Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/10 nk. 30-31
  • Biloko na motuya na Evanzile na Malako

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biloko na motuya na Evanzile na Malako
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ekomamaki mpo na nani?
  • Mwana na Nzambe asali bikamwiseli
  • Mosala na Yesu kati na Dekapoli
  • Yesu mpe mateya na bonkoko
  • Nsuka na mosala na Yesu
  • Mokanda ya Biblia nimero 41—Malako
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Malako
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mokanda ya Biblia nimero 43—Yoane
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Mokanda ya Biblia nimero 40—Matai
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/10 nk. 30-31

Biloko na motuya na Evanzile na Malako

MALAKO apemamaki na elimo ya Jéhovah mpo ete akamá lisolo ya bomoi mpe mosala na Yesu na mabelé. Ata soki emonisami polele te kati na Evanzile oyo ete Malako nde azalaki mokomi na evanzile yango, Papias, Justin, Tertullien, Origène, Eusèbe, Jérôme mpe bakomi mosusu na eke-ke minei ya libosoliboso na ntango na biso bango nyonso bazali kondimisa yango.

Engebene masolo ya kala, ezali ntoma Petelo nde moto apesaki ma- kanisi ya ntina oyo makomamaki kati na Evanzile oyo. Ndakisa, Origène, alobi ete Malako akomaki yango “lokola Petelo alakisaki ye”. Kasi ezali komonana ete Malako azuaki mpe makambo ya kokoma epai na bato mosusu, mpo ete bayekoli bazalaki koyangana na ndako na mama na ye. Lokola ekoki kozala ete ye nde “elenge mobali” oyo akimaki bato oyo bakangaki Yesu, mbala mosusu Malako ye moko atambolaki elongo na Klisto.​—Malako 14:51, 52; Misala 12:12.

Ekomamaki mpo na nani?

Ezali komonana ete Malako akomaki Evanzile na ye na kokanisaka liboso mpo na bapakano. Ndakisa, lolenge na ye ya kokomá na koyebisaka makambo na mokuse kasi polele, ezali lolenge oyo Baloma bazalaki kolinga. Alimboli ete “corban” ezali “likabo oyo epesami epai na Nzambe” (7:11), mpe alobi na sikisiki ete moto akokaki komona tempelo wana ezali ye na ngomba na Olive. (13:3) Malako alimboli lisusu ete Bafalisai “bazalaki kokila bilei” mpe ete Basadukai ‘bazalaki koloba ete lisekwa ezali te’. (2:18; 12:18) Mpo na batangi Bayuda masolo oyo ekokaki kozala na ntina te.

Ya solo, bato nyonso bakoki kotanga mpe kozua litomba na Evanzile na Malako. Kasi makambo nini ya sikisiki makoki kosalisa biso na kosepela mpenza na biloko na yango mosusu na motuya?

Mwana na Nzambe asali bikamwiseli

Malako akomi bikamwiseli oyo Klisto asalaki na lisalisi na nguya ya Nzambe. Ndakisa, mokolo moko, ebele na bato batondaki na ndako epai Yesu azalaki kino ete, mpo na kokomisa epai ye azali moto moko abukana makolo na elikya ete akobikisa ye, esengaki ete batobola nzela na twatire mpo na kokitisa ye. (2:4) Lokola ndako etondaki na bato, mbala mosusu bamatisaki mobali oyo na twatire na lisalisi ya ebutiseli to na nzela ya eskalye moko ya libanda. Kasi mpo na nini kotobola twatire? Na ntango wana, batwatire mingi ezalaki plats mpe esimbamaki na makonzi kolongwa mur moko kino mosusu. Kati na makonzi, mabaya etandamaki oyo mazipamaki na bitape, matiti to biloko mosusu bikokani na oyo. Na likoló na yango batiaki mabelé mpe epakolamaki na potopoto, mbala mosusu esangani na mpembe. Mpo na kokomisa moto oyo abukani makolo epai Yesu azali, mibali basalaki bongo lidusu kati na twatire esalami na mabelé. Kasi matomba nini moto oyo abukanaki makolo azuaki nsima ya mosala oyo! Klisto abikisaki ye, mpe bato nyonso bazalaki wana bapesaki Nzambe nkembo. (2:1-12) Likambo oyo endimisi biso ete Mwana na Jéhovah akobikisa bamaladi mingi na lolenge ya kokamwa kati na mokili ya sika.

Yesu asalaki moko na bikamwiseli na ye wana ezalaki ye kati na bwato moko: akitisaki mopepe makasi likoló na mai na Galilaya nsima wana bayekoli na ye balamusaki ye ntango azalaki kolala motó likoló ya “kusé”. (4:35-41) Kusé oyo elobelami awa ezalaki petee te lokola oyo totyelaka motó mpo na kolala na mikolo na biso. Mbala mosusu ezalaki bobele poso ya meme likoló na yango batambwisi na bwato bazalaki kofanda, to ezalaki kusé oyo ezalaki kosalisa lokola efandelo na nsima ya bwato. Ezali solo ete ntango Yesu alobaki na mai: “Tilima! Zala nye!”, baoyo bazalaki wana bamonaki ndenge kondima ezali kokokisa mosala, mpo ete “mopepe etiki mpe kotilima ezalaki monene”.

Mosala na Yesu kati na Dekapoli

Nsima na kokatisa ebalé na Galilaya, Yesu akotaki na Dekapoli, to régió na bingumba zomi. Mingi na bafandi na bingumba oyo bazalaki Bayuda, ezalaki bisika biyebanaki lokola centre na bato na mayele Bagreke, to lokota oyo esangisi monoko ya greke mpe liebele. Na esika yango, na mokili na Bageraza, Yesu asikolaki mobali moko na elimo mabe oyo “azalaki na esika kati na mayita”.​—Malako 5:1-20.

Mayita oyo ebongisamaki kati na mabanga mazalaki mbala mosusu kosalelama na bato na ligboma mpo na kolala, bisika na komibomba mpo na babomi to ezalaki bifandelo mpo na babola. (Tala Yisaya 22:16; 65:2-4) Engebene mokanda moko na ekeke ya 19, mobali moko akendeki kotala régió epai kuna Yesu akutaki moto oyo azalaki na elimo mabe akomaki boye mpo na efandelo ya motindo wana: “Na kati liyita ezalaki soko na 2,50 mètres na molai kokende likolo, mpo ete na ekoteli oyo ezalaki ya libanga esengelaki kokita mingi mpo ete okoma na nivo ya mabelé. Liyita ezalaki penepene na 12 mètres carrés; kasi, mwinda ezalaki kokota bobele na nzela ya ekuke, tokokaki komona te soko ezalaki na chambre na kati lokola yango ezali mpo na mayita mosusu. Na kati okokuta ata sikawa sanduku oyo ezali naino malamu, oyo libota ezali kosalela sikawa mpo na kobomba bandunda mpe bilei mosusu. Na yango, liyita oyo ezalaki kokumisama lisusu te ekomaki esika malamu na kobombama, esika ya malili mpe ebongi mpo na bato na bomoi.”

Yesu mpe mateya na bonkoko

Mokolo moko, Bafalisai na Bakomeli mosusu bazuaki likambo na koloba mpo ete bayekoli na Yesu baliaki bilei na bango kozanga kosokola maboko. Mpo na batangi oyo bazali bato na mabota, Malako alimboli ete Bafalisai mpe Bayuda mosusu ‘bakoliaka te soko basukoli maboko te kino mabolongo ya maboko’. Nakozongaka na zando, bazalaki kolia bobele soko bamipetoli na komisopelaka mai, mpe mateya na bango na bonkoko etiaki na kati “kosokola (kobatisa) bakopo, mpe bambeki, mpe banzungu ya ebende (kwivre).”​—7:1-4.

Longola kosokola oyo elekisi ndelo liboso na kolia, Bayuda oyo bazalaki lisusu kobatisa, to kokotisa kati na mai, bakopo, bambeki mpe bazungu ya ngele (kwivre) oyo bazalaki kosalela ntango na kolia. Mokomi moko na makambo na Biblia, John Lightfoot, amonisi na ndelo nini Bayuda bakangamaki mingi na mateya na bonkoko. Na kotalela makomami na bakomeli, John alobi sikisiki ete bazalaki kotalela mingi makambo ya mike lokola boike ya mai, metode mpe ntango esengami mpo na kosokola. John atangi mokanda moko engebene ete Bayuda mosusu bazalaki kosukola malamumalamu liboso na kolia mpo ete Shibta akoka kosala bango mabe te, “Shibta ezali elimo mabe oyo efandaka likoló na maboko ya bato na butu; mpe soko moto asimbi bilei kozanga kosokola maboko, elimo yango ekofanda liloló na bilei oyo, yango nde ekozala likama”. Eloko na kokamwa ezali te soko Yesu akweisaki bakomeli mpe Bafalisai mpo ete ‘bazalaki ko- tika mibeko na Nzambe kosimbaka makasi mitindo miuti na bato’!​—7:5-8.

Nsuka na mosala na Yesu

Nsima na kolobela nsuka na mosala na Yesu na Galilaya mpe mosala na ye na Pérée, Malako alobeli mpo na makambo masalamaki na Yelusaleme mpe na zongazonga. Ndakisa alobi ete na libaku moko Klisto atalaki bato bazalaki kotia mbongo kati na ebombelo na makabo na bato na tempelo. Amonaki mwasi moko mokufeli mobali mpe mobola kotia ‘bibende mibale na motuya moke’. Nzokande, alobaki ete apesaki mingi koleka bamosusu, mpo bango bapesaki mosolo moleki na bango, kasi ‘ye, kati na bobola na ye asili kopesa mosolo na ye nyonso, lilei na ye nyonso’. (12:41-44) Engebene makomami na greke, mwasi oyo mokufeli mobali atiaki lepta mibale. Lepton ezalaki ebende moke ya Bayuda esalamaki na kwivre to bronze, motuya na yango ezalaki moke mingi soko tokokisi yango na ntango ya lelo. Kasi mwasi oyo mokufeli mobali asalaki nyonso oyo ekokaki na ye, na kopesaka ndakisa malamu na komipesa mpo na kopesa maboko na losambo ya solo.​—2 Bakolinti 9:6, 7.

Wana mosala na ye ezalaki kokoma na nsuka na yango, Yesu asambisamaki na Ponce Pilata, oyo nkombo mpe titre, “préfet”, emona-naki likoló na ekomeli oyo ekundolamaki na Césarée na 1961. Na ba régió ya mosika lokola Yudea, guvernere (to préfet) azalaki kopesa mitanda na limpingá ya basoda, azalaki kotalela makambo ya Leta na ntina etali mbongo, mpe azalaki kokokisa mokumba ya mosambisi. Na yango Pilata akokaki kopesa nzela ete batika Klisto, kasi akabaki Yesu na banguna na ye mpe alukaki kosepelisa bato na kotekaka ye mpo ete baboma ye likoló na nzete, mpe na kokangolaka Balaba, mobomi oyo azalaki kotombokisa bato.​—15:1-15.

Masolo ya bato mazali mingi na ntina etali bomoi ya kala mpe liwa ya Pilata. Na ndakisa, mokomi na masolo ya bato Eusèbe akomaki: “Pilata, oyo azalaki na bomoi na ntango ya Nkolo, ye mpe akweaki kati na bampasi motindo oyo . . . mpo na ntina yango amibomaki ye moko: na ndenge ezali komonana, kosambisa ya sembo na Nzambe etikaki ye ntango molai te.” Kasi, ezala ete ezalaki bongo to te, liwa na ntina monene ezalaki oyo ya Yesu. Kapitene na basoda Baloma oyo azalaki temwe ya liwa na Klisto mpe temwe na makambo na kokamwa na ntango wana alobaki mpenza ete: “Solo, moto oyo azalaki Mwana na Nzambe.”​—15:33-39.

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 30]

Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 31]

Bureau Israelien des Antiquités et de musées photographie du musée d’Israël, Jérusalem.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto