Ntango kimya na babalani ekutani na mikakatano
“Mwasi akabwana na mobali na ye te . . . mpe mobali alongola mwasi na ye te.”—1 BAKOLINTI 7:10, 11.
1. Mokano ya Nzambe ezalaki nini ntango abandisaki libala?
JEHOVAH NZAMBE asangisaki mobali mpe mwasi ya liboso na ekanganeli ya libala. Alingaki ete bosangani wana ekoka kokomisa bango mosuni moko mpe ekoka koumela. Libala na bango elingaki kopambwama, kopesa bango esengo mpe kopesa bango likoki ya kobota bana ya kokoka, nyonso wana mpo na nkembo na Nzambe.—Genese 1:27, 28; 2:24.
2. Nini ezali moko ya bantina oyo ezali koboma bikanganeli ya libala?
2 Ndakisa oyo ya bomoko ya libala ebebisamaki na elimo ya lipanda mpe lisumu. (Genese 3:1-19; Baloma 5:12) Ya solo, elimo ya lipanda, ezali ntina ya bokabwani ya bikanganeli na libala na mikolo na biso. Na yango, na 1985 na Etats-Unis, ezali komonana ete mabala 5 mazali kokufa kati na mabala 10,2 mpo na bato 1000. Na 1986, rapport moko eutaki na Moscou emonisaki ete bobele 37% ya mabala ezali kosalema na Union soviétique ezali koumela mbula misato, mpe 70% na nse na mbula zomi.
3. (a) Nini ekoki kobimisa mikakatano kati na babalani (b) Nani azali mobebisi monene ya kimya kati na libala?
3 Elimo ya lipanda ekoki kobimisa bokabwani kati na babalani. Ezali mpe kopekisa bokoli na elimo, mpamba te “mbuma na boyengebene ekokonama na kimya”. (Yakobo 3:18) Kasi nani azali mobebisi monene ya kimya? Ezali Satana. Ezali mawa na komona basali mosusu na Nzambe bazali na kimya te kati na ndako na bango mpo ete ‘bapesi nzela na Diable!’—Baefese 4:26, 27.
4. Ntango babalani oyo bazali baklisto bakutani na mikakatano makasi kati na libala, basengeli koyeba nini mpe kosala nini?
4 Ntango babalani oyo bazali baklisto bazali komona bokabwani lokola nzela bobele moko mpo na kosilisa matata na bango kati na libala, bazali na likama ya kokwea kati na mayele mabe ya Satana, mpe ntango wana kolongono na bango ya elimo ekobebisama makasi. (2 Bakolinti 2:11) Yango ezali elembo ete moko to mosusu, to bango nyonso mibale bazali kosalela mitinda ya bonzambe ndenge ekoki te. (Masese 3:1-6) Basengeli noki kosala makasi mpe kosambela mpo na kosilisa matata na bango. Soki bakoki te bango moko, bakoki kosenga toli na bankulutu ya lisangá. (Matai 18:15-17) Ata soki bankulutu bapesami nzela te na koloba epai na baninga na bango baklisto oyo basengeli mpenza kosala mpo na kosilisa matata na bango na libala, bakoki kobenda makanisi na bango likoló na oyo Makomami ezali koloba.—Bagalatia 6:5.
5. Na kotalela Makomami, nini ezali kopesa nzela na moklisto ete aboma libala mpe kozala na likoki ya kobalana na moto mosusu?
5 Soki libala na baklisto mibale ezali malamu te kino kozua likanisi ya koboma libala bankulutu bakoki kokundwela bango ete na kotalela Makomami koboma libala to kobala lisusu endimami bobele soki moko na babalani asalaki “pite“. Liloba oyo ezali kolakisa ekobo mpe mitindo mosusu ya kosangisa nzoto oyo endimami te mpe ezali malamu te. (Matai 19:9; Baloma 7:2, 3; Tala lisusu La Tour de Garde ya 15 juin 1983, page 31) Nzokande ekozala boni soki ‘pite’ esalamaki te, kasi kimya ya libala ezali kokutana na mikakatano makasi? Makomami malobi nini mpo na bokabwani oyo endimami na mibeko ya Leta to bokabwani oyo euti na likanisi ya babalani bango moko?
Toli epemami na Nzambe oyo Paulo apesaki
6. (a) Ndimbola ya sikisiki ya toli epesami na Paulo kati na 1 Bakolinti 7:10, 11 ezali nini? (b) Ndenge nini baklisto babalani basengeli kosala mpo na kosilisa mikakatano na bango?
6 Ntango libala ya baklisto mibale ekutani na mikakatano, bankulutu bakoki kobenda likebi na bango likoló na maloba oyo ya ntoma Paulo: “Epai na baoyo basili kobalana, nazali na liloba, kasi ezali na ngai moko te, euti na Nkolo; ete mwasi akabwana na mobali na ye te, kasi soki amikaboli, atikala kozanga mobali soko azongi na mobali na ye te; ekoki na mobali kolongola mwasi na ye te.” (1 Bakolinti 7:10, 11) Baklisto babalani bakokoka kosilisa matata na bango soki bazali kozipa miso na kozanga kokoka ya moko na mosusu. Basengeli kokanisa te ete matata na bango nde eleki ete bakoki kosilisa yango te na nzela na mabondeli ya sembo, na kosalelaka mitinda ya Biblia mpe na kolakisaka bolingo oyo ezali mbuma na elimo na Nzambe.—Bagalatia 5:22; 1 Bakolinti 13:4-8.
7. (a) Soko babalani baklisto bakabwani, Makomami ezali kotalela bango ndenge nini? (b) Likama nini kokabwana ya baklisto mibale babalani ekoki kozala na yango likoló na mikumba na bango ya mosala kati na lisangá?
7 Kasi ekozala boni soki yango esimbi te kino babalani baklisto bakabwana? Basengeli kotikala bongo kozanga kobala moto mosusu to bakoki kozongana. Moko to mosusu apesami te nzela na Makomami na kobala moto mosusu loba bobele soki ‘pite’ esalemi yango nde ekoki kopesa nzela mpo na koboma libala. Mpo na likambo yango mpe “lokola pite epalangani mingi“, ekoki kozala malamu mpo na bango ‘koyokana’ kozanga koumela. (1 Bakolinti 7:1, 2) Soki ezali mokumba ya bankulutu te na kopusa babalani ete bazongana, bakoki komona ata bongo ete babalani yango bakokisi masengami te mpo na kozua mikumba mosusu ya mosala na ntina na matata na bango ya libala. Na yango, moto oyo ‘ayebi kobongisa ndako na ye moko te’ azali na likoki te ya ‘kobatela lisangá na Nzambe’ lokola mokengeli.—1 Timote 3:1-5, 12.
8. Likanisi nini ya ntina ezwami na toli ya Paulo kati na 1 Bakolinti 7:12-16?
8 Ata soki moko kati na babalani nde azali mondimi, toli epesami makasi ete bakoka kobatela libala. Paulo akomi: “Soko ndeko mobali azali na mwasi oyo azangi kondima mpe asepeli kofanda na ye, ekoki na mobali kolongola ye te; mpe soko mwasi azali na mobali oyo azangi kondima mpe ye asepeli kofanda na ye, ekoki na mwasi kolongwa na ye te. . . Nde soko ye oyo azali mondimi te amikaboli, tika ete amikabola. Na likambo yango ndeko mobali to ndeko mwasi akangami te. Mpo ete Nzambe abiangi bino mpo na kimya. Yo mwasi, oyebi soko okobikisa mobali na yo? Yo mobali mpe, oyebi soko okobikisa mwasi na yo? (1 Bakolinti 7:12-16) Soko oyo azali mondimi te azwi likatami ya kokabwana, moklisto akopekisa ye te. Kasi lokola azali kolikya kobenda ye ete azala moklisto mpe, akolinga te ete azala mobandisi ya bokabwani yango. Ezali komonana ete Yunike, mama na Timote, afandaki na mobali na ye, oyo azalaki mondimi te, likambo yango epekisaki ye te ete apesa mateya ya elimo epai na mwana na ye.—1 Timote 1:5; 3:14, 15.
Bantina ya bokabwani
9, 10. (a) Engebene 1 Timote 5:8, eloko nini ekoki kozala ntina ya bokabwani? (b) Bankulutu basengeli kosala nini soko moklisto afundami ete azali koboya na nko kokokisa bamposa ya mwasi mpe ya bana na ye.
9 Maloba ya Paulo oyo mazwami kati na 1 Bakolinti 7:10-16, mazali kolendisa babalani ete bafanda esika moko. Kasi, nsima ya kosala makasi nyonso mpo na kobatela libala na bango, bamosusu bakomaki kino kozwa likatami na kotalela lisosoli na bango ete nzela mosusu ezalaki te bobele kokabwana na mobalani na bango. Nini ekoki kopesa nzela na ekateli motindo wana?
10 Koboya na nko kokokisa bamposa ya libota ezali kopesa yo nzela to ntina ya kokabwana Ntango mobali abali, andimi mokumba ya kokokisa bamposa ya mwasi na ye mpe ya bana oyo bakoki kobota. Moto oyo azali koboya na nko kokokisa bamposa ya bato ya ndako na ye “asili koboya kondima mpe aleki mabe moto oyo azangi kondima.” (1 Timote 5:8) Na yango kokabwana ekoki kosalema soki mobali aboyi na nko kokokisa bamposa ya libota na ye. Ezali solo, ntango mobali moklisto afundami ete azali kosala bongo, bankulutu bakotalela likambo yango malamumalamu. Koboya kokokisa bamposa ya libota na yo na nko, ekoki kopesa nzela ete ebimisama na lisangá.
11. Ntina mosusu ya bokabwani ezali nini, kasi ndenge nini ekoki kosalema ete moto ayika mpiko na yango?
11 Minyokoli makasi mpo na nzoto ezali ntina mosusu mpo na bokabwani. Toloba ete mbala mingi ekomelaka mobali oyo azali mondimi te ete alangwa, azali kongala makasi mpe kobetabeta mwasi na ye mondimi. (Masese 23:29-35) Na kobondelaka mpe komonisaka bambuma ya elimo na Jéhovah mbala mosusu mobalani oyo azali mondimi akoki kokitisa kongala wana mpe kosala ete akoka koyika mpiko na ezaleli wana. Kasi soko azwi minyoko oyo mizali kopesa nzela ete kolongono na ye ya nzoto ezala na likama, Makomami mazali kopesa nzela na mobalani oyo akabwana. Lisusu, bankulutu ya lisangá bakotalela bifundeli ya minyokoli ntango libala oyo ezali na likama ezali ya baklisto mibale, mbala mosusu ekateli ya kobimisama na lisangá ekoki kozwama.—Tala Bagalatia 5:19-21; Tito 1:7.
12. (a) Boyokani nini ekoki kozala kati na elimo ya mobalani moklisto mpe bokabwani? (b) Eloko nini esengeli kosalema soki ezaleli na elimo ya libota moko ya baklisto ezali mpenza malamu te?
12 Likama makasi mpenza mpo na elimo ezali ntina mosusu ya bokabwani. Mondimi oyo afandi na ndako oyo moto na moto asambelaka na lingomba na ye asengeli kosala nyonso ekoki na ye mpo akoka kosalela bibongiseli oyo bizwami na Nzambe mpo na bolamu na ye ya elimo. Kasi soko botemeli oyo emonisami na mobalani oyo azali mondimi te (oyo mbala mosusu azali kosalela nguya na ye) ezali kopekisa ye mpenza na kosalela losambo ya solo mpe ezali kotia elimo na ye na likama, akoki kozwa likatami ya kokabwana. Kasi ekozala boni soko ezaleli ya elimo kati na ndako oyo babalani nyonso mibale bazali bandimi ezali mabe? Bankulutu basengeli kopesa lisalisi na bango, nzokande mokumba ezali liboso na mobali oyo abatisami ete abobongisa likambo yango nokinoki. Ya solo, soki moklisto abálá abandi kosala lokola mopengwi na komeka kobenda mobalani na ye mpo ete asalela lisusu Jéhovah te, bankulutu bakokata likambo yango na ndenge Makomami mazali koloba. Ntango moto abimisami na lisangá mpo azali kotia na likama mpenza bomoi ya elimo ya mobalani na ye, azali koboya na nko kokokisa bamposa na ye, to azali kobetabeta ye makasi mpenza, moklisto ya sembo oyo aluki ete kokabwana esalema na lolenge esengami na mibeko ya Leta azali kotambola na bokeseni te na toli ya Paulo oyo ezali kolendisa baklisto ete bakoka kofunda te mondimi mosusu na tribunale ya mokili.—1 Bakolinti 6:1-8.
13. Bokabwani ekoki kondimama na ntango nini?
13 Kokabwana ekoki kosalema na ntango makambo oyo tolobeli maleki ndelo. Kasi, makambo mazanga ntina makoki kosalelama te mpo na kokabwana. Baklisto oyo bakabwani bamemi bango moko mokumba monene mpe basengeli koyeba ete biso nyonso tokozongisa monoko epai na Jéhovah.—Baebele 4:13.
Ekateli yango ezali ya mayele?
14. (a) Bokabwani ekoki kobimisa mpasi nini? (b) Bokabwani ekoki kozala na makama nini likoló ya bana?
14 Esengeli kokanisa kati na libondeli mpo na mikakatano oyo bokabwani ekoki kobimisa. Na ndakisa, ezali mpasi ete moboti oyo atikali ye moko akoka kopesa epai na bana bokatikati mpe disipline oyo bazali na yango mposa lokola na kati ya libota oyo babalani mibale bazali esika moko. Epai mosusu, bokabwani ekoki kopesa mpasi ya motindo moko epai na bana lokola ntango libala ekufi. Mpo na likambo yango, tala oyo ekokaki kotangama kati na zulunalo (lndia Today): “Sheena azali mwana mwasi moke ya mibu motoba, oyo miso na ye ezali kitoko. Baboti na ye babomaki libala esili koleka mbula mibale, nsima ya kosamba na tribunale, kosamba oyo esambwisaki bango. Nsima na ntango moke, tata na ye abalaki mwasi mosusu. Na boumeli ya mbula mobimba mwana oyo atungisamaki mingi na maladi ya asme mpe azalaki kotika te kolia mosapi na ye ya monene. Mama na ye, oyo azali kofanda na ye elongo na Sud ya Delhi, alobaki: ‘Mawa na ngai ezali komonana likolo na Sheena, . . . Azali komiyoka mawa mingi lokola azangi tata na ye. . . Akoli na makanisi, koleka bana mosusu ya mibu na ye, kasi ntango nyonso azali kolelalela, ezali lokola alingi kobimisa oyo ezali kati na ye. Na eteyelo azali kokutana na mikakatano. Ntango mosusu bana bazali na nkele makasi koleka. Mbala mingi azali kokanisakanisa makambo mazali ya solo te: komisalela masolo ya lokuta mpo na kondimisa baninga na ye ete biso nyonso elongo na tata na ye tosalaki mwa mobembo ya bosepeli.”
15. Likambo nini ekoki koyela mwasi moklisto to mobali moklisto mpo na bokabwani?
15 Mbala mingi bokabwani epesaka matomba malamu te ezala epai na mwasi to mobali oyo bazali baklisto. Ntango mingi ekoleka te bakobanda komiyoka mawa na kotikala ye moko lokola mobalani mosusu akei to kozanga bana. Na yango basengeli te kokanga miso likoló ya mikakatano oyo mizali kobima na ntina na bokabwani. Bakokoka kokokisa mposa na bango, kotia mpe makambo matali mosolo? Mpe ekozala ndenge nini soko kokabwana ememi bango na kozala na etamboli ya bosoto? Yesu alobaki: “Mayele emonanaka sembo na misala na yango.” (Matai 11:19) Kokabwana ezali komonana mbala mosusu ete ezali bozoba, mingi soko babalani mibale bazali baklisto.
Bosala makasi mpo na kosilisa mikakatano na bino
16. Babalani baklisto oyo kimya na libala na bango ekutani na mikakatano basengeli kosala nini?
16 Babalani baklisto oyo kimya ya libala na bango ekutani na mikakatano basengeli kosolola elongo mpo na matata na bango na motindo mobongi epai na basaleli na Nzambe. Basengeli kozala na motema malamu mpo na kolimbisana mabunga na bango. (Bafilipi 2:1-4) Kasi nini lisusu basengeli kosala?
17. Ndenge nini kozala na mayele mpo na biloko ya mosuni ekoki kopesa nzela na kimya kati na libala?
17 Moko moko na babalani akosala ete kimya ezala soko amonisi mayele na makambo matali biloko ya mosuni. Na ndakisa, tokanisa ete nsima ya kotalela likanisi ya mwasi na ye oyo ekeseni na oyo ya ye, mobali amoni malamu ete libota na bango elongwa esika bango bazali mpo na kokende kofanda epai mosusu. Mbala mosusu amoni ete likatami esengeli kozala ndenge wana, mpo na mikakatano ya mosolo, kasi mpe mpo na kopesa nzela epai ya bato na libota na ye ete bakokolisa matomba ya Bokonzi ntango bakofanda esika oyo mposa ezali monene. (Matai 6:33) Mwasi na ye akoki koboya ete balongwa na esika oyo bango bazali, mpo ete likambo yango ekopekisa ye na kozala penepene na baboti na ye to ekobongola lolenge na bomoi na bango. Soko ezali boye, mwasi asengeli komonisa mayele na kopesaka mobali na ye maboko, oyo azali mokonzi na libota mpe azali na mokumba ya kopona esika libota esengeli kofanda. Esika mosusu, kotosa na ye mpe kosala elongo na mobali na ye na bolingo nyonso ekopesa nzela ete kimya ezala na ndako.—Baefese 5:21-24.
18. Mabaku nini babalani baklisto bazali na yango mpo na kosala misala misusu elongo?
18 Libota ezali na kimya ya solo mpe ezali kosilisa kozanga nkaka mikakatano na yango, ntango babalani bazali kokokisa elongo misala mosusu. Na ndakisa, baklisto oyo babalani bazali na libaku malamu ya kosala bongo ntango bazali kosangana na mosala ya kosakola. Soko bazali kosala yango ntango nyonso mpe elongo na bana na bango, libota mobimba ekozwa matomba. Bazali mpe na mabaku makeseni mpo na kolendisa ekanganeli na bango ya libala ntango bazali kosangana na misala mosusu ya malamu to kominanola oyo moko to mosusu azali kosepela na yango.
19. Ndenge nini bokonzi esengeli kosalelama kati na ndako mpo epesa nzela na kimya ya libota?
19 Soko bokonzi kati na ndako ezali kotambwisama na lolenge ebongi bikanganeli ya libala ekolendisama. Mobali moklisto oyo ateli na elimo, akosala makambo na makasi te lokola moto azali komonela mwasi na ye, kasi ntango nyoso akolinga mwasi na ye mpe akosalela ye makambo na makasi te. Jéhovah azali kotalela ye ete asalela bokonzi na ye na nzela ya bolingo. (Bakolose 3:18, 19) Kosalela bokonzi ndenge wana ekosala ete kimya ezala na kati na libota.
Kati na mabota oyo makabwana
20, 21. Kati na makambo nini ezali malamu komimonisa moto na makanisi mabongi ntango kimya ezali kokutana na mikakatano kati na ndako oyo ekabwani kati na makambo matali losambo?
20 Na komimonisa bato na makanisi mabongi, baklisto babala bazali kolonga mikakatano na bango kozanga nkaka kati na libala na bango. (Bafilipi 4:5) Kasi ezali mpe na ntina na kosala lolenge yango ntango kimya ezali kokutana na mikakatano kati na ndako oyo bato bakabwana mpo na oyo etali lingomba. Soko mobali oyo azali mondimi te azali komeka kopekisa mwasi na ye na kosalela Jéhovah, mwasi asengeli kosala makasi mpo na kososola elongo na ye, na komonisa ye na ndenge ya mayele ete lokola ye atiki ye na bonsomi ya kolanda lingomba oyo ye alingi, ye mpe na kotalela makanisi malamu asengeli kotikela ye bonsomi asala pelamoko ye. (Matai 7:12) Ata soko asengeli komonisa botosi oyo ezali na ndelo epai na mobali na ye oyo azali mondimi te, ezali Nzambe nde asengeli kotosa liboso soki masengami ya mobali na ye mazali na boyokani te na oyo ya Nzambe. (1 Bakolinti 11:3; Misala 5:29) Kosangana na makita mbala misato na poso ezali likambo eleki ndelo soko moke te. Ata bongo, mwasi moklisto mbala mosusu akomona ete ezali likambo na mayele kotikala na ndako bampokwa mosusu mpe kosangana na mosala ya kosakola mingimingi ntango mobali na ye akei na mosala mpe bana na ye bazali na eteyelo. Soko azali na makanisi mabongi mpe soko amitieli programme ya malamu, ‘akolemba te mpo na kosalaka malamu’.—Bagalatia 6:9.
21 Esengeli komimonisa lisusu moto na makanisi mabongi kati na makambo mosusu. Ndakisa, soko ezali solo ete moto na moto azali na lotomo ya kolanda lingomba oyo ye alingi, mwasi moklisto, oyo mobali na ye azali kotemela solo akomimonisa moto na makanisi mabongi mpe moto na mayele na kotiaka te Biblia na ye mpe mikanda oyo ezali kolimbola Biblia na esika oyo mobalani na ye alingaka komona yango te. Akopengola koswana ya mpamba soko ati mikanda na ye na valise na ye moko mpe azali koyekola yango na nkuku. Ya solo, asengeli te kondima abebisa etelemelo na ye na oyo etali mitinda ya sembo.—Matai 10:16.
22. Eloko nini esengeli kosalema soki kimya ezangi mpo na likambo etali koteya bana makambo na Nzambe?
22 Kati na ndako oyo matata mazali kobima mingimingi mpo na likambo litali lolenge ya koteya bana makambo na Nzambe mwasi moklisto asengeli kosala na mayele ete bana bakoka kokende na ye na makita mpe na kati na mosala ya kosakola. Kasi soko mobali mpe tata na bana oyo azali mondimi te aboyi, mwasi akoteya mitinda ya Biblia epai na bana na ye mpo ete ntango bakokola to bakobima na ndako na bango wana ekokoma bango mikóló bazwa libaku ya kolanda ntango nyonso losambo ya solo. Soki ezali nde mobali moto azali mondimi, azali mokonzi ya libota mpe, azali na mokumba ya kobokola bana na ye kati na boklisto. Asengeli bongo koyekola Biblia elongo na bango, komema bango na makita mpe kopesa bango formasió na kati na mosala ya kosakola. (Baefese 6:4) Ya solo, asengeli komimonisa moto ya boboto, ya bolingo mpe moto na makanisi mabongi mpo na mwasi na ye oyo azali mondimi te.
Bobatela kimya mpe bomoko ya libota na bino
23. Ntango kimya ya babalani ekutani na mikakatano nini ekoki kozala na ntina mpo na kosala?
23 Lokola babalani bazali “mosuni moko” basengeli kofanda esika moko kati na kimya na “ kotosaka bibongiseli oyo Nzambe azwá mpo na bato babálá, mingimingi soko babalani nyonso mibale bazali baklisto. (Matai 19:5; 1 Bakolinti 7:3-5) Kasi soko kimya ya libala na bino ekutani na mikakatano, botalela na kati ya libondeli batoli ya Biblia oyo epesami na kati na lisolo oyo. Mbala mosusu bokomona ete ezali mpe ntina komikundola ntango oyo bozalaki bafiansé. Ezali ete na ntango yango, bino nyonso mibale bozalaki komonisa milende mpo na kosala oyo ezalaki sembo mpe kopika moboko ya libala oyo ezali kopesa esengo. Bokondima kosala milende motindo moko lelo mpo na kobatela libala na yo?
24. Ndenge nini baklisto basengeli kotalela libala?
24 Bino babalani baklisto, Nzambe apesaki bino likabo ya kokamwa ezali bongo libala na bino. Soko bozali kobika engebene ndai oyo bosalaki mokolo ya libala na bino mpe bozali kotikala sembo liboso na Jéhovah, bozali na elikya ya kofanda kati na mokili ya sika mpe na sembo wapi kuna kokabwana mpe koboma libala ekobebisa mabota lisusu te. Na bongo bolakisa botondi na bino mpo na libala oyo ezali kosalema na “nkamba na nsinga misato”, wapi Jéhovah azali kozua esika ya ntina mpenza. (Mosakoli 4:12) Mpe ete basangani nyonso ya libota na bino bazua bolamu oyo ezali kopesama na libota oyo ezali na bomoko, oyo ezali esika na kimya!
Bozongeli
◻ Likanisi nini ya ntina ezwami na toli epesami na Paulo kati na 1 Bakolinti 7:10-16?
◻ Makambo nini ya ntina makoki kopesa nzela mpo na bokabwani?
◻ Ndenge nini babalani baklisto bakoki kosilisa mikakatano na bango soko kimya ya libala na bango etungisami?
◻ Kati na ndako oyo ekabwani mpo na ntina etali lingomba, ndenge nini kozala na makanisi mabongi ekoki kopesa nzela na kimya?
[Elilingi na lokasa 23]
Babalani baklisto oyo kimya na bango okutani na mikakatano basengeli kosolola elongo matata na bango na lolenge ebongi lokola basaleli na Jéhovah.