Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 1/12 lok. 5
  • Solo ya Biblia “ezali na nguya”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Solo ya Biblia “ezali na nguya”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Masolo mosusu
  • Kopesa litatoli ezali kobota mbuma na ndako mpe na eteyelo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Nguya ya Liloba ya Nzambe oyo ezali kobongola bomoi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • “Liloba ya Nzambe . . . ezali na nguya”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 1/12 lok. 5

Lisolo ya basakoli ya Bokonzi

Solo ya Biblia “ezali na nguya”

MOKILI ezali kobebisa ntango mpe mosolo mingi mpo na kosilisa mabe. Mibeko mizali kobimisama mpo na kopekisa mabe lokola komela bangi, koyiba mpe koboma; kasi ezali kobongisa bato te. Nzokande, Biblia, Liloba na Nzambe, azali na nguya ya kobongola bato; baoyo bazali kosalela mibeko na yango mpe mitinda na yango bazali kokoma bato ya sembo, na ezaleli ya kolongobana mpe na bopolo.​—Baloma 12:2.

◻ Na ndakisa, na Ostralia. Batemwe mibale bakutanaki na bilenge mibali mingi bazangaki mosala. Ntango bazongelaki bango, bakotisaki bango na ndako moko ya molili mpe etondaki na milinga. Mesa etondaki na biloko bakomelelaka na yango marijuana mpe ba murs ezipamaki na bafoto ya babeti miziki ya rock. Ba amplificateurs minene ya lindanda na kurá etondaki na ngambo moko ya ndako. Batemwe bakotaki bongo na esika orchestre moko ekomibongisaka mpo na koyemba. Bato misato kati na baoyo bafandaka kuna bandimaki koyekola Biblia elongo na bango. Bango misato bazalaki bandeko, mpe mama na bango azalaki koyekola Biblia mwa bambula liboso elongo na ba Témoins de Jéhovah. Na lisalisi ya mokanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis, ayebisaki bango elaka ya Nzambe ya kotya paradis na mabelé. Bongo libota ekendaki kofanda na esika mosusu, yango wana boyekoli esukaki. Vizite oyo ya Batemwe elamusaki lisusu epai ya mibali oyo bolingo ya solo; nsima na yango, baninga mibale bayaki kobakama na boyekoli na bango.

Na nsima ya sanza misato, moko na bango abandaki kosakola mpe mibale bamekolaki ye sanza moko na nsima. Batikaki orchestre na bango; nsima na sanza minei, bango nyonso misato bakomaki basakoli. Na kati wana, mama na bango, leki na bango ya mobali mpe ndeko na bango ya mwasi oyo asilaki kobala babandaki koyekola Biblia. Bongo, moninga mosusu asengaki mpo abanda koyekola. Ezalaki esengo na komona bato mitano kati na bango kozwa batisimo mokolo moko na assemblée moko ya circonscription. Mibale bazali komibongisa lisusu mpo na batisimo; mama mpe mwana, bazali kokola malamu. Ya solo, Liloba na Nzambe ezali na nguya.

◻ Na Argentine, moto moko azalaki na mosali ya moyibi mpe ya goigoi oyo akimaki kozanga kolaka na ntango oyo asengelaki kozongisela ye mbongo mingi oyo adefaki. Bambula elekaki mpenza, kino mokolo mosusu ntango azalaki kobima na ndako na ye, mobali yango akutanaki na mosali na ye ya kala. Mosali apesaki ye mbote mpo alimbolaki ye ete: “Nazalaki mpe koya epai na yo. Nalingaki kozongisela yo mbongo na yo. Yango oyo. Natondi yo mingi mpe nasengi yo olimbisa ngai ndenge nayaki noki te mpo na kozongisa mbongo yango.” Mobali yango akamwaki mpe atunaki ye mpo na nini asalaki bongo. Mosali ayanolaki ye: “Sikawa, nazali koyekola Biblia mpe nazali Témoin de Jéhovah. Biblia elobi na biso tozala na nyongo ya moto te, longola bolingo. Yango wana nayei kotuta mbongo na yo.” Mobali yango atunaki boye: “Nguya nini Biblia ezali na yango mpo ekoka kobongola moto kino motindo boye?” Mobali yango abandaki koyekola Biblia mpe sikawa ye mpe abandi koyeba solo, nyonso wana mpo na mbongwana monene oyo solo ya Biblia esalaki epai na mosali na ye ya kala.

Na Argentine, bato mingi ya motema sembo bazali kondima solo ya Biblia, oyo ezali kobongola bato mpe bazali komekola ezaleli mosusu ya malamu. Likambo oyo elandi emonisi yango:

◻ Temwe moko alobi ete: “Mokolo mosusu tozalaki kosakola, tobetaki na ekuke moko, mpe toyokaki makelele na kati ya ndako. Mobali moko abimaki mpe azalaki na nkanda makasi mpenza. Tobandaki kolimbola ye ntina ya vizite na biso, kasi alingaki kobengana biso. Tozalaki ntango nyonso koloba na mongongo ya kokita mpe na kimya. Nsima na yango, akitisaki motema. Tolobelaki bongo mokano kitoko oyo Jéhovah abongisi mpo na mokili. Yango esimbaki ye na motema mpe abimisaki maloba ya kokamwa: ‘Ezali Nzambe nde atindi bino.’ Asengaki biso lokota na kati. Na kati ya ndako, mwasi na ye mpe bana na ye bafinanaki na kwé moko mpe bazalaki kolela. Mobali yango alobaki ete: ‘Ntango boyaki nakomaki pene mpo na koboma libota na ngai mpe na nsima nalingaki komiboma. Nakomi na nsuka. Nasili kobungisa mosala na ngai, sikawa balingi kobimisa biso na ndako mpe nazali na banyongo mingi’”

Likambo yango esukaki na ndenge ya esengo. Moklisto mosusu azwelaki mobali yango mosala, mpe akokaki kofanda na ndako mosusu. Ye mpe “mwasi” na ye babandaki koyekola Biblia mpe babalanaki; bazalaki kofanda elongo uta mbula 15.

Masolo oyo mamonisi ete solo ya Biblia ezali na nguya epai ya moto nyonso oyo azali na komikitisa na motema oyo azali koyekola Liloba na Nzambe mpe azali kosalela yango.

[Likanisi ya paragrafe on page 5]

“Liloba na Nzambe lizali na bomoi mpe lizali koyokisa nguya na yango.”​—BAEBELE 4:12.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto