tribinale wana etalela lisusu likambo yango mpe elongola ekateli oyo ezwamaki mpo na kokweisa ye. Nzokande na Novembre 1987 cour supreme ya Etats-Unis ebenganaki ye.
20 Na yango, likambo monene oyo emonisaki ete moto oyo abimisami to oyo amilongoli ye moko na lisangá akoki kozwa elonga te na nzela na bisambiselo to tribinale ete ba Témoins de Jéhovah bapesa ye mosolo mpo na dommages et intérêts mpo ete abimisami na lisangád. Lokola lisangá ezali kolanda mpe kosalela mitinda ya kokoka oyo biso banso tokoki kotanga yango kati na Liloba ya Nzambe, mwasi wana azwaki mpasi mpo na mabe na ye moko.
Discipline ezali kopesa bolamu mingi
21. Mpo na nini ebongi kozala na makanisi mabongi mpo na lolenge ya kotalela kobimisama na lisangá?
21 Bato oyo bazali na libanda ya lisangá, baoyo bazali koyoka kobimisama ya mosumuki moko, bazalaka mbala mingi na momeseno ya koimaima mpamba te moto yango akoki lisusu kosolola na basangani ya lisangá ya boklisto te. Kasi ezalela motindo wana ezali na moboko te. Kanisa bolamu oyo mosumuki wana mpe bato mosusu bakoki kozwa.
22, 23. Monisa na ndakisa moko ntina mpe motuya ya kotosa epai na Nzambe mpo na oyo etali ezalela na biso epai na bato babimisami na lisangá.
22 Na ndakisa, na lokasa 20 tokokaki kotanga maloba ya Lynette mpo na ekateli na ye ya ‘kokata boyokani nyonso’ elongo na ndeko na ye ya mwasi Margaret, oyo ebimisamaki. Ye mpe basangani mosusu ya lisangá na boklisto ya libota na bango ‘bandimaki ete mayele ya Jéhovah eleki ya biso’, mpe ezali boye solo.
23 Na nsima, Margaret alobaki na Lynette: ‘Soki etalelaki kobimisama na ngai na lisangá lokola likambo moke, mbele nakokaki te kobongwana noki mpo na kozongisama na lisangá. Ntango boyokani ezali lisusu te elongo na bato oyo olingaka mpe na lisangá, okooka mposa makasi ya kobongola motema. Nayei kondima ete etamboli na ngai ezalaki mpenza mabe mpe nasalaki libunga monene na ndenge natikaki Jéhovah.’
24. Likambo nini ezalela ya ndeko mwasi moko ebimisaki epai na ye moko mpe epai na libota na ye mpo na lolenge na ye ya kotalela kobimisama na lisangá?
24 Totanga ndakisa mosusu, oyo ya Laure oyo baboti na ye babimisamaki na lisangá. Alobi: ‘Kokutana na biso esukaki te, nkutu eyaki makasi. Nsima ya mikolo, nabandaki kolemba, mpe nazalaki lisusu kosangana na makita te.’ Na nsima atangaki masolo ya Mosenzeli ya les 1er mpe 15 Septembre 1982 oyo elobelaki polele batoli epesami na 1 Bakolinti 5:11-13 mpe na 2 Yoane 9-11. ‘Ezalaki lokola ete mwinda epeli kati na ngai, ndenge Laure akomaki. Nayebaki ete esengelaki na ngai kobongwana. Sikawa nayebi malamu ndimbola ya Matai 10:34-36. Ekateli na ngai ezalaki petee te mpo na kondimama epai na basangani ya libota na ngai, mpamba te mwana na ngai ya mobali ya mibu mitano, azali mwana mobali se moko, mpe balingaka ye mingi.’ Nzokande, lokola esalamaki mpo na Margaret, tozali kolikya ete baboti ya Laure bakomitungisa na komona ete mwana na bango ya mwasi atiki kosangana na bango. Atako ndenge nini, discipline esalisaki Laure. Alobi, ‘nazongeli kobima kati na mosala ya kosakola. Libala na ngai mpe libota na ngai ezali makasi koleka sikawa mpo na mbongwana ya ezalela na ngai, mpe ngai moko nazali makasi mingi.’
25. Likanisi nini moto moko oyo ebimisamaki na lisangá mpe azongaki na nsima alobaki mpo na oyo etali kobimisama?
25 Talela lisusu mayoki oyo mwasi moklisto moko oyo abimisamaki mpe azongisamaki nsima ayokaki. Sandi akomi: ‘Nazali kotonda bino mpo na masolo oyo (mayebisami awa na likolo) mpo na oyo etali mpamela mpe kobimisama na lisangá; ezali mpenza na ntina mpe ezali kopesa mayele mingi. Nazali na esengo mpo ete Jéhovah azali kolinga mpenza libota na ye mpo na kosenzela na boye ete lisangá na ye etikala peto. Meko oyo ekoki komonana makasi epai na bato ya libanda ezali mpenza bobele na ntina te, kasi lisusu elembo ya bolingo ya solo. Nazali na botondi epai na Tata na biso ya likolo mpo azali komimonisa Nzambe na bolingo mpe oyo azali kolimbisa.’
26. Mbuma nini tokoki kobuka soki tondimi discipline? (Nzembo 94:10, 12)
26 Na bongo, Nzambe oyo azali kosenga ete mosumuki nyonso oyo abongoli motema te abimisama na lisangá, azali mpe komonisa na bolingo nyonso ete mosumuki akoki kozongisama na lisangá soki na nsima abongoli motema mpe etamboli na ye. (Motindo moko mpe, moto oyo amilongolaki ye moko na lisangá akoki kosenga ete azonga lisusu kati na lisangá.) Na ntango yango baklisto bazali na mokumba ya kolendisa ye mpe komonisa bolingo oyo bazali na yango mpo na ye. (2 Bakolinti 2:5-11; 7:8-13) Ezali bongo kosalema ndenge Paulo akomaki yango: “Na ntango na yango, bitumbu nyonso eyokani na esengo te kasi na mpasi; nde nsima ekozwisa mbuma na kimya na boyengebene epai na bango baoyo babongisami na yango.”—Baebele 12:11.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Yoane asalelaki liloba khaïrô, mbote ekokani na liloba “bonjour” oyo biso tozali kosalela lelo. (Misala 15:23; Matai 28:9) Asalelaki liloba aspazomaï te (lokola na verset 13), liloba oyo elimboli “kosimbana, na nsima, kopesa ye mbote ya boyei malamu,” oyo ekokaki kolimbola mbala mosusu koyamba moto yango na ntolo. (Luka 10:4; 11:43; Misala 20:1, 37; 1 Batesaloniki 5:26) Na yango, na 2 Yoane 11, ntoma Yoane amonisaki ete ekokaki te kopesa ata “mbote” mpamba na bato motindo yango.—Tala Mosenzeli ya 1 Février 1987, lokasa 23.
b Mpo na oyo etali ndeko ya mosuni oyo ebimisami na lisangá, tala Mosenzeli ya 15 Septembre 1982, nkasa 14-19.
c 819 F.2d 875 (9e circ. 1987).
d Atako bato mingi bafundaki ba Témoins de Jéhovah nsima na kobimisama na lisangá, tribinale ata moko te ekweisi batemwe mpo ete basalaki na boyokani ma mitinda ya Biblia.
Bozongeli
◻ Ndenge nini kobimisama na lisangá ekoki kozala lolenge moko ya discipline?
◻ Mpo na nini ezaleli ya baklisto epai na bato babimisami na lisangá ekeseni na ezaleli na bango epai na basumuki ya mokili?
◻ Malako nini ya Biblia tosengeli kobosana yango te ata soko moto oyo abimisamaki azali ndeko na biso na mosuni?
◻ Ekateli nini cour d’appel moko ezwaki na likambo oyo mwasi moko afundaki Batemwe nsima wana asilaki komilongola ye moko na lisangá?
◻ Toli nini tozwi na maloba oyo bato mosusu balobaki na ntina etali kobimisa moto na lisangá?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 20]
“Bosembo na biso na bibongiseli ya Nzambe emekamaki ntango esengelaki na biso kokata boyokani nyonso elongo na Margaret [ndeko na ngai ya mwasi oyo abimisamaki na lisanga]. Libota na biso ezwaki libaku ya komonisa ete endimi solo ete mayele ya Jéhovah eleki oyo ya biso.”—Lynette.
[Etanda na lokasa 24]
Mpo na oyo etali kobimisa moto na lisangá
Edward Gibbon, mokomi na makambo na kala, ye moto na Angleterre, akomaki boye na ntina etali bosembo ya kobimisa moto na lisangá mpe mpasi oyo mobimisami akoki kozwa mpo na meko yango; alobelaki mpo na ndenge ezalaka kosalema mua ntango moke nsima na eleko na bantoma:
“Lisangá nyonso ezali na lotomo ya kobimisa mpe koboya kopesa matomba epai na basangani na yango oyo babwaki to bazali kobuka mibeko oyo bango nyonso bayokanaki mpo na yango. . . . Kobimisa moto na lisangá etalelaki makambo ya bomoi ya lelo [awa na mabele] mpe makambo ya bomoi ya elimo. Moklisto oyo abimisamaki azalaki kozwa eloko moko lisusu te ntango bazalaki kokabola makabo. Boyokani nyonso na bato oyo bazalaki kosambela na ye elongo mpe na baninga na ye ekatamaki.”