Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/10 nk. 11-15
  • Bokeba na bilobaloba mabe!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bokeba na bilobaloba mabe!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Likeseni
  • Kolongwa na bilobaloba kino na matongi
  • Soki matata mabimi
  • Mpo na nini ebongi kozala na bokengi?
  • Ezali mpenza matongi?
  • Ndenge nini kokima bilobaloba mabe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Kotɔnga ezali mpenza mabe?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Nasala nini ntango bazali kotɔnga ngai?
    Mituna oyo bilenge batunaka
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/10 nk. 11-15

Bokeba na bilobaloba mabe!

“Na mingi na maloba, masumu mazangi te; nde ye oyo akangi monoko na ye azali na mayele.”​—MASESE 10:19.

1. Na meko nini bilobaloba mabe, to matongi, ekoki kopesa mpasi?

ELOKO moko te ekoki kobongola ngenge ete ekoma masanga kitoko. Nzokande, bilobaloba mabe, to matongi, ekokani na ngenge oyo ekoki kolongola epai na moto moko ya sembo lokumu malamu na ye. Juvenal, ye poète Moloma, alobaki mpo na matongi lokola “ngenge oyo eleki mabe”. Mpe William Shakespeare, moto na Angleterre oyo azalaka kokoma bateatre, alobaki boye na monoko na moko kati na bato na ye ya teatre: “Moto oyo akoyiba lokumu na ngai ayibi ngai eloko moko oyo ekopesa ye bozwi te kasi akotisi ngai mpenza kati na bobola.”

2. Mituna nini misengeli kotalelama?

2 Kasi bilobaloba ezali mpenza nini? Na nini yango ekoki kokesena na matongi? Mpo na nini tosengell kokeba na bilobaloba? Mpe ndenge nini kolonga na yango?

Likeseni

3. Bokeseni nini ezali kati na bilobaloba mpe matongi?

3 Bilobaloba ezali “masolo ya mpambampamba, ezalaka ntango nyonso ya solo te, masolo matali bato mosusu mpe na makambo na bango”. Ezali “maloba to makomi ya kotiola, mpo na kobimisa sekele”. Mpo ete biso banso tolingaka koyeba makambo ya bato mosusu, mbala mosusu tolobaka mpo na bango maloba ya lokumu mpe ya kolendisa. Nzokande ezali bongo te mpo na matongi. Yango ezali “lisolo ya lokuta oyo elobami mpo na kobebisa nkombo mpe lokumu ya moto moko”. Mbala mingi maloba yango mazalaka ya mabe, mpe maloba yango mabongi te mpo na moklisto.

4. Engebene mokomi moko, nini ekoki kozala ebandeli ya matongi, mpe eutaka mpenzampenza na nini?

4 Bilobaloba ya mabe te ekoki mbala mosusu kobongwana kino matongi. Mokomi Arthur Mee akomaki ete: “Matongi oyo ezali kozokisa moto kati na motema, mpe oyo ekoki kolembisa ye, ebotamaka mbala mingi na bilobaloba ya mike, oyo ntango mosusu ebimaka mpo ete bato bazangi mosala ya kosala. Kotonga ezali moko na bokono monene ya mokili, kasi eutaka mpenzampenza na kozanga boyebi. Yango ezalaka mpenza epai na baoyo bazali na eloko te ya kosala, baoyo bazali na mokano te kati na bomoi na bango.”

5. Toli nini Paulo apesi kati na 1 Timoté 5:11-15?

5 Mpo ete maloba ya mpambampamba makoki kobota matongi, ntoma Paulo apamelaki balobilobi mosusu. Nsima na koloba mpo na basi-bakufeli-mibali oyo basengelaki kozwa lisalisi na lisangá, akomaki: “Oboya kokoma nkombo na basi-bakufeli-mibali baoyo bakomi mibange te mpamba te bakozalaka na kilikili, . . . bakoyekolaka kozala na goigoi, kolekaleka na ndako. Ee, bazali bobele na goigoi te kasi bato na bilobaloba mpe [komikotisa na makambo ya bato mosusu], awa ekosololaka bango makambo mabongi te. Bongo, nalingi ete baoyo mibange te babalana, babota bana, babatela ndako, bapesa mpe moyini na biso nzela na kotonga biso te. Mpo ete bamosusu basili kopengwa kobila Satana.”​—1 Timote 5:11-15.

6. Osengeli kosala nini mpo na koboya mposa ya kobanda masolo oyo makoki komema na kotonga?

6 Lokola Paulo akomaki na kopemama na Nzambe, makambo oyo alobaki mpo na basi wana ezalaki solo. Ebongi ete tokanisa na mozindo mpe malamumalamu likoló na yango. Mwasi moko te oyo azali kobanga Nzambe akoki kolinga ‘kolanda Satana’. Na bongo moklisto mwasi oyo amiyebi ete azalaka na momeseno ya kobanda masolo oyo makoki komema ye na kotonga bato asengeli kosala nini? Asengeli na komikitisa nyonso kolanda toli oyo ya Paulo: “Basi mpe bazala na sembo na bozito, bato na kotongatonga te.” Mpe lisusu: “Tika ete mibange basi bazala mpe na etambweli na bulee; bazala batongi te.” (1 Timote 3:11; Tito 2:3) Baklisto basengeli mpe kosalela toli oyo na motema moko.

7. Engebene Biblia, mpo na nini biso banso tosengeli kobatela lolemo na biso?

7 Ekomelaka biso nyonso mpenza na koloba mpo na baninga na biso, na ndakisa makamho oyo mabimelaki bango kati na mosala ya kosakola. Kasi tosengeli te ‘kofanda mpe koloba mabe mpo na ndeko na biso’. (Nzembo 50:19, 20) Ya solo, ezali malamu ete tolobaka mingi te, mpamba te “na mingi na maloba, masumu mazangi te, nde ye oyo akangi monoko na ye azali na mayele”. (Masese 10:19) Na bongo tosengeli kokeba na bilobaloba, ata ezali ya mabe te. Eloko moko te esengisi biso kotanga ntango nyonso nkombo ya baninga; tokoki kosolola masolo mingi ya kitoko soki totaleli makambo oyo mazali sembo, peto, na boboto, malamu, na ngolu mpe na lokumu.​—Bafilipi 4:8.

Kolongwa na bilobaloba kino na matongi

8. Mpo na nini ezali ntango nyonso mabe te na koloba mpo na baninga na biso baklisto?

8 Mabe ezali te mpo na koloba na ntina na mosala ya kosakola ya bandeko na biso baklisto to na ntina na misala na bango mosusu ya teokratike soki tobongoli makambo te mpe tozali na motema moko te. Lisusu, masolo ya kolendisa motindo wana makoki koyikisa mpiko na bamosusu. (Tala Misala 15:30-33) Baklisto bazalaki koloba mpo na Gaïus, moto ya mbula mingi mpe ya bosembo, mpamba te ntoma Yoane ekomelaki ye: “Molingami, ozali kosalaka na sembo na misala mikosalaka yo na bandeko ata bango bapaya. Bango basili kotatwela yo na miso na lingomba.” (3 Yoane 5, 6) Na bongo ezali ntango nyonso mabe te mpo na koloba na ntina na bandeko na biso baklisto.

9. a) Ndenge nini masolo mikemike makoki kokoma matongi oyo mazali kolobama mpo na bato na sembo? b) Mituna nini tokoki komituna?

9 Masolo mikemike makoki mpe kokoma matongi oyo mataleli bato na sembo soki tozali komikotisa kati na makambo na bango, soki tozali na ntembe na ntina na mikano na bango to soki tozali na makanisi mabe na ntina etali etambweli na bango. Mbala mosusu tokosala malamu na kozala na momeseno ya komituna mituna ya lolenge oyo: Maloba na ngai makoki kobebisa lokumu ya moto mosusu? Mazali solo? (Emoniseli 21:8) Nakoloba motindo moko soki nazali liboso na ye? Maloba na ngai makoki kokotisa mobulu kati na lisangá? Makoki kobebisela moto mikumba na ye kati na lisangá? Ekoki kozala ete nazali kolula ye kati na motema na ngai? (Bagalatia 5:25, 26; Tito 3:3) Makambo nazali koloba makobota mbuma malamu to ya mabe? (Matai 7:17-20) Nakokaki koloba makambo motindo oyo moko na ntina na bantoma? (2 Bakolinti 10:10-12; 3 Yoane 9, 10) Maloba yango mabongi mpenza mpo na moto oyo azali kosambela Jéhovah?

10, 11. Engebene Nzembo 15:1, 3, eloko nini tosengeli kosala soki tolingi kozala bafandi kati na ndako na Nzambe?

10 Kolobaka na ntina na baoyo bazali kosambela Nzambe, Nzembo 15:1 ezali kotuna mituna oyo: “E Jéhovah, nani akoumela kati na hema na yo? Nani akofanda na ngomba na yo na bulee?” Na ntina na moto motindo yango, mokomi na nzembo David ayanoli: “Ye oyo azali kotonga na lolemo na ye te to kosalela moninga na ye mabe te to kobebisa lokumu na mozalani na ye te.” (Nzembo 15:3) Liloba “kotonga” oyo ezali komonana kati na verset oyo euti na verbe ya hébreu oyo elimboli “kotambola”, mpe bongo “kokende kowayawaya”. Bayisraele bazwaki etinda oyo: “Okotambolatambola lokola moto na songisongi kati na bato na yo te.” (Levitike 19:16) Moto na moto oyo ‘azali kotambolatambola mpo na kosala songisongi’ akoki koyambama epai na Nzambe te mpe azali moninga na Nzambe te.

11 Baninga na Nzambe basalaka likambo moko te ya mabe epai ya baninga na bango mpe bazali koboya kondima bilobaloba oyo bizali kobwaka nsoni likoló na bato na sembo oyo bango bayebi. Na esika ete topanza masolo ya lokuta na ntina na baninga na biso baklisto mpe kobakisa likoló na matongi oyo bazali naino koyikela yango mpiko longwa epai na bato mabe mosusu, biso toloba nde malamu na ntina na bango. Tobakisa bozito te likoló ya bandeko na biso mibali mpe bandeko na biso basi na kolobaka maloba mabe na ntina na bango.

Soki matata mabimi

12. Lisalisi nini mokapo ya Misala 15:36-41 ekopesa biso soki tomekamaki na kolobaloba na ntina na moto moko oyo tozwani na ye mwa matata?

12 Lokola tozali bato bazangi kokoka, tokoki komekama na koloba mabe na ntina na moto moko oyo tozwanaki na ye matata. Kasi totala mpenza likambo oyo elekaki liboso ete ntoma Paulo abanda mobembo na ye ya mibale ya mosala ya misionere. Lokola Barnabas azwaki ekateli ya komema Malako elongo na bango, Paulo aboyaki, “asepelaki te kokamata ye, oyo atikaki bango na Pamfulia mpe akei na bango nzela moko kuna na mosala te.” “Ntembe makasi ebimi”, bongo bakabwani, mpe Balanaba akamati Malako mpe akei na masuwa kuna na Kupulu. Nde Paulo aponi Sila mpe akei kati na Sulia, na Kilikia. (Misala 15:36-41) Na nsima, emonani polele ete ntoma Paulo, Balanaba mpe Malako bayokanaki, mpamba te Malako afandaki na Rome elongo na ntoma Paulo, oyo alobaki malamu mpo na ye. (Bakolose 4:10) Atako matata ebimaki kati na baklisto wana, likambo moko te emonisi ete batambolaki epai na epai kolobaloba moko mpo na ntina na mosusu katikati ya bandeko na bango kati na kondima.

13. Na makambo nini Paulo akokaki mbala mosusu kolonga lisenginya ya kolobaloba na ntina na moko kati na bandeko na ye baklisto, mpenzampenza Petelo?

13 Paulo alongakl mpe na komekama oyo ya kosalela bilobaloba mabe ntango apamelaki Kefa (Petelo), oyo ayokaki nsoni mpo na kolia elongo na bandimi bazalaki Bayuda te mpe kozala na bango esika moko mpo baklisto Bayuda oyo bautaki na Yelusaleme bazalaki wana. Na esika ya koloba na ntina na ye na esika mosusu, Paulo ‘atemelaki ye na elongi’, mpe alobaki na ye polele “liboso na bato nyonso”. (Bagalatia 2:11-14.) Na ngambo na ye, Petelo atongaki te oyo apamelaki ye. Na nsima, alobaki na ntina na ye lokola “Paulo ndeko na biso molingami”. (2 Petelo 3:15) Na yango, ata soki ndeko moklisto moko asengeli kopamelama, yango ezali nzela te ya kolobaloba mpo na ntina na ye. Tozali na makoki nyonso ya komipekisa na kosalela lolemo na biso motindo wana mpe kolonga komekama ya kopanza bilobaloba mabe.

Mpo na nini ebongi kozala na bokengi?

14. Nini ezali ntina ya liboso mpo na yango tosengeli koboya koyoka to kopalanganisa bilobaloba mabe?

14 Ntina ya liboso oyo tosengeli kotia matoi te na bilobaloba to kopanza nsango oyo ezali kotambola ezali mpo tolingi ete Jéhovah asepela na biso, ye oyo azali kokweisa matongi. Lokola touti komona yango, Nzambe alakisaki polele nini azali kokanisa mpo na matongi ntango apesaki mobeko oyo epai na Bayisraele: “Okotambolatambola lokola moto na songisongi kati na bato na yo te, mpe okoluka mayele te ete moninga na yo abomama. Ngai nazali Jéhovah.” (Levitike 19:16) Soki tolingi kondimama epai na Nzambe, tosengeli kotonga moto moko te kati na bato oyo tozali kotanga nkombo na masolo na biso.

15. Nani azali motongi monene, mpe likambo nini bilobaloba mabe ekoki kozala na yango likoló ya boyokani na biso elongo na Nzambe?

15 Ntina mosusu ya kobwaka bilobaloba ezali mpo ete ekoki komema biso na komekola Satana, ye oyo atongaki Jéhovah na lolenge moko ya mabe koleka. Monguna monene wana ya Nzambe azwaki nkombo “Diable”, (na greke diabolos) nkombo oyo ebongi na ye mpenza, mpamba te elimboli “motongi”. Nsima wana Eve ayokaki maloba ya matongi oyo Satana azalaki kobimisa na ntina na Nzambe mpe ntango andimaki ye na kolandaka makambo oyo ye ayebisaki ye, babalani ya yambo bazalaki lisusu baninga na Nzambe te. (Genese 3:1-24) Tokwea te na mikano ya Satana na kolobaka maloba mabe oyo ekomema biso na koyinama na Nzambe mpe oyo ekokabola biso na Moninga na biso oyo aleki baninga nyonso mosusu. Jéhovah Nzambe.

16. Ndenge nini motongi ‘akabolaka baoyo balingani mingi kati na bango’?

16 Tosengeli koboya koyoka bilobaloba, mpamba te yango ekabolaka bato balingani. Mbala mingi, batongi balekisaka ndelo na ndenge likambo lisengeli kozala, bazali kobongola makambo, bazali kokosa mpe yango ezali kopalangana na maloba mabe. Na esika ya koloba polele liboso na moto oyo bazali kotonga, bazali kolobaloba nsima na ye soki ye azali te. Mbala mingi balonaka epai na bato makanisi oyo mazangi moboko. Ezali na motindo boye nde “molobi na nsango na lokuta akokabola baninga”.​—Masese 16:28.

17. Mpo na nini tosengeli kosenzela mpo ete tomipesa te na bilobaloba, ata ya mike?

17 Tosengeli kokeba ete tomipesa te na bilobaloba, ata ya moke. Mpo na ntina nini? Mpamba te ata yango ezali mpo na kozokisa te, nzokande ekoki solo kozokisa soki ezongelami mbala na mbala. Lisolo ekoki kobonga to mpe kokota zamba kino kobebisa lokumu ya moto na sembo mpe kopakola salité na nkombo na ye. Mayoki na yo makozala nini soki ekomi boye mpe yo ozali mobandisi ya lisolo yango to yo moto opalanganisi yango? Bakoki kotalela yo lokola moto oyo akoki kopesa bamosusu mpasi mpe bakokima yo na baninga.​—Tala Masese 20:19.

18. Ndenge nini bilobaloba bikoki kokomisa moto mobuki na lokuta?

18 Ntina mosusu ya kozala na bokengi ezali ete bilobaloba ekoki kokomisa yo moto na lokuta. “Maloba na molobalobi mazali lokola bilei na kitoko; ekokita kino bipai na katikati na nzoto.” (Masese 26:22) Likambo nini ekoleka soki ‘omeli’ lokuta mpe obandi kozongela koloba yango? Ata soki oyebi te ete yango ezali lokuta, okokosa soki opalanganisi yango, mpe okoki komonana mokosi ntango ekoyebana ete ezali matongi. Olingi ete yango ekomela yo? Nzambe azali kokweisa baeyi na lokuta oyo bazali kopalanganisa lokuta kati na makambo matali Nzambe, boye te? Ee, mpe batongi bakozongisa monoko. Yesu apesaki likebisi oyo: “Nazali koloba na bino ete na mokolo na kosamba, bato bakosamba mpo na bilobaloba nyonso bizali bango koloba; mpo ete maloba na ye makolongisa yo mpe maloba na yo makokweisa yo.” (Matai 12:36, 37) Lokola “moto na moto kati na biso akozongisa monoko liboso na Nzambe”, olingi ete akweisa yo lokola motongi mpe mokosi?​—Baloma 14:12.

19. Mpo na nini tokoki koloba ete bilobaloba mabe bikoki koboma?

19 Ntina mosusu mpe ya komibatela na bilobaloba ezali mpo ete yango ekoki koboma. Ee, ekoki komema liwa, kobebisa lokumu kitoko ya moto oyo asali likambo te. Ndemo mosusu ezali ‘mipanga mipelisami’, mpe maloba mabe makokisami na mbanzi ebwakami uta na bisika bibombami likoló na moto oyo azali na likambo te. David abondelaki boye: “[Jéhovah] okobomba ngai na miango na bato mabe, mpe na ebele na bato baoyo bakosalaka mobulu. Baoyo bakopelisa lolemo na bango lokola mipanga, bakobwaka mpe maloba na bango lokola mbanzi. Ete longwa na esika ebombami babeta moto mopetwi!” (Nzembo 64:2-4) Olingi koloba na ntina na moko ya baninga na yo maloba mabe koleka mpo ete amiyoka ete asengeli kobondela Nzambe mpo na kobondisama, lokola esalaki yango mokomi na nzembo? Olingi kokumba ngambo na likambo oyo ekokokana na koboma moto?

20. a) Kati na lisangá ya Nzambe, likambo nini ekoki kokomela motongi oyo aboyi kobongola motema? b) Likebi nini bankulutu basengeli kozala na yango mpo na oyo etali bilobaloba mpe matongi?

20 Kotonga ekoki komemela moto etumbu ya kobimisama na lisangá ya Nzambe; motongi azali na likama ya kobimisama soki emonani ete ezali momeseno na ye ya kotongaka bato. Ekateli oyo esengeli kozwama te mpo na bato oyo bazali kokwea na bilobaloba mike. Bankulutu basengeli kotalela malamumalamu makambo nyonso kati na libondeli mpe komeka kosala mpenza likeseni kati na bilobaloba mike mpe matongi minene. Bakobimisa mobuki na mobeko bobele soki azali motongi mabe, mpe aboi kobongola motema. Bankulutu bapesameli ndingisa te na kobimisa moto moko mpo na mwa bilobaloba mike bizangi ntina oyo bilobami mpo ete moto ayoki yango kozanga ete ayeba ndimbola na yango malamu, kasi yango ezali lokuta te mpe ezali na mokano ya mabe te. Esengeli te koyeisa likambo monene; bosengeli kozala na batatoli mpe bilembo ya sikisiki oyo bizali komonisa kozanga ntembe ete kotonga na bokosi elobamaki mpenza. (1 Timote 5:19) Batongi mabe mpe bazangi kobongola motema babimisami libosoliboso mpo na kosukisa bilobaloba mpe kobatela lisangá na mfulu oyo ezali bongo lisumu. (1 Bakolinti 5:6-8, 13) Kasi na likambo moko te bankulutu basengeli kosala mbangumbangu mpe kobimisa moto kozanga motif ndenge Biblia esengi yango. Na kosambelaka elongo na moto oyo afundami mpe na kopesaka ye toli, bakoki kosalisa ye na kobongola motema, na kosenga bolimbisi to kobongisa mbeba na lolenge mosusu, mpe na kokola ntango nyonso mpo na oyo etali kopekisa lolemo na ye.

Ezali mpenza matongi?

21. Na esika ya kolobaloba na ntina na moto moko asali lisumu, eloko nini osengeli kosala?

21 Lokola elobi yango lisese moko na mayele, “Ye oyo akopalanganisa nsango mabe azipoli makambo na nkuku; nde ye oyo azali na elimo na sembo akobomba likambo”. (Masese 11:13) Esengeli kokanisa na wana ete soki oyebi moto moko asali lisumu monene na kobombama okozala motongi soki olobi yango? Te. Ya solo, osengeli mpenza te kopanza makambo oyo oyebi, kasi loba epai na moto oyo asali libunga, kopesaka ye toli aluka lisalisi epai ya bankulutu. (Yakobo 5:13-18) Soki asali yango te na boumeli ya eleko oyo esengeli, bolingo oyo ozali na yango mpo na bopeto ya lisangá ekopusa yo na koyebisa bankulutu likambo yango.​—Levitike 5:1.

22. Mpo na nini tokoki koloba ete mokapo ya 1 Bakolinti 1:11 epesi nzela te na bilobaloba?

22 Nsima wana okoloba libunga na ye, ekoki kozala ete mosumuki akozwa etumbu, mpe emonani ete ekoki mpenza kopesa ye esengo te. Nzokande, moto oyo abongisami na disipline abukaka mbuma oyo ezali bongo boyengebene. (Baebele 12:11) Mabunga minene masengeli koyebisama epai na baoyo batiami mpo na kobongisa makambo ya bobuki mibeko, kasi epai na balobalobi te oyo mbele bakopanza yango. Paulo akomelaki baklisto ya Korinte: “Bato na Koloe bayebisi ngai ete kowelana ezali kati na bino bandeko.” (1 Bakolinti 1:11) Basangani ya libota yango bazalaki kolobaloba na ntina na baninga na bango baklisto? Te, bayebisaki nde epai na nkulutu moko ya mayele makambo oyo mazalaki koleka mpo na kopesa lisalisi oyo bamosusu bazalaki na yango mposa ete bazongela kotambola kati na nzela ya bomoi.

23. Motuna nini etikali mpo na kotalelama?

23 Soki tozali kosalisa moto na komibatela na bilobaloba, tozali kosala mpo na bolamu na ye. Lisese moko na mayele elobi: “Ye oyo akobatela monoko na ye akobikisa molimo na ye. Ye oyo akozipola bibebu na ye akobebisama nyee.” (Masese 13:3) Emonani polele ete tozali na bantina mingi ya malamu ya komibatela na bilobaloba mpe na matongi. Kasi ndenge nini tokoki kokima bilobaloba mabe? Lisolo elandi ekopesa eyano na motuna oyo.

Bozongeli

◻ Likeseni nini ezali kati na bilobaloba mike mpe matongi?

◻ Ndenge nini bilobaloba ekoki kokoma matongi?

◻ Wapi mwa bantina mpo na yango tosengeli kokeba na bilobaloba mabe?

◻ Mpo na nini koyebisa libunga monene oyo ndeko na biso moklisto asali, ezali kotonga te?

[Elilingi na lokasa 14]

Kolobaloba te na ntina na moto moko; ekozala konika ye mbanzi na mokongo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto