Makambo mazali koleka na mokili
Komibatela na mobulu
Na komonisaka lolenge mobulu ezali kokola kati na bilenge, zulunalo American Health emonisi ete: “Kobunda kati na baninga, ba camarades ya kelasi mpe bazalani ezali ntina ya liboso ya liwa ya mbalakaka epai na bilenge na ba villes, mpe ntina ya mibale ya liwa mpo na bilenge mingi ya Amerike.”
Mpo na kosukisa makanisi ya mobulu epai na bilenge, centre moko d’assistance socio-psycologique ezali kopesa mateya na ntango yango bayekoli bazali kosala bilakiseli mokuse likoló ya mobulu. Na yango, “babandi koyeba banzela oyo ezali komema na mobulu” mpe bazali sikawa na “makoki ya koyeba mpasi oyo ezali kopesama na nzela ya mobulu na bango moko”, ndenge mokambi na mateya oyo alimbolaki.
Bazali koyebisa epai na bayekoli makama ya makanisi na ntina etali nkanda, komata ya adrénaline na kati ya nzoto oyo ezali kobungisa komipekisa, mpe ntina ya kosolola elongo mpo na kokitisa nkanda ‘liboso ete nzoto ekoka kopusa moto kosala likambo”. Bazali koyekola ete moto akoki kopengwisa makama na kotunaka mituna na kosololaka elongo na kimya mpe kozanga kobanga.
Baoyo bazali koyekola Biblia basili koyeba ete mobulu ebimisaka mobulu mpe ete “kozongisa liloba na bopolo ekopengola nkanda”. (Masese 15:1) Ntango likambo moko oyo ekoki kobimisa matata ebimi, Biblia epesi toli ya kokima noki. Mokonzi na mayele Salomon akomaki: “Ebandeli na kowelana ezali lokola kotangola mai; bongo, liboso ete koswana ebima, longwa na yo.”—Masese 17:14.
Molongo moko oyo ebongisami
Na nsuka sanza ya mai, pene na bafizié 200 bayanganaki na Blois, na mokili ya France. Mingi kati na bango basila kozwa lokumu ya prix Nobel. Ntina ya likita na bango oyo eumelaki poso moko, ezalaki mpo na kosepela mbula 25 uta mayele mabengami “violation de CP” mayebanaki. Bakanisi ete mibeko ya liteya yango ezali koteya bokokani kati na biloko bizali komonana mpe oyo bizangi komonana.
Kasi liteya yango ya violation CP” (koyeba mabombami ya biloko bizangi komonana) ezali kobimisa mituna mingi koleka matomba na yango. Kotangaka maloba ya Profesere Andrei Linde, ye Mosovietike, zulunalo International Herald Tribune ekomaki boye: “Likambo ya kokamwa ezali boye ete biloko yango bizangi komonana, yango nde ebimisaki molongo oyo ebongisami.” Ntango batunaki ye mpo na koyeba soko “violation de CP” ezali na ntina na yango na molongo, cosmologue Jean Audouze, ye Mofransé ayanolaki boye: “Mikolo mosusu, nakanisaka ete ezali bongo, kasi ntango mosusu namonaka ete ezali bongo te. Molongo ekokani te. Mpe molongo ebongisami. Makambo oyo mibale, mazali kokamwisa. Molongo ebimaki pwasa te.
Molongo ebimaki pwasa te. Totangi boye kati na Genese 1:1: “Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mokili.” Molongo ebongisami mpamba te Jéhovah, Mozalisi, “azali Nzambe na mobulu te”, kasi Ye oyo misala na ye mizali ya ‘kokoka’.—1 Bakolinti 14:33; Deteronome 32:4; tala lisusu Yisaya 40:26; 42:5.
Kosangisa nzoto mibali na mibali mpe Bakatolike
Pape azongelaki mbala mingi ete Lingomba Katolike ezali kotalela kosangisa nzoto kati ya mibali na mibali lokola ezaleli mabe na kotalela mitinda ya bizaleli malamu. Akundolaki ete “lisangá na boklisto ya liboso ezalaki kopesa nzela na mabe te”. Baeveke mpe basango nyonso ya katolike bandimi likanisi yango te.
Na ebandeli ya 1989, eveke Jacques Gaillot, ye Mofransé, andimisaki ete azongelaki bobele maloba na Yesu na kokomaka ete “mibali na mibali oyo bazali kosangisa nzoto bakoingela na Bokonzi na Nzambe liboso na biso”.
Nzokande, eveke oyo abosanaki koloba mpo na oyo: Yesu azalaki koloba mpo na basi na pite oyo babongolaki mitema, baoyo batikaki etamboli na bango ya kala, ntango alobaki ete basi oyo bakoingela na Bokonzi na Nzambe liboso na bakonzi na mangomba Bayuda oyo bazalaki na moto makasi na ntango na ye.—Matai 21:28-32.
Bobele na likambo yango, sango José Ramon Carrasco, ye Moespanyole, akomaki kala mingi te kati na zulunalo madrilene El Pais ete “Yesu Klisto akweisaki ata mokolo moko te mibali oyo bazali kosanga na mibali. (. . .) Ntango Yesu azalaki koloba mpo na bolingo, azalaki koloba mpo na bolingo ya mozalani, mpe alobaki polele te soko mozalani asengeli kozala mobali to mwasi, to na kati ya ezalela nini, na esika nini mpe na lolenge nini bolingo yango esengeli komonisama.
Kasi, lisolo na Biblia emonisi ete Yesu azalaki koloba te mpo na ko- sangana ya mibali na mibali. Kati na lisese na Mosamalia malamu, alimbolaki mpenzampenza eloko elimboli bolingo ya mozalani, elingi koloba komibanzabanza mpo na bolamu na bamosusu.—Luka 10:29-37.
Mpo na baoyo bazali kosangana mibali na mibali, Biblia elobi ete: “Bomizimbisa te, moto na pite mpe basambeli na bikeko mpe bato na ekobo mpe bakembi na nsoni mpe mibali bamibebisi na mibali . . . bakosangola Bokonzi na Nzambe te.”—1 Bakolinti 6:9-11.