Ndenge nini okoki kobokola malamu bana na yo
“RAYMOND, tata na bana mitano alobi: “Nalingi koyebisa bino ndenge nini bokoki kobokola bana na bino. Yango ezali kosenga makasi, makila, motoki mpe mpisoli!”
Mwasi ya Raymond akaboli mpenza likanisi ya mobali na ye. Abakisi lisusu boye: “Kobokola bana na mikolo na biso ezali mpasi, kasi ntango tokomona bango bakoli, tokomiloba mpenza ete mosala yango ezali na ntina.”
Kobokola bana ezali kosenga mosala mingi. Kasi sikawa baboti mingi bazali komona ete mokumba yango ezali kilo. Hélène, mwasi moko azali na mibu 40 mpe azali na mwana mobali asili kokoma elenge, alobi boye: “Nakanisi ete kobokola mwana lelo oyo, ezali mpasi mingi koleka eleko ya baboti na ngai, mpo bomoi etondi na makambo mingi. Eyebani te ntango nini okoki kopesa etumbu mpe ntango nini kolembisa.”
Kobokola bana na ndenge malamu, elimboli nini?
Mwana abokwami na ndenge malamu ezali mwana oyo akoki komema mikumba, oyo akobanda kosambela Nzambe ntango nyonso na molende mpe akobanda kolinga bazalani na ye. (Matai 22:37-39) Kasi, bana nyonso bakolaka kino kokoma mikolo oyo bakoki komema mikumba te. Mpo na nini? Yango ezali foti ya baboti?
Tomonisa yango na elakiseli. Motongi na ndako akoki kozala na ba plans ya kitoko mpe na bitongeli malamu mpenza. Kasi nini ekosalema soki aboi kolanda ba plans yango, alongoli biteni na yango misusu to alongoli bitongeli makasi mpe atye na esika na yango, oyo ya mabe? Ntango ndako yango ekosila, ekozala na mabunga mpe na makama. Kasi soki motongi alandi malamumalamu ba plans mpe asaleli bitongeli makasi, nkolo na yango akosenzela ete abatela yango peto ntango ekosila. Akozala mpe na mokumba ya kotika bitongeli ya malamu ndenge batyaki yango, na esika ete alongola yango mpe atya oyo ya mabe.
Na elobeli na elilingi, baboti bazali mpe batongi. Balingaka ete bana na bango bazala na bomoto ya kitoko mpe, mpo na yango, Biblia ezali kopesa bango plan oyo ebongi. Bitongeli ya malamu oyo Makomami ezali kokokisa yango na “wolo, palata, mabanga ya ntalo”, elimboli bizaleli, lokola kondima ya makasi, mayele oyo euti na Nzambe, lisosoli na elimo, bosembo, mpe bolingo ya Nzambe mozwi-na-nguya-nyonso mpe kolinga mibeko na ye.—1 Bakolinti 3:10-13; tala Nzembo 19:7-11; Masese 2:1-6; 1 Petelo 1:6, 7.
Mwana mpe, wana ezali ye kokola, akosenzela ete akolisa bomoto kitoko. Akosengela kolanda plan oyo baboti na ye balandi, Liloba ya Nzambe, mpe akosalela bitongeli bobele wana ya motuya. Soko mwana oyo abandi kokoma mokolo aboi kolanda nzela yango, to abuki nyonso oyo etongamaki malamu na baboti, akozala na mokumba mpo na misala na ye ya mabe.—Deteronome 32:5.
Mokakatano euti wapi
Makambo mibale mazali kobebisa mpo ete bana babokwama malamu te. Ya liboso, baboti mpe bana bazangi kokoka mpe bazali kosala mabunga. Mpe mingimingi, likambo mosusu ezali kobima wana ezali mposa oyo tobotami na yango oyo Biblia ebengi ete lisumu.—Baloma 5:12.
Mpe lisusu, mwana oyo azali kokola, akozwa bobele bopusi ya baboti na ye te. Ndenge na ye ya kotalela makambo mpe bomoi ekopusama mpe mingi na bato nyonso oyo bazingi ye. Yango wana esakweli oyo ya Paulo elobeli eleko na biso ekosepelisa baboti: “Kasi ososola likambo oyo ete, na mikolo na nsuka, ntango na mpasi ekoya. Mpamba te bato bakozala bamikumisi na bango mpenza, baluki na mosolo, bato na lolendo, bato na ngambo, batuki, bato bazangi kokumisa baboti, bato bazangi matondi, bato bazangi bulee, bato bazangi bolingo, bazangi boboto, batongi, batomboki, bato na yauli, bayini na malamu, bakosi, bato na nko, bato babimbi na lolendo, baoyo bakolingaka malamu na bango mpenza koleka bolingo epai na Nzambe, bato bazali na lolenge na kosambela nde bazali koangana nguya na yango. Opengwa ndenge yango.” (Biso nde tolalisi maloba oyo).—2 Timote 3:1-5.
Soko tokanisi ete makambo nyonso oyo mazali komonana epai na bato ya lelo oyo, tokoki mpenza kokamwa na komona ete baboti mosusu bazwi matomba mabe mpe balembi to baboi kobokola bana na bango? Tozonga naino na 1914. Na mbula wana, mokili ezwaki mbongwana monene oyo ezalaki mpe na matomba mabe. Bitumba mibale oyo esalemaki abungisaki bobele kimya te. Mokili ya lelo ebungisi mpe bizaleli malamu oyo ezalaki kosalisa bana bakoma mikolo oyo bakoki komema mikumba. Ya solo, baboti oyo bazali kolinga bosembo bazali kokutana na bato oyo bazali na bizaleli ekeseni na bizaleli oyo bazali na mposa ete bateya epai ya bana na bango.
Baboti ya lelo bazangi bato oyo bakoki kosalisa bango ndenge ezalaki na kala. Na kala, bazalaki komizela ete eteyelo esalisa bango na kolakisa epai ya bana na bango bizaleli malamu ya moboko oyo bango moko mpe bazalaki kotya na esika ya liboso kati na ndako. Eleko yango esila koleka.
Shirley, oyo asukisaki kelasi na ye ya secondaire na 1960, alobi boye: “Sikawa, bilenge bazali kozwa bopusi ya ndenge na ndenge. Drogue mpe kolingana kati na bilenge basi mpe bilenge mibali ezalaki na lycée te na eleko na biso. Eleki mibu 30, ezalaki likambo ya mabe na komela likaya na kobombama. Ntango mwana na ngai ya liboso ya mwasi akendaki na lycée na 1977 kino 1981, komela bangi esilaki kopalangana mingi. Sikawa, drogue esili kokota ata na bakelasi ya mike. Na bambula mibale oyo euti koleka mwana na ngai ya mwasi ya mibu 13, amekamaki mingi mpo na likambo yango.”
Liboso, baboti bakokaki komizela ete bankoko, libota mpe basangani ya libota mpe baninga ya pembeni basenzela na etamboli ya “mwana”. Kasi likambo yango mpe esili kobongwana. Emonani mpe lisusu ete kati na mabota mingi, mokumba ya kobokola mwana ezali se na mapeka ya moboti moko oyo azangi lisalisi ya mobalani na ye.
Plan oyo ekoki kolonga
Ata ezali mpasi lelo oyo na kobokola bana, baboti bakoki kolonga na likambo yango na kosalelaka lisalisi oyo esili kobimisa mbuma na yango: Ezali bongo Biblia. Liloba na Nzambe ekoki kozala plan mpo na yo, mpo ete obokola bana na yo. Na elakiseli ya motongi na mayele oyo akotala ntango nyonso plan na ye kino misala mikosila, yo mpe, okoki komitika kotambwisama na Biblia mpo na kosalisa bana na yo bakoma mikolo oyo bakoki komema mikumba. Atako Biblia ezali mokanda oyo etondi bobele na batoli te mpo na kobokola bana, ata bongo ezali na batoli ya polele mpo na baboti mpe bana. Ezali na mitinda mingi ya motuya oyo, soko bosaleli yango, ekoki kosalisa bino na kokokisa mokumba na bino ya tata to ya mama.—Deteronome 6:4-9.
Tozwa ndakisa ya Diane. Alimboli boye: “Ntango mwana na ye Erich azalaki na mibu 14, azalaki kosepela na moto te mpe azalaki kosolola mingi te”. Bongo ayaki kokundola mayele ezwami na lisese oyo ya Biblia: “Toli [mikano] kati na motema na moto ezali lokola mai na bozindo, nde moto na mayele akotoka yango.” (Masese 20:5) Bana mosusu bazali kobatela kati na motema na bango mayoki na bango mpe makanisi na bango—elingi koloba mikano na bango ya solo—oyo tokoki kokokisa na mai mozindo ya libulu. Erich azalaki kati na bana yango. Baboti basengeli kosala makasi mingi mpo na koyeba makanisi motindo yango. Diane alobi ete: “Ntango azalaki kozonga na kelasi, azalaki na ezaleli ya koyebisa biso makambo nyonso te na esengo. Nalukaki bongo koyeba ndenge bomoi na ye ezalaki na eteyelo. Esengelaki na ngai mbala mosusu kosolola mingi elongo na ye mpo na koyeba makanisi na ye mpenza.”
Ezali petee na kolimbola mpo na nini Biblia ezali mosungi ya motuya monene: Mokomi na yango ezali Jéhovah Nzambe, oyo azali mpe Mozalisi na biso. (Emoniseli 4:11) Jéhovah ayebi moto mpe alingi ‘kolakisa biso mpo na litomba mpe kokamba biso na nzela ekoki na biso kotambola na yango’, tozala tata, mama to mwana. (Yisaya 48:17; Nzembo 103:14) Ata bamoko basengeli kosala makasi koleka bamosusu mpo na kokoma baboti ya malamu, bato nyonso bakoki kotya molende na likambo yango na kolandaka malako ya Makomami.
Talela mwana nyonso lokola moto mpenza
Okoki te kobokola bana bakoma na ezaleli malamu na kolandaka liboke na mibeko oyo etali bato nyonso. Ezali mpe na bakolo te oyo bakoki kokoma baboti malamu liboso ete babongisa bango mpo na yango. Mwana na mwana azali na bomoto na ye mpenza; esengeli kotalela ye lokola moto mpenza. Biblia elobeli mingi likambo yango. Toli ya Biblia oyo elandi ezali na etinda oyo ekosalisa baboti ete bakokisa bana na bango na bana mosusu te: “Tika ete moto na moto ameka mosala na ye moko, boye akoki komikumisa mpo na mosala na ye moko mpe mpo na mosusu te.”—Bagalatia 5:26; 6:4.
Jean, tata na bana mibale, amoni ete toli oyo ya Makomami ezali kopesa ye nzela ya kosalisa bana na ye bazala na bokatikati epai ya bandeko na bango mpe epai na mabota mosusu. Jean alimboli boye: “Nalendisaka bana na ngai bamibanzabanza te na biloko oyo mabota mosusu bazali na yango to na makambo oyo bazali kosala. Tozali kotalela makambo na ndenge ya libota na biso.”
Teya bango “uta bomwana na bango”
Uta ntango nini losambo ekoki kobanda koteyama na mwana? Gérard oyo azali na mwana auti kokota na école gardienne alobi ete: “Esengeli kobanda koteya mwana wana ezali ye naino moke.” Gérard akanisi ete bana basengeli kozwa baninga ya solo kati na lisangá na bango liboso ete bakota kelasi. Ezali yango etindaki Gérard mpe mwasi na ye bamema Yvan na makita ya boklisto uta ntango abotamaki. Gérard amekoli bongo likambo Eunice azalaki kosala mpo na mwana na ye Timote. Mama yango, oyo Biblia elobeli ye na lokumu nyonso, asenzelaki na boye ete “longwa bomwana”, mwana na ye ayekola mateya ya Biblia.—2 Timote 1:5; 3:15.
Mama ya Timote, mpe mbala mosusu ata nkoko na ye ya mwasi, bamibongisaki ete uta bomwana na ye, mwana alanda makanisi na bango te; bayebaki bongo ete bobele mayele ekouta epai na Jéhovah ekokaki kokomisa ye mayele mpo na lobiko. Tala eteni ya mokanda oyo ntoma Paulo atindaki epai na Timote: “Kasi yo, oumela kati na yango eyekoli yo mpe endimi yo, awa eyebi yo ete oyekoli yango epai na banani; mpe ete longwa na bomwana na yo, osili koyeba Makomi na bulee, makoki kopesa yo boyebi mpo na kobika na nzela na kondima kati na Klisto Yesu.”—2 Timote 3:14, 15.
Loïs mpe Eunice bayekolisaki epai na Timote kososola mpe kozala na kondima oyo euti na Liloba na Nzambe. Na bongo kondima na ye ezalaki likolo na baboti na ye te; esimbamaki nde na mayele na Nzambe oyo ezwami kati na Liloba na Jéhovah. Timoté alandaki basolo ya boklisto bobele te mpo mama mpe nkoko na ye bazalaki kosambela Jéhovah, kasi mpo ete ye moko mpe andimaki ete basi wana bateyaki ye solo.
Timote ayebaki mpe lisusu lolenge nini ya bato mama na ye mpe nkoko na ye bazalaki, basi na elimo mpenza oyo bakokaki kokosa ye te to oyo bakokaki te kobongola solo mpo na matomba ya moimi. Na yango, Timote akokaki kotya ntembe te na makambo oyo azalaki koyekola. Ntembe ezali te ete mama na ye ya sembo asepelaki mpenza na komona ye, komitambwisa lokola moklisto ya molende, ntango akomaki mokolo.
Ee, kobokola bana na ndenge malamu ezali kosenga molende. Kasi lokola mama oyo alobaki yango na ebandeli ya lisolo, “yango ezali mpenza na ntina”. Ezali mpenza ya solo soki baboti bakoki koloba epai ya bana na bango maloba oyo ntoma Yoane akomaki epai na bana na ye ya elimo: “Nazali na esengo eleki oyo te ete nayoka ete bana na ngai bazali kotambolaka kati na makambo na solo.”—3 Yoane 4.
[Etanda na lokasa 4]
Programme ya koteya oyo baboti bazalaki kolanda na Yisraele na kala
Kati na Yisraele na kala, ezalaki mokumba ya baboti mpo na koteya mpe kobokola bana na bango. Bazalaki bateyi na bango mpe basungi na bango. Baboti ya lelo oyo bakoki mpenza kolanda ndakisa ya programme ya koteya oyo esalemaki na Yisraele mpe oyo ekoki kolobama na mokuse na maloba malandi:
1. Mwana azalaki koyekola kobanga Jéhovah.—Nzembo 34:11.
2. Alendisamaki na kokumisa tata na ye mpe mama na ye.—Exode 20:12.
3. Bazalaki kolakisa ye Mibeko mpe misala oyo Jéhovah asalaki kala.—Deteronome 6:7-21.
4. Bazalaki kolakisa mwana botosi epai na mibange.—Levitike 19:32.
5. Bazalaki kolakisa mwana ntina ya kotosa.—Masese 23:22-25.
6. Azalaki koyekola mosala formation ekoki kosalisa ye ntango akokoma mokolo.—Malako 6:3.
7. Azalaki koyekola kotanga mpe kokoma.—Yoane 7:15.
[Elilingi na lokasa 3]
Liloba ya Nzambe ezali plan mpo na baboti