Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 1/12 nk. 8-15
  • Kolanda matambe na Klisto: ezali likambo moke te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kolanda matambe na Klisto: ezali likambo moke te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Toyekola komesena
  • Topengwa na nzela te
  • Tobatela vitese oyo esengeli
  • Totika lolendo, tolemba te
  • “Bólanda matambe na ye malamumalamu”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Libota oyo ezali kolanda matambe ya Yesu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Tókoba kotambola ndenge Yesu Klisto atambolaki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Kotambola na Nzambe —matambe ya liboso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 1/12 nk. 8-15

Kolanda matambe na Klisto: ezali likambo moke te

“Mpamba te Klisto mpe ayokaki mpasi mpo na bino; atikeli bino elakiseli ete bolanda matambe na ye.”​—1 PETELO 2:21.

1, 2. (a) Nini ekoki kozala likambo ya moke te, mpo na nini likambo yango etali mpenza baklisto? (b) Mituna nini mitunami?

SOKO osila kotambola likolo na zelo mobesu penepene na ebale, osila komona matambe oyo moto mosusu alekaki liboso na yo atikaki? Mbala mosusu, wana omonaki banzela mingi, omekaki kolanda moko, konyataka sikisiki mpenza matambe na ye oyo alekaki liboso na yo. Osalaki bongo? Na yango, omonaki ete ezali likambo ya petee te. Ee, ézala na elilingi to na elilingi te, ezali likambo monene mpo na kolanda matambe ya moto mosusu. Nzokande, na kolataka nkombo ya baklisto, tomonisaki bongo mposa na biso ya kolanda matambe na Klisto.

2 Ozali pene na kotya molende esengeli mpo na kokokisa mokumba yango, ata liboso na likambo nini oyo ekobima? Soko ezali bongo, ndimbola malamu ya mikakatano mikobimela ye oyo alingi kolanda matambe likolo na zelo pembeni na ebale ekosalisa yo ete olanda malamumalamu, na elobeli na elimo, matambe na Klisto.

Toyekola komesena

3. Mpo na nini kolanda matambe ya moto mosusu ezali petee te?

3 Etamboli ya moto na moto ekeseni. Na ndakisa, moto mosusu akobwaka makolo milai wana ezali ye kotambola. Bobele bongo makolo na biso makoki kolanda nzela alima, to makoki kongumbama na kati to kotengama libanda. Omoni mokakatano ezali wana? Na yango, mpo na kolanda malamu matambe ya moto mosusu, tosengeli kolandisa likolo na yango bonene ya matambe na biso mpe ndenge ya kotelemisa makolo na biso. Ezali petee te, kasi tosengeli kosala bongo, mpamba te ndenge mosusu ya kosala ezali te.

4. Mpo na nini eleki mpasi na kolanda matambe na Klisto?

4 Na elobeli na elilingi, etamboli na Yesu ekokanaki na ya moto mosusu te, mpamba te bobele ye nde azalaki moto ya kokoka; ee, moto “oyo ayebaki lisumu te”. (2 Bakolinti 5:21) Lokola bato babotamaka kati na ezalela ya kozanga kokoka mpe kati na lisumu, ezali mpasi mpo ete balanda matambe na Yesu. Ezali yango Paulo akundolaki epai na baklisto ya Korinte: “Mpamba te bozali bato na mosuni. Mpo naino zuwa mpe nkaka ezali kati na bino, bozali bato na mosuni te? Bozali kotambola lokola bato te?” Mposa ya kowelana, ya koswana, ya “misala na mosuni”, ezali komonana ete ezali malamu epai na bato bazangi kokoka; kasi Yesu, ye, azalaki kolanda nzela ya bolingo, mpe “bolingo ezali na zuwa te, . . . ekosilika te”. Na yango, ezali na biso mpasi koleka mpo na kolanda matambe na Klisto, koleka kolanda matambe ya moto oyo azangi kokoka.​—1 Bakolinti 3:3; 13:4, 5; Bagalatia 5:19, 20; tala Baefese 5:2, 8.

5, 6. (a) Mpo na nini bato mingi balandaka matambe na Klisto te? Na ntina yango, toli nini Paulo apesaki? (b) Bilendiseli nini bato bazali kozwa lelo mpo ete batambola na matambe na Klisto, mpe yango ezali kobimisela bango matomba nini?

5 Longola ezaleli ya kozanga kokoka, kozanga koyeba mokano ya Nzambe ekoki kopekisa moto atambola na matambe na Klisto. Yango wana Paulo apesaki epai na baklisto na Efese elendiseli elandi: “Bongo, nazali koloba mpe kotatola kati na Nkolo ete ebongi na bino lisusu te ete botambolaka pelamoko ekotambolaka bapakano na makanisi na bango na mpamba. Ekaniseli na bango ezali na molili, batangolami mosika na bomoi na Nzambe mpo na kozanga boyebi kati na bango, na ntina na makasi na mitema na bango.”​—Baefese 4:17, 18.

6 Na nzela ya kosakolama ya Bokonzi, bato babyangami ete batika kotambola ndenge ezali bango kotambola kati na molili na makanisi, oyo elimboli kozanga koyeba mikano na Nzambe, mpe batika komibendama na motema makasi, mpe kotika kolanda mikano mabe. Nde balendisami na kolanda ndakisa ya kokoka ya Klisto, na “kotambolaka na bomoko elongo na ye”, “kokanga bongo makanisi nyonso na nkanda ete matosa Klisto”. (Bakolose 2:6, 7; 2 Bakolinti 10:5) Bato oyo bazali pene na komema mokumba yango, bakozwa bokatikati kati na kondima na bango, mpe, wana bakomesana, ekokoma na bango petee mpo na kokunda matambe na Klisto.

7. Atako ezali petee te mpo na kolanda matambe na Klisto, eloko nini emonisi biso ete likambo yango ekoki kosalema?

7 Ezali ntango nyonso petee te mpo na kolanda matambe na Klisto, mpamba te bokeseni ezali monene kati na moto na kokoka mpe oyo azangi kokoka; bato bazangi kokoka basengeli kosala mabongwani minene soko balingi kolanda ndakisa ya kokoka. Na ntina na makambo oyo basangoli yango na kobotama to na ntina na esika bafandi, bamoko bazali na mikakatano mingi mpo na kolanda bomoi ya boklisto. Atako bongo, Jéhovah ayebisi biso solo ete ye nani amibongisi mpo na kosala molende esengeli akokoka yango. Ntoma Paulo alobaki ete: “Nayebi kosala makambo nyonso kati na ye oyo akokembisaka ngai na nguya.” (Bafilipi 4:13; tala 2 Bakolinti 4:7; 12:9) Ezali bongo mpo na baklisto nyonso.

8, 9. (a) Mpo na nini esengeli na biso kotya mpenza likebi makasi ntango tozali kolanda matambe ya moto? (b) Toli nini ezwami na Biblia tosengeli kolanda mpo ete topengwa te na matambe na Yesu?

8 Wana ezali biso kolanda matambe likolo na zelo, ezali na ntina ete totala nzela tozali kotambola; soko te ntango miso na biso makowayawaya mpe makobendama na makambo mazali kosalema na pembeni na biso to na makambo mosusu, tokozanga te kobeta libaku. Soko tozali kotya likebi te na likambo oyo tozali kosala, tokopengwa na matambe oyo tozali kolanda. Na yango, esengeli na biso ntango nyonso kosenzela, mingimingi soko makelele ya mbalakaka makoki kobima to makambo oyo makoki kopengola likebi na biso na mosala oyo tozali kosala.​—Tala Yobo 18:10, 11.

9 Na makambo na elimo, etinda yango ezali mpe na ntina mpo na bato oyo bazali kolanda matambe na Yesu. Klisto alendisaki bayekoli na ye bakeba, soko te mitema na bango “mikokoma makasi mpo na kolunda, soko na kolangwa, soko na bitungiseli na bomoi”. (Luka 21:34) Satana azali kosalela makambo yango ya bomoi ya mokolo na mokolo mpo ete biso tobunga nzela ya matambe ya Yesu. Azali kosalela na ntango esengeli mpenza mabaku kati na yango tozali na bolembu, lokola ntango tozali konyokwama, tozali na maladi to tozangi mosolo. “Mpo ete tozonga nsima te”, tosengeli “kotya likebi koleka na makambo oyo toyokaki”; na maloba mosusu, tosengeli mpenza kotya miso na matambe na Klisto.​—Baebele 2:1; tala 1 Yoane 2:15-17.

Topengwa na nzela te

10. (a) Likama nini tokoki kokutana na yango soko matambe mingi masangani nzela moko? (b) Na makambo na elimo, mpo na nini ekozala mpasi mpenza soko tolandi matambe ya mabe?

10 Soki Libongo epai tozali kotambola ezalaka na bato mingi, ekoki kozala ete bilembo na matambe na bato mingi bitikali na nse, mpe ete bato mingi basili koleka bobele na nzela moko, mpe matambe mosusu ekoki komonana na miso ete ekokani. Ezali bongo na ntina mpenza ete na ntango yango, toyeba wapi nzela ya malamu; soko te tokolanda nzela ya mabe mpo na yango tokozwa mpasi mpenza kati na elimo. Soko tozali kolanda matambe oyo na miso mamonani ete mazali malamu kasi oyo na solo mpenza mazali mabe, tozali komikotisa na likama oyo lisese elandi ekebisi biso na yango: “Nzela ezali oyo emonani malamu na moto, nde nsuka na yango bobele nzela na kufa.”​—Masese 16:25.

11. Likebisi nini Paulo apesaki epai na lisangá na ekeke ya liboso, mpe Paulo azali ndakisa lelo oyo mpo na banani?

11 Likama ekobima solo. Yango wana kati na lisangá ya boklisto ya ebandeli, Paulo alobaki epai na bandeko na ye: “Nakamwi ete bozali kolongwa nokinoki na ye oyo abyangi bino na ngolu na Klisto; bozali mpe kobongwana epai na nsango malamu mosusu. . . . Kasi bamosusu bazali baoyo bakotungisa bino mpe balingi kobongola nsango malamu na Klisto. . . . Soko nani akosakolaka nsango malamu ekeseni na yango eyambi bino, tika ete alakelama mabe.” (Bagalatia 1:6-9) Na ndakisa na Paulo, Collège central ya ba Témoins de Jéhovah ezali kokebisa biso lelo na bapengwi mpe na bandeko ya lokuta oyo bakoki komema biso na banzela mabe. Baklisto ya solo baboi kopengwa na nzela oyo Klisto abongiselaki bango na litambwisi na Nzambe.​—Nzembo 44:18.

12. (a) Ndenge nini 2 Timote 1:3 ezali kosalisa biso ete tokosama te na banzela mabe? (b) Lolenge mosusu ya nsango malamu ezali ndenge nini?

12 Soko tolingi kokosama te, tosengeli kotya likebi makasi na bilembo oyo ekosalisa biso toyeba matambe na Klisto; mpe boyebi ya solo ya Klisto, ya mateya na ye mpe lolenge oyo lisanga ya boklisto ezali kotambola ezali kosalisa biso toyeba malamu “lolenge na maloba na lobiko” oyo ekobatela biso liboso na baoyo ‘balingi kobebisa nsango malamu na Klisto’. (2 Timote 1:13) Ezali na lolenge mosusu na nsango malamu oyo ekomema biso na banzela mabe, mpamba te elongobani na solo te; nde ezali kobongola solo, ezali kotya mobulungano na banzela. Na esika ya komonisa na lolenge na polele basolo mpe mitinda ya moboko ya Biblia, ezali kotemela yango. Na esika ya kolendisa biso tokangama kati na mosala na Jéhovah, ezali nde kotinda biso na kolembisa makasi na biso. Nsango yango ezali na elendiseli moko te mpe ezali kokumisa ata nkombo na Jéhovah te, ata lisangá na ye te; na esika ete etonga, ezali nde kobebisa. Tokoboya kolanda solo banzela motindo yango.

Tobatela vitese oyo esengeli

13. Vitesse na biso esengeli kozala ndenge nini ntango tozali kolanda matambe ya moto mosusu?

13 Molai ya matambe na biso ekotalela vitese ya etamboli na biso. Mingimingi, wana tozali kotambola noki, matambe na biso ekozala mpe milai. Na yango, ekozala na biso petee mpo na kolanda matambe ya moto soko tozali kotambola na vitese moko na ye. Bobele bongo, na makambo na elimo, mpo na kolanda matambe na Motambwisi na biso Yesu Klisto, tosengeli kobatela vitese moko na ye.

14. (a) Kobatela vitesse moko te na Klisto, elimboli nini? (b) Mpo na nini ezali bozoba na kotambola liboso koleka “moombo na sembo mpe na mayele”?

14 Soko tobateli vitese moko na Klisto te, yango elimboli boye: to tozali na vitese koleka ye na kokendaka liboso na “moombo na sembo mpe na mayele” oyo ye azali kosalela mpo na kokokisa mokano ya Jéhovah; to tozali kotikala nsima, na esika ya kolanda pene mpenza litambwisi ya “moombo” yango. (Matai 24:45-47) Ndakisa ya likambo oyo etangami liboso epesameli biso na mwa baklisto oyo basili kolemba mpo balingaki ete mbongwana esalema noki na makambo matali bindimeli mpe lisangá. Bamonaki ete mbongwana yango ezalaki na ntina mpenza mpe mbele esengelaki kosalema uta kala. Lokola bamonaki ete makambo mazalaki kotambola mpenza noki te, bamilongolaki na lisangá ya Jéhovah. Tala bozoba! mpe bazalaki komona mosika te! Mpamba te, esili komonana mbala mingi ete makambo oyo batyelaki ntembe, mabongisamaki mwa ntango na nsima, na ngonga oyo eponamaki na Jéhovah.​—Masese 19:2; Mosakoli 7:8, 9.

15. Ndakisa nini malamu mokonzi David mpe Yesu batikelaki biso mpo na oyo etali kotambola na vitesse esengeli?

15 Na esika ya koyebisa Jéhovah nzela ya kolanda, na kolakisaka ye vitese oyo makambo masengeli kotambola, moto na mayele akozela ete Jéhovah alakisa ye nzela. Mokonzi David apesi biso ndakisa malamu na likambo yango, mpamba te aboyaki koboma mokonzi Saülo mpo ete azwa bokonzi; nzokande azelaki ngonga Jéhovah aponaki mpo na kopesa ye bokonzi yango. (1 Samwele 24:1-15) Bobele bongo, Yesu, “Mwana na David”, ayebaki ete esengelaki na ye kozela liboso na kozwa bokonzi na makoló. Ayebaki maloba oyo na esakweli, mazalaki kotalela ye: “Fanda na loboko na ngai ya mobali, kino ekotya ngai bayini na yo lokola etemelo na makolo na yo.” Na bongo, ntango etuluku na Bayuda elingaki “kozalisa ye mokonzi”, Yesu amibendaki nokinoki. (Matai 21:9; Nzembo 110:1; Yoane 6:15) Baebele 10:12, 13 emonisi biso ete mbula soko 30 na nsima, Yesu azalaki se kozela bokonzi; na solo mpenza, azelaki pene na bikeke 19 mpo ete afanda na kiti ya bokonzi, likambo oyo esalemaki na 1914, ntango Bokonzi na Nzambe ebotamaki.

16. (a) Kotambola malembemalembe elimboli nini? (b) Motema molai ya Jéhovah elimboli nini, mpe tokoki kosala nini mpo ete tosalela yango na ndenge elongobani?

16 Kozanga kotambola na vitese esengeli ekoki kolimbola lisusu kolembisa etamboli, kotikala nsima. Na yango, ntango Liloba ya Nzambe ezali komonisa biso ete tosengeli kobongola likambo boye to boye kati na bomoi na biso, tobongolaka yango nokinoki? to tokanisaka ete lokola Jéhovah azali na motema molai tokoki kobongola makambo yango ata nsima, na kotyaka motema ete na ntango yango mbongwana ekosalema kozanga mpasi? Ya solo Jéhovah azali na motema molai, kasi ezali te mpo biso tozonga nsima, na esika ete tosala mbongwana oyo esengeli. Na yango, ‘soko azali na motema molai epai na biso, ezali mpo alingi te ete bamosusu babomama kasi ete bato nyonso bakoma kino kobongwana na motema’. (2 Petelo 3:9, 15) Na bongo ekozala malamu koleka ete tomekola mokomi na nzembo, oyo alobaki: “Nakei mbango mpe naumelaki te mpo na kotosa mibeko na yo.”​—Nzembo 119:60.

17. Kotambola na vitesse esengeli mpo na oyo etali mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi elimboli nini? Mituna nini tokoki komituna mpo na likambo yango?

17 Tokoki mpe kotikala nsima mpo na oyo etali kosakola nsango malamu. Engebene Matai mokapo 25, tozali kobika na eleko oyo Yesu azali kosambisa mokili mpe azali kokabola “bampate” na “bantaba”. Kosambisama yango ezali kosalema mpenzampenza na kosakolama ya “nsango malamu”. (Matai 24:14; 25:31-33; Emoniseli 14:6, 7) Ntango epesami mpo na mosala yango ya kokabola bampate mpe bantaba ezali na nsuka na yango. (Matai 24:34) Lokola etikali moke mpo ntango yango esuka, Yesu azali kotambwisa mosala yango noki; na motindo yango azali kokokisa mokumba na ye lokola esaleli kati na maboko na Nzambe, ye oyo, kolobelaka mpo na mosala yango ya koyanganisama, apesi elaka elandi: “Ngai Jéhovah, nakoyeisa yango mbango.” (Yisaya 60:22) Biso basali elongo na Nzambe mpe biso baoyo tozali kolanda matambe ya Mwana na ye, tobakisaka vitese na biso na ndenge ya makoki oyo tozali na yango mpo na kolongono ya nzoto mpe mikumba oyo Biblia esengi biso? Ba rapports ya mosala ya kosakola emonisi ete bamilio na ba Témoins de Jéhovah bazali kosala bongo.

Totika lolendo, tolemba te

18. Ndenge nini moto akoki kobanda komityela motema koleka ndelo, mpe ndenge nini Biblia ekebisi biso mpo na likama yango?

18 Wana ekoumela biso na kolandaka matambe ya moto, tokomesana mpe na etamboli na ye. Kasi, soko tokomi na lolendo, ata ndele tokobeta libaku. Na yango, soko tozali kolanda matambe na Yesu, tosengeli koyeba ete ezali likama na komityela motema koleka ndelo, kotya motema na makasi na biso mpe makoki na biso, kokanisa ete tosili kolonga na kotambola mpenzampenza kati na nzela ya kokoka ya Klisto. Likambo oyo ekomelaki Pierre kala (Luka 22:54-62) ezali likebisi ya motuya mpo na biso mpe emonisi ntina ya toli oyo eyebisami kati na 1 Bakolinti 10:12: “Boye, tika ete ye oyo akanisi ete azali kotelema ngwi akeba ete akwea te.”

19. (a) Likambo nini ekomelaka mbala mingi baklisto nyonso? (Yakobo 3:2) (b) Ndenge nini tosengeli kotalela maloba na Paulo mazwami kati na Baloma 7:19, 24?

19 Mpo bazangi kokoka, baklisto nyonso babotaka libaku. Ekoki kozala libunga ya moke mpe moto te akomona yango; to ekoki kozala lisumu monene, mpe bato banso bakomona yango. Kati na makambo oyo mibale, ezali malamu na komikundola maloba oyo Paulo alobi na bosolo nyonso: “Malamu oyo elingi ngai kosala, nakosalaka yango te. Kasi mabe oyo elingi ngai te, nakosalaka bobele yango. Ngai moto na mawa mingi!” (Baloma 7:19, 24) Ya solo, tokoki kosalela maloba oyo te mpo na kosala mabe. Ezali nde elendiseli mpo na baklisto bamipesi oyo bazali kobunda na ezaleli na bango ya kozanga kokoka; ezali kosalisa bango ete batika milende na bango te mpo na kolonga na ntembe oyo monene: kolanda matambe ya kokoka ya Yesu.

20. Ndenge nini Masese 24:16 ezali kosalisa biso na kurse na biso mpo na bomoi? (b) Tosengeli kozwa ekateli nini?

20 Masese 24:16 elobi boye: “Moyengebene akokwea mbala nsambo nde akotelema lisusu.” Wana ezali ye kopota mbango mpo na bomoi, moko te kati na biso akoki kokanisa ete likambo bobele moko ya kosala ezali ete atika kurse. Kurse yango ezali molai, kurse ya koyika mpiko, kasi ezali kurse bobele ya ntaka ya bamètres nkama te. Mopoti mbango na kurse ya mwa ntaka ya ba mètres, soko akobeta mwa libaku mpe akwei, akoki kolonga lisusu te; kasi ezali bongo te mpo na kurse ya kilomètre mingi to marathon, ata mopoti mbango abeti libaku, akoki lisusu kotelema mpe kosilisa kurse na ye. Soko tosali libunga moko oyo ekotinda biso toloba: “Ngai moto na mawa mingi!” tomikundola ete tozali lisusu na ntango ya kotelema. Tokoki lisusu kozongela kurse na biso na kolandaka bongo matambe na Motambwisi na biso, ye Yesu Klisto. Tozali na ntina moko te ya kobungisa elikya, to ya kolemba. Tozwa ekateli, na lisalisi ya Jéhovah, mpo na kokokisa mokumba monene oyo ya ‘kolanda pene mpenza matambe na Yesu’.​—1 Petelo 2:21.

Mpo na nini baklisto basengeli:

◻ Koyekola komesana na botamboli?

◻ Kotya likebi makasi?

◻ Kobungisa te lolenge na maloba na solo?

◻ Kobatela vitesse malamu?

◻ Kotika lolendo?

◻ Kolemba te?

[Elilingi na lokasa 15]

Soko atye miso na ye se liboso, moyengebene akotelema solo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto