Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye
Na Betania, epai na Simona
NA KOLONGWAKA na Yeriko, Yesu azui nzela ya kokende na Betania. Mobembo mosali soko mokolo mobimba, mpo ete esengeli komata na nzela moko na ngomba molai, nzela ya 19 kilomètres. Yeriko ezali na nse, soko 250 metres longwa na nivo ya ebale, mpe Betania ezalaki na likoló soko 760 mètres longwa na nivo ya ebale. Tozali komikundola ete ezali na Betania, nde epai kuna Lazare mpe bandeko na ye ya basi bafandaki. Mboka oyo ezali na kilomètres misato longwa na Yelusaleme na ngambo ya este ya ngomba na Olive.
Bato mingi bakomi na Yelusaleme liboso mpo na Elekeli. Bato bakomaki liboso mingi mpo na komipetola engebene milulu. Mbala mosusu basimbaki ebembe to eloko mosusu oyo ekomisi bango mbindo. Na bongo balandi mitinda na kobulisama mpo na kokoka kokumisa Elekeli na ezalela endimami. Wana bato oyo bakomaki liboso bayangani na tempelo, mingi na bango bazali komituna soko Yesu akoya na Elekeli to te.
Na Yelusaleme, ntembe makasi ebimaki mpo na Yesu. Bato bazali kokumisa ye mingi kino bakonzi na mangomba balingi kokanga ye mpo na koboma ye. Kino bapesaki etinda oyo: Moto nyonso oyo akoyeba epai Yesu azali aya koyebisa bango. Na basanza oyo eleki, mbala misato - na elambo na Mingombo, na elambo na kopetola Tempelo mpe nsima na lisekwa na Lazare -, bakonzi oyo na mangomba bamekaki koboma Yesu. Yango wana bato bazali komituna soki Yesu akomimonisa lisusu. Bazali komituna kati na bango ete: “Bino bokanisi nini? Akoya nde na Elambo te?”
Na ntango yango, mikolo motoba liboso na Elekeli, oyo ekokumisama na le 14 Nisan engebene manaka na Bayuda, Yesu akomi na mboka Betania. Akoti na mboka yango na mpokwa ya mokolo na mitano, elingi koloba na ebandeli ya le 8 Nisan. Akokaki kosala mobembo oyo mokolo ya poso te, mpo ete mobeko na Bayuda mopekisi kosala mibembo mikolo na sabata, elingi koloba kobanda mokolo na mitano na kolala na moi kino mokolo na poso na kolala na moi. Ntembe ezali te ete Yesu akei epai na Lazare, lokola asalaki yango mbala ya nsima, mpo na kolala wana mokolo na mitano.
Mofandi mosusu na mboka Betania abengisi Yesu na baninga na ye mpo na kolya epai na ye na mpokwa ya mokolo na poso. Mobali yango ezali Simona, moto oyo azalaki na maba mpe Yesu abikisaki ye mbala mosusu mwa ntango moke liboso. Lazare azali kati na baoyo bafandaki na mesa elongo na Yesu. Malata, lokola amesana na mosala mikolo nyonso, azali kosalela babyangami. Kasi, Marie, lokola ezaleli na ye, azali koyoka Yesu na likebi nyonso, nde ya mbala oyo azali likambo moko ebimisi koimaima.
Afungoli mbeki, molangi moke, oyo ezali soko na litele moko na mafuta ya malasi, “esalami na nzete ebengami ete nard”. Ezali malasi na motuya monene mingi, mpo ete motuya na yango ezaili lifuti to salaire soko ya mbula moko! Ntango Marie asopi mafuta yango na moto mpe na makolo na Yesu mpe apangusi ye makolo na nsuki na ye, nsolo kitoko etondi ndako mobimba.
Bayekoli bamoni mabe mpo na yango mpe balobi: “Libebi oyo ezali mpo na nini?” Nsima Yuda Iskariote alobi: “Mpo na nini malasi oyo etekisami na denali nkama misato te ete epesamela babola?” Ya solo, azali komibanzabanza mpenza mpo na babola te, ezali mpo ete uta mwa ntango azali koyiba na ebombelo na mosolo na bayekoli.
Yesu alobeli Marie. Azongisi na bayekoli ete “Botika ye. Mpo na nini bozali koluka kotungisa ye? Asili kosalela ngai mosala kitoko. Bozali na babola awa elongo na bino mikolo nyonso, mpe soki bolingi kosalela bango malamu ntango nini, bokoki kosala, kasi bokozala na ngai ntango nyonso te. Ye asali eloko ekokaki na ye kosala; asili kopakola nzoto na ngai liboso mpo na kokunda. Nazali koloba na bino solo ete soko nsango malamu ekolakisama wapi na mokili mobimba, likambo lisali ye ekoyebisama mpo na ekaniseli na ye.”
Eleki sikawa ngonga 24 wana Yesu azali na Betania, mpe bato nyonso na engumba bayebi ete azali wana. Na yango, bato mingi bayei epai na Simona mpo na komona Yesu, kasi bayei mpe komona Lazare. Na ntango yango banganga minene bakani mpo na koboma Yesu mpe koboma Lazare. Ya solo, bato mingi bandimeli Yesu mpo bamoni moto oyo ye asekwisaki longwa na bakufi azali na bomoi! Oyo nde motema mabe na bakonzi na mangomba! Yoane 11:55 kino 12:11; Matai 26:6-13; Malako 14:3-9; Misala 1:12.
◆ Ntango nini Yesu akomi na Betania, mpe epai wapi, mbala mosusu alekisaki sabata?
◆ Likambo nini Marie asali ebimisi koimaima, mpe Yesu alobi nini mpo na mwasi oyo?
◆ Eloko nini emonisi motema mabe na banganga minene?