Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/10 nk. 21-23
  • Nzambe akosala eloko mokolo mosusu mpo na kosilisa bokesene?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe akosala eloko mokolo mosusu mpo na kosilisa bokesene?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bokesene-Mpo na nini yango epesameli nzela?
  • Nsuka ya bokesene ekozala ntango nini?
  • “Nzambe akozanga bosembo?”
  • Bosembo ekozala mokolo mosusu awa na mabele?
    Makambo mosusu
  • Yehova alingaka bosembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Osengeli kosala nini mpo na makambo ya kozanga bosembo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • “Nzambe azangi nde bosembo?”
    Pusaná penepene na Yehova
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/10 nk. 21-23

Nzambe akosala eloko mokolo mosusu mpo na kosilisa bokesene?

EZALI sembo te.” Elenge mwasi moko oyo atangaka na collège abulunganaki; autaki kokosama mpe azalaki koyoka nkele makasi. Abakisaki mpe na nsima: “Soki mpenza Nzambe azali, mpo na nini akoki kotika nzela na bokesene ya boye?” Soki ozalaki liboso ya elenge mwasi oyo, olingaki kosangana na mawa na ye? Mbala mosusu. Nzokande, okokaki mpe koyanola na motuna na ye?

Ntango ozalaki mwana moke, mbala mosusu ozalaki kokanisa ete baboti na yo bazalaki kotika nzela ntango bamosusu bazalaki kosalela yo na bokesene. Kasi bokesene wana ya moke oyo ezalaki komonana epai na bango ezalaki komonisa ete bango bazalaki na bomoi te? Te, boye te? Motindo moko, lokola ete Nzambe atiki nzela na bokesene emonisi mpenza te ete ye azalaka te.

Liboso na likanisi oyo, elenge mwasi oyo atangaka na collège ayanolaki ete makambo mibale makokanaki mpenza te. Na yango, amonisaki ete, tata, moto azangi kokoka, ye moko akokaki komimonisa mwa moke moto na kozanga boyengebene. To, lokola ayebaki makambo nyonso te, mbala mosusu amonaki te mabe moko oyo ezalaki kosalema polele.

Nzokande, soki mpenza amonaki bokesene, ekoki kozala ete azalaki na nguya te ya kopekisa, mpo na ndelo ya makoki na bato. Nzokande, engebene elenge mwasi, moko te kati na bizaleli oyo ezali komonana kolongisa ekoki kopesama na Nzambe moko ya boyengebene, oyo ayebi makambo nyonso mpe azali na nguya nyonso.

Bongo yo, mbala mosusu mpe ozali kokanisa ete kopesa nzela na bokesene ezali mpenza na boyokani te elongo na bizaleli na Nzambe. Kasi ekoki kozala ete, kati na bwanya na ye oyo eleki nyonso, Nzambe azali na ntina malamu ya kopesa nzela na bokesene na boumeli ya mwa ntango?

Bakomi na Biblia bazalaki komona Nzambe ete azali moto moko oyo “alingaka boyengebene mpe sembo”. Moïse alobaki ete “banzela na ye nyonso ezali boyengebene. Nzambe na sembo mpe na mabe [bokesene] te”.​—Nzembo 33:5; Deteronome 32:4; Yobo 37:23.

Longola likambo ya komona epai na Jéhovah Nzambe moko oyo asepelaka na bokesene te, bakomi na Biblia balobaki na bomoko ete akolongola yango mokolo mosusu. Na ndakisa, Yisaya asakolaki: “Tala mokonzi akozala na lokumu kati na boyengebene, mpe bana na mokonzi kati na kosambisa-sembo. Bongo kosambisa-sembo ekozala kati na elanga na mbuma.” (Yisaya 32:1, 16) Kasi ntango nini? Mpe, soki Nzambe alingi kosilisa bokesene kati na mokili, mpo na nini apesaki nzela liboso ete yango ezala?

Bokesene-Mpo na nini yango epesameli nzela?

Ezáláká na eleko moko oyo ata bokesene moko te ezalaki kati na molongo. Ezali bobele na ebandeli ya botomboki na Adam mpe Eve, na kopusama na Satan le Diable, nde bato bayebaki bokesene. Satana abomamaki mbala moko te nsima ya botomboki na ye. Nzambe, engebene makanisi na ye, atikaki moto na bonsomi ya kosala mabe mwa ntango moke na boumeli na yango basambeli na ye bakomekama mpe bakomimonisa soki bazali sembo to te. Epai na bango, na koponaka kotikala sembo, bango bakomonisa ete Satana azali na likoki te ya kopengwisa bato nyonso ete batika Nzambe. Na bongo, bokonzi na Nzambe ekolongisama, misala na Satana mikobomama mpe bakesene ekolongolama.

Soki, na mbala moko, Nzambe asalaki na makasi mpo na kopekisa bato na kosala mabe, mbele ekokaki kozala lokola apekisi bango na kosalela bonsomi na bango. Yango elimboli, na kopesaka nzela epai na bato na kozwa mpasi ya misala mabe ya bato kati na bango, azali komonisa kino na esika nini Adam mpe Eve basalaki mabe na kotombokelaka mibeko na Nzambe mpo na kotia na esika na yango mitinda na bango ya mabe. Na kotikaka bato kobuka oyo bazali kolona, Nzambe azali kosalisa bato ya kolongobana na koyeba ete ezali mpenza malamu mingi na kosala engebene banzela na ye.​—Yilimia 10:23; Bagalatia 6:7.

Lisusu, misala malamu mpe misala mabe ya moto na moto mizali makambo oyo mazali komonisa ndenge moto azali; misala yango mizali kopesa epai na Nzambe ntina ya solo mpo na kokata soki nani abongi kofanda na mabelé kati na mokili ya sika ntango boyengebene ya solo ekotiama. Ezali yango nde ezali kolobama kati na mokapo oyo ya Makomami: “Soko nde moto mabe akobongwa na masumu masalaki ye mpe akotosa mibeko na ngai nyonso, mpe akosala yango ezali sembo mpe alima, akobika solo, akokufa te.”​—Ezekiele 18:21.

Nsuka ya bokesene ekozala ntango nini?

Misala na Jéhovah liboso na bato mizalaki ntango nyonso ya boyengebene mpe etondi na boboto mingi. Yango wana mokolo moko oyo Abrahame, mosali na sembo ya Nzambe, asimbaki te ntina oyo makambo mosusu mazalaki kosalema, alobaki na ntina na Nzambe: “Ebongi na yo te kosala likambo boye ete oboma bayengebene na bato mabe elongo, ete bayengebene bazwa likambo lokola na oyo na bato mabe! Yango ebongi na yo te! Mosambisi na mokili mobimba akosala sembo te?” (Genese 18:25) Na nzela na koya na Klisto, bizaleli mibale ya Nzambe bikumisaki: boyengebene na ye mpe boboto na ye. Mbeka na lisiko na Klisto Yesu epesaki nzela na bato nyonso, Bayuda ata epai na bato bazali Bayuda te, elikya ya kozala na bomoi ya seko. Likambo yango ebendaki ntoma Petelo na koloba ete: “Na solo namoni ete Nzambe akokabolaka bato te; kasi kati na mabota nyonso, oyo akobangaka ye mpe akosalaka boyengebene ayambami na ye.”​—Misala 10:34, 35.

Ba Témoins de Jéhovah bazali kosakola na molende nyonso ete Mokonzi masiya oyo atiami na Nzambe asilaki kobanda koyangela, mpe ete tozali kopusana na eleko oyo boyengebene ekozongisama na mabelé kati na kokoka na yango nyonsoa. Yango ekosalema ntango Mokonzi yango akoboma mokili oyo ya mabe mpe akokanga nzambe oyo azangi komonana, Satan le Diable. Biblia ezali komonisa ete makambo yango makosalema mosika te, ntango ya “etumba na mokolo monene na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso”, etumba oyo ebengami Armagedon.​—Emoniseli 16:14, 16.

“Nzambe azangi bosembo mpo apesaka biso etumbu? . . . Ata moke te!” (Baloma 3:5, 6, Boyokani ya sika) Na bongo Armagedon ekozala etumba ya sembo. Na nsima, Yesu Klisto mpe bakonzi balandi na ye, bakisa mpe bantoma kati na bango, bakoyangela uta makoló na boumeli ya mibu nkoto. (Emoniseli 20:4) Bankoto na bato oyo basalelaki bango na bokesene na kala bakosekwa kati na ebongiseli ya sembo, na mabelé, efandelo ya liboso ya moto, mpe bakozala na boyengebene ya kokoka mpo na mbala ya liboso kati na bomoi na bango.

“Nzambe akozanga bosembo?”

Motuna oyo, ntoma Paulo atunaki yango mpo na mosala moko ya Nzambe. Eyano? Akomaki ete “ata moke te!”. Kokokanisaka bato na mabelé motane oyo mabongisamaki na moyemi na mbeki oyo ebongi kozwa to nkanda, to mawa, Paulo alimboli ete: “Nzambe alingaki kolakisa nkanda na ye mpe komonisa nguya na ye. Yango wana baoyo Nzambe asengelaki koyokela nkanda mpe balingi kokufa noki, akangaki motema mpenza mpo na bango. Alingaki lisusu komonisa lokumu na ye oyo eleki ndelo. Lokumu yango akabelaki biso bato ye ayokelaka mawa mpe asi’abongisi kala mpo tozwa lokumu na ye.”​—Baloma 9:14, 20-24, Kondimana ya Sika.

Lokola elenge mwasi ya collège oyo totangaki ye na ebandeli, mbala mosusu ozalaka na mpasi mpo na kokanga ntina soko mpo na nini Nzambe atiki nzela na mabe nyonso to na likambo moko ya mabe. Kasi biso tozali banani-biso, mabelé motane katikati na maboko na ye-mpo na kotiola motema molai mpe mayele oyo ezali kopusa ye na kosala bongo? Jéhovah Nzambe alobaki na Yobo: “Yo okotiola kosambisa na ngai, okokitisa ngai ete yo moko olongi?”​—Yobo 40:8.

Tala likambo oyo biso tokolinga te kokumbela yango ngambo. Nkutu, tokolinga kosepela na koyeba ete, ata soki tosengeli naino koyikela bokesene mpiko, mosika te Nzambe na boyengebene akolongola yango na mabelé mobimba.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Okozwa bilembo ete Bokonzi na Nzambe esilaki kobanda koyangela mabelé kozanga komonana na 1914 na kotalaka, na bankasa 134 kino 141, na mokanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis, ebimisamaki na société Watchtower. Mokanda yango ezali mpe na mokapo moko oyo elobi ete “Mpo na nini Nzambe atiki nzela na mabe?”

[Elilingi na lokasa 23]

Tokoki koloba te ete Nzambe azali te mpo mabe to bokesene ezali komonana.

Esengeli tofunda Nzambe ntango motambwisi motuka oyo alangwi atambwisi mabe?

Eleko oyo boyengebene ya kokoka ekozongisama kati na mabelé esili kobelama.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto