Libota oyo ezali kolanda matambe ya Yesu
Totamboli na elimo moko te? na matambe moko te?—2 BAKOLINTI 12:18.
1. Mpo na nini mingimingi, ezalaka mpasi te mpo na koyeba ete moto boye azali Témoin de Jéhovah?
DIRECTEUR ya école primaire moko (na Etats-Unis) alobaki: “Bazali na limemya, na bopolo mpe bana malamu na kelasi. Likambo yango emonanaka na lingomba mosusu te.” Azalaki kolobela mpo na banani? Mpo na bana ya ba Témoins de Jéhovah oyo batangaka na eteyelo na ye. Bato mingi basili komona ete Batemwe mpe bana na bango, bazali na makambo mingi ekokokani kati na bango. Awa bambula ezali koleka, esili komonana polele ete bazali na bomoko na bindimeli na bango mpe na etamboli na bango. Na yango ezali mpasi te mpo na koyeba ete moto boye azali Témoin de Jéhovah.
2. Ezaleli nini ezalaki komonana kati na lisangá ya boklisto na ekeke na liboso, mpe Paulo alobaki nini na ntango yango?
2 Kati na mokili ya lelo oyo ezali na bokambwani mingi, bomoko oyo esangisi ba Témoins de Jéhovah ezali kokamwisa bato. Nzokande ndimbola na yango ezali boye: Batemwe nyonso bazali kotya makasi mpo na kolanda matambe na Yesu. (1 Petelo 2:21) Bomoko motindo yango ezalaki uta kala kati na lisangá ya ekeke ya liboso. Paulo alobaki mokolo mosusu epai na baklisto ya Korinte ete: “Bandeko, nalombi bino na nkombo na Nkolo na biso Yesu Klisto ete bino nyonso bolobaka na motindo moko; bokabwana kati na bino te kasi bosangana na motema moko mpe na elimo moko.” (1 Bakolinti 1:10) Na kopemama na Nzambe, ntoma apesaki mpe batoli mpo na oyo etali etamboli to ezalela ya kolanda ntango bamoko baboi kobatela bomoko ya baklisto.—Tala Baloma 16:17; 2 Batesaloniki 3:6.
3, 4. Ndenge nini Paulo amonisaki bomoko oyo ezalaki kati na Tito mpe ye, moboko ya bomoko yango ezalaki nini?
3 Pene na mobu 55, Paulo atindaki Tito na Korinte mpo ete asalisa lisangá na kobongisa makabo mapesamaki mpo na baklisto ya Yudea oyo bazakaki na bosenga, mpe mbala mosusu mpo na kotala soko bazalaki kolanda batoli oyo apesaki bango. Kokomaka na nsima epai na Bakolinti, Paulo akundolaki bango vizite ya Tito, oyo eutaki kosalema kala mingi te mpe atunaki bango motuna oyo: “Tito azimbisi bino? Tosali makambo na elimo moko te? Totamboli na matambe moko te?” (2 Bakolinti 12:18) Paulo alingaki koloba nini na oyo ete kotambola “na elimo moko” mpe “na matambe moko”?
4 Na maloba wana Paulo amonisaki ete Tito mpe ye bazalaki kosala na bomoko. Tito azalaki ntango mosusu kokende na mibembo elongo na Paulo, mpe na ntembe te ayekolaki makambo mingi epai na ye. Nzokande, bomoko oyo ezalaki kati na bato yango mibale ezalaki na moboko makasi koleka bango mibale bazalaki kobatela boyokani malamu elongo na Jéhovah mpe bazalaki kolanda matambe na Klisto; ee, Tito azalaki komekola Paulo lokola Paulo azalaki komekola Klisto. (Luka 6:40; 1 Bakolinti 11:1) Na yango, bayekoli oyo mibale bazalaki kotambola na elimo mpe na matambe na Yesu.
5. Likambo nini esengeli komonana epai na bato oyo, lokola paulo mpe Tito, bazali kotambola lelo “na elimo moko” mpe “na matambe moko”?
5 Ezali likambo ya kokamwa te ete baklisto ya ekeke ya 20, baoyo bazali kotambola “na elimo moko” mpe na “matambe moko” na Paulo mpe Tito, bazali na bomoko motindo wana. Kasi, bokabwani oyo ezali komonana kati na boklisto ya mokili oyo emonisi ete basangani na yango bazali baklisto ya lokuta, baoyo bazali kolanda matambe ya Motambwisi te. (Luka 11:17) Kokesena monene oyo ezali kati na baklisto ya solo mpe baklisto ya nkombo mpamba ezali komonana kati na makambo mingi. Tokolobela makambo minei mazwami kati na yango.
Makila ezali eloko ya bulee
6, 7. (a) Ndenge nini baoyo bazali kolanda matambe na Yesu basengeli kotalela makila? (b) Bokeseni nini ezali lelo oyo kati na ba Témoins de Jéhovah mpe bato mosusu oyo bazali koboya ete bozongisa bango makila?
6 Na mobu 49, Collège central oyo ezalaki kotambwisa lisangá na ekeke ya liboso etindelaki baklisto mokanda oyo ezalaki koyanola na motuna elandi: Bapakano oyo bazalaki koyamba losambo na boklisto, basengelaki kotosa Mibeko na Moïse? Tala makambo mokanda yango elobaki: “Mpo ete emonanaki malamu na elimo santu mpe na biso kotyela bino mikumba mosusu te, bobele makambo oyo masengeli, ete boboya biloko bipesameli bikeko, na makila, na banyama bakamolami, na ekobo.” (Misala 15:28, 29) Okomona ete kati na makambo ‘masengeli’, moko na yango etali komibatela na makila. Baoyo bazalaki kolanda matambe na Yesu bakokaki kolya makila te, ezala na monoko to na nzela mosusu.
7 Kati na mangomba ya boklisto ya mokili oyo, oyo basangani na yango bazali kondima ete bozongisa bango makila, mobeko oyo ezali kobukama makasi mpenza. Ezali solo ete na bambula oyo, bato mingi basili koyeba makama oyo ekoki kobima soki bandimi ete bazongisa bango makila mpe basili koboya yango mpo na maladi oyo yango ekoki kopesa — likambo yango ekomi kosalema mingimingi uta ntango bamonaki ete bato mingi bazwaki SIDA mpo bazongisaki bango makila. Nzokande, lisangá nini ezali koboya kozongisa to komela makila mpo bazali kotosa mobeko ya Nzambe oyo epekisi makila? Soko moto moko azali na maladi mpe aboi bazongisa ye makila, monganga akokanisa nini? Akotuna ye mbala moko ete: ‘Ozali Témoin de Jéhovah?’
8. Ndenge nini mwasi moko Témoin de Jéhovah na Italia, azwaki mapamboli na ndenge atosaki na ekateli nyonso ezalela ya bulee ya makila?
8 Eleki mibu soko 8, Antonietta, mwasi moko na mokili ya ltalia, azwamaki na maladi makasi mpenza. Makila na ye ekitaki mingi mpenza. Bongo minganga bayaki komona ete basengelaki kozongisa ye makila mpo abika. Ntango aboyaki, minganga mpe libota na ye batemelaki ye. Ata bana na ye mibale ya mike babondelaki ye boye: “Mama, soko olingaka biso mpenza, ndima makila.” Antonietta azwaki ekateli ya kotikala sembo, mpe na esengo, akufaki te. Kasi maladi na ye mazalaki mpenza makasi, na boye ete monganga alobaki: “Nazali koyeba te ndenge nini azali naino na bomoi.” Basalisaki ye na motindo mosusu oyo andimaki na lisosoli malamu mpenza, mpe maladi na ye esilaki nokinoki. Bongo monganga mosusu alobaki na ye: “Nakoki mpenza kondima te. Ata soko bazongisaki yo makila mokolo mobimba, maladi na yo ekokaki kosila nokinoki boye te.” Lelo oyo, Antonietta azali pionnier permanent, mpe bana na ye mibale ya mibali oyo bazali na mibu 12 mpe 14, bazali kokola malamu kati na solo. Moklisto yango amonisaki solo molende na kotosaka mobeko ya Nzambe mpo na makila. Akokisaki bongo ‘likambo lisengeli’. Ba Témoins de Jéhovah oyo bazali kotambola na matambe na Yesu, bazali na likanisi moko mpo na likambo yango.
Etamboli malamu
9. Likambo nini mosusu ‘esengeli’ epai na bato oyo bazali kolanda matambe na Yesu, mpe likambo nini ekomelaka baoyo bazali kokokisa yango te?
9 “Komibatela . . . na ekobo”, ezali mpe ‘likambo lisengeli’ oyo etangami kati na mokanda oyo collège central na ekeke na liboso etindaki epai na baklisto. Kati na mokanda na ye ya liboso epai na Bakolinti, Paulo alobeli na mozindo likanisi yango. Alobi boye: “Moto na pite mpe basambeli na bikeko mpe bato na ekobo mpe bakembi na nsoni mpe mibali bamibebisi na mibali . . . bakosangola Bokonzi na Nzambe te.” (1 Bakolinti 6:9, 10) Baklisto bazali kosalisa bato oyo balingi kosalela Jéhovah ete batika bizaleli oyo ya mabe. Ata basangani kati na lisangá oyo bakokwea na ezaleli yango ya mabe, soko bamibaloli mpe bamibongoli, bakozwa lisalisi oyo bazali na yango mposa mpo na komipetola. (Yakobo 5:13-15) Nzokande, soko moklisto amipesi na bizaleli yango ya mabe mpe aboi kobongola motema, ebongi kotalela ye engebene etinda ya Biblia oyo ya petee; oyo Paulo alobaki na kopemama na Nzambe: ‘Bosangana na moto moko te oyo abyangami ndeko mpenza soko ye azali moto na pite . . . Bengana moto yango mabe na kati na bino.’—1 Bakolinti 5:11, 13.
10, 11. (a) Nani apesi nzela na etamboli mabe oyo ezali komonana na mangomba ya mokili, mpe mpo na nini? (b) Ndenge nini likambo ya mobali moklisto moko na Filipine emonisi ete libota ya ba Témoins de Jéhovah ezali na etamboli malamu?
10 Atako liteya oyo ezali polele mpenza, nzokande boklisto ya mokili oyo emitiki se na ezaleli oyo ya mbindo. Bato bapesi nzela na ezaleli yango ezali bakonzi na mangomba oyo mbala mosusu bazali kolembisa mitinda ya Biblia, to bazali kozanga molende mpo na kotinda bato batosa yango. Na likambo yango lisusu, libota ya ba Témoins de Jéhovah ezali kotambola na matambe na Yesu.
11 Totalela likambo ya José, mobali moklisto moko na Filipine. Na mbula 17, ayebanaki ete azalaki mobundi monene mpe mosani. Azalaki kokota boloko mbala mingi mpo na moyibi. Bongo ayaki koyebana na ba Témoins de Jéhovah. Alobi boye: “Boyekoli ya Biblia ebongolaki mpenza bomoi na ngai. Natiki komela likaya, natiki komela masanga mpe nasili koyekola komikanga motema. Lokola natikali se na mwasi moko, nazali sikawa na lisosoli malamu. Mpe lisusu, baninga na ngai ya pembeni bazali komemya ngai: na kala bazalaki kobenga ngai ‘Elombe José’; lelo oyo, bazali kobenga ngai ‘José, Témoin de Jéhovah’. Mwana na ngai mpe mwana ya ndeko na ngai bazali basaleli na misala na lisangá epai ngai nazali nkulutu mpe pionnier permanent.” Lokola bamilió mosusu ya baklisto ba Témoins de Jéhovah, José azali kotambola na matambe na Yesu na kozalaka ntango nyonso peto na ezaleli na ye.
Kozanga kokota na makambo ya mokili
12. Ezaleli nini esengeli komonana epai na baklisto ya solo, Yesu alobelaki yango kati na libondeli oyo ezwami na Yoane 17?
12 Na butu ya nsuka oyo alekisaki elongo na bayekoli na ye, Yesu asalaki libondeli molai epai na Tata na ye, kati na yango alakisaki na motindo nini mosusu baklisto basengelaki ‘kotambola na matambe na ye’. Na ntina na bayekoli na ye, alobaki: “Bazali bato na mokili te pelamoko ngai nazali moto na mokili te.” (Yoane 17:16) Maloba yango malimboli ete baklisto bakotaka na makambo na mokili te. Na esika ya kokota na kowelana na politike to na bikólo oyo ezali kotombokisa bato, bango bazali kolobela bazalani na bango na ntina na Bokonzi na Nzambe, oyo ekoya kosilisa mikakatano ya mokili.—Matai 6:9, 10; Yoane 18:36.
13, 14. (a) Mpo na oyo etali kozanga kokota na makambo na mokili, kokesana nini ezali kati na basangani ya mangomba ya mokili oyo mpe ba Témoins de Jéhovah? (b) Bolamu nini baklisto mosusu bazwaki mpo Témwe moko mojaponé aboyaki kokota na makambo na politike?
13 Basangani mingi ya mangomba na boklisto ya mokili oyo basili kobosana etinda oyo epekisi kokota na makambo ya mokili. Mpo na bango, mabota na bango epai bauti ezali na ntina koleka bandeko ya lingomba. Journaliste moko (Mike Royko) amonisaki ete “baklisto” “bazali komona ata mabe moko te na kobundisa baklisto mosusu”. Abakisi: “Soki ezala ete bazali komona yango mabe, mbele bitumba mingi oyo ebomaki bibele na bato na Mpoto elingaki kosalema te.” Eyebani malamu ete ba Témoins de Jéhovah bakotaka na bitumba te, mpe lokola bazali kolanda matambe na Yesu, bakotaka mpe na makambo na politike te. Na yango, eloko moko te ekoki kobebisa bomoko ya basaleli na Jéhovah kati na mokili mobimba.—1 Petelo 2:17.
14 Ezaleli ya baklisto ya solo ya kozanga kokota na makambo ya mokili ezali kobimisa mbala mosusu matomba ya kokamwa. Tala mpo na yango, likambo oyo esalamaki na province ya Tsugaru, na nord ya Japon, epai kuna vote etalelamaka lokola likambo monene. Lisosoli ya Toshio, oyo azalaki sous-directeur na service de finances ya engumba na ye, etindaki ye ete aboya kosangana na kampanye mpo na vote ya mokonzi na engumba oyo autaki kosilisa mandat. Mpo na yango, batindaki ye na mosala ekobongisaka banzela mpe baterase, epai kuna azalaki na poste monene te. Mbula moko na nsima, mokonzi yango ya engumba akangamaki mpo na ezaleli mabe mpe asengelaki kokata mandat na ye. Mokonzi mosusu ya sika aponamaki, mpe ntango ayokaki likambo ekomelaki Toshio, abengaki ye mpe apesaki ye esika mosusu ya monene. Mosala na ye ya sika ebimisaki matomba mpo na bandeko baklisto ya Toshio. Mpo na nini bongo? Mpamba te lokola ye moko alimbolaki yango, ezali mpasi mingi mpo na kofutela mabanda ya masano mpe kosalela yango mpo na bibongiseli mosusu. Kasi ndenge ye moko alobaki “(mpo na mosala na ngai ya sika) Jéhovah asalelaki ngai mpo ete ba assemblées misato ya distrike mpe minei ya circonscription esalema na mabanda yango ya masano.” Asukisi na maloba malandi: “Soko totikali sembo, Jéhovah akosalela biso na ndenge oyo tokoki kokanisa te.”
Kati na libota
15. Mpo na oyo etali libota, ndakisa nini Klisto atikaki epai na baoyo bazali kolanda matambe na ye.
15 Etamboli kati na libota ezali mpe libaku mosusu mpo ete baklisto balakisa ete ‘bazali kolanda matambe na Yesu’. Makomami mamonisi ndakisa Klisto atikaki lokola elakiseli ya boyokani oyo esengeli kozala kati na libota: “Botosanaka mpo na kobanga Klisto. Bino basi botosaka babali na bino pelamoko epai na Nkolo mpo ete mobali azali motó na mwasi pelamoko Klisto azali motó na Lingomba. . . . Kasi pelamoko Lingomba bakotosaka Klisto, bongo tika ete basi batosa babali na bango na makambo nyonso. Bino babali, bolingaka basi na bino pelamoko Klisto alingaki Lingomba mpe amipesaki ye moko mpo na bango.”—Baefese 5:21-25.
16, 17. (a) Likambo nini ya mwa, mangomba ya mokili ezali kokutana na yango mpo na oyo etali libota? (b) Lokola emonisi yango likambo ekomelaki babalani ba Brésiliens, lolenge bobele moko ya kobongisa boyokani kati na libota ezali nini?
16 Na eleko na biso, mangomba ya boklisto na mokili oyo bazali kolanda toli oyo te; yango wana kati na yango tokoki kotanga ebele na mabota makabwani. Lisusu, kozanga boyokani oyo ezali kobima kati na baboti mpe bana ezali se koya makasi. Esili koleka mwa bambula, professeur moko ya pisikoloji alobaki boye: “Libota ezali ebongiseli oyo ezali kokwea”. Bapisikologe ya bana, bapesi-toli na mabota mpe minganga ya maladi na motó oyo bazali komeka kosilisa bokabwani kati na mabota bazali kolonga mpenza te. Nzokande, ba Témoins de Jéhovah bazali kotya molende na kosalela mitinda ya Biblia, mpe eyebani ete epai na bango boyokani ya libota ezali mingimingi malamu.
17 otanga ndakisa ya Brésilien moko, Aldemar, oyo azalaki lieutenant na police militaire mpe azalaki na mikakatano kati na libota. Mwasi na ye akimaki ye mpe alingaki koboma libala. Abandaki komela masanga mingi mpe alingaki ata komiboma. Nsima na yango, bandeko na ye baoyo bazalaki ba Témoins de Jéhovah balobelaki ye makambo oyo ezwami kati na Biblia. Asepelaki mingi na makambo oyo ayokaki mpe abandaki koyekola Liloba ya Nzambe. Lokola alingaki koyokanisa bomoi na ye na mibeko oyo epekisi kokota na makambo ya mokili, oyo ezali kokesenisa ba Témoins de Jéhovah, asengaki ete atika mosala ya soda. Lokola asalisamaki na mitinda ya Biblia oyo azalaki koyekola, mwasi na ye mpe ye moko bamekaki kolonga mikakatano oyo ezalaki kati na bango. Lelo oyo, bango mibale bazali kolanda matambe na Yesu mpe bazali kosalela Jéhovah lokola ba pionniers permanents.
Bazali kotosa mpo na bolingo
18. (a) Mpo na nini ba Témoins de Jéhovah bapambolami lelo na elimo? (b) Yisaya 2:2-4, ezali kokokana na ndenge nini?
18 Ezali polele ete ba Témoins de Jéhovah bazali na bomoko, mpe bazali kotambola bongo na elimo mpe na matambe na Klisto Yesu. Ezala lisangá mobimba to mosangani moko moko kati na yango bazali kozwa mapamboli ya elimo na etamboli yango. (Nzembo 133:1-3) Lokola ezali polele ete bapambolami na Nzambe, etuluku na bato na bosembo bapusami na koyanola na esakweli oyo ezwami kati na Yisaya 2:2-4. Bobele na bambula mitano oyo euti koleka 987 828 kati na bato yango basili kokola kino komipesa na Nzambe mpe kozwa batisimo. Na bolingo na ye, Jéhovah atye ndelo te na motuya ya bato oyo bakoki kosala bokoli motindo yango liboso ete “bolozi monene” eya.—Emoniseli 7:9, 14.
19. (a) Bolamu nini oyo ezali komonana polele basaleli na Jéhovah bakoki kosepela na yango, mpe ndenge nini tosengeli kotalela bolamu yango? (b) Mpo na ntina nini ya moboko tozali kotosa mibeko ya Jéhovah?
19 Lokola emonisi yango makambo oyo touti kolobela, mapamboli na elimo oyo ezali kozwa libota na Nzambe ezali komonisama mbala mingi na matomba ya polele. Na bongo, bato baoyo bazali kotika komela cigarette to likaya, baoyo bazali na etamboli malamu mpe baoyo bazali kotosa ezalela ya bulee ya makila, bazali kopengola maladi mingi. Mpo bazali na bomoi elongobani na solo, yango ezali kosalisa bango bayeba kosalela mosolo na bango, bazala na boyokani malamu elongo na bato mosusu mpe kati na libota. Bolamu nyonso oyo ekoki kotalelama lokola lipamboli ya Jéhovah oyo ezali kolakisa bokasi ya mibeko na Nzambe. Nzokande, kosepela na makambo motindo oyo ezali ntina eleki monene te oyo ezali kopusa bato yango ete batosa mibeko na Jéhovah. Baklisto ya solo bazali kotosa Nzambe mpamba te bazali kolinga ye, mpo ete ye abongi mpo na kozwa losambo na bango, mpe mpo ete likambo bobele moko ezali malamu ezali boye ete bakokisa mokano na ye. (1 Yoane 5:2, 3; Emoniseli 4:11) Satana, ye, azali koloba ete bato basalelaka Nzambe mpo bazwa litomba.—Tala Yobo 1:9-11; 2:4, 5.
20. Ndenge nini ba Témoins de Jéhovah ya ntango na biso bazali komonisa ete bazali kotambola na elimo moko lokola batemwe Baebele ya sembo na kala?
20 Ba Témoins de Jéhovah ya ekeke ya 20 bazali kotambola na elimo lolenge moko na oyo ya bilenge Baebele misato baoyo, na eleko na Danyele, bamimonisaki batemwe na sembo. Wana bayebisaki bango ete bakobwakama na fulu na móto, balobaki: “Soko ezali boye mbe Nzambe na biso, oyo biso tosaleli ye, ayebi kobikisa biso na litumbu na móto na kongala; mpe akobikisa biso na loboko na yo. E mokonzi, oyeba ete ata boye te, biso tokosalela banzambe na yo te, mpe tokosambela elilingi na wolo oyo etemisaki yo te.” (Danyele 3:17, 18) Ata etamboli na bango ebimiseli bango makambo nini, ba Témoins de Jéhovah bazali ntango nyonso kolanda matambe na Yesu, koyebaka bongo ete elaka ya Nzambe mpo na bomoi ya seko kati na mokili ya sika ezali ya solo. Ee, ata ndenge nini, libota yango esangani ekolanda kotambola “na elimo moko” mpe “na matambe moko”.
Bozongeli
◻ Mpo na nini ba Témoins de Jehovah bazali na bomoko?
◻ Na makambo nini ba Témoins de Jehovah bakeseni na baklisto ya nkombo mpamba?
◻ Ntina eleki monene mpo na yango baklisto ya solo bazali kosalela Jéhovah ezali nini?
◻ Ndenge nini basaleli na Nzambe bazali kotalela matomba oyo ezali kobima na botosi na bango epai na Jehovah?
[Elilingi na lokasa 12]
Ntango moto moko azali na bokono mpe aboi bazongisa ye makila, moto nyonso akokanisa ete azali Témoins de Jéhovah.
[Elilingi na lokasa 15]
Bato mingi oyo bazalaki komiloba ete bazali baklisto bamonaki soko moke te ete ezali mabe kobundisa baklisto mosusu, mpe yango esalemaki na lipamboli ya bokonzi na mangomba.