La Révélation le grand dénouement est proche!
“Mokanda oyo |touti kotanga titre na yango] ezali komonisa na lolenge ya kokamwa bolingo mpe litomba mozindo oyo Nzambe azali na yango epai na basaleli na ye nyonso. Wana ezali maloba ya motangi moko asepelaki mingi na mokanda yango mpe afandaka na mboka Washington. Moto oyo akotanga mokanda yango na likebi nyonso akolendisa nde kondima na ye.”
Motangi oyo andimi mokanda yango alobi lisusu boye: “Mokapo mokomoko emonisami na ndenge malamu mpenza. Nasepeli mpe na ndenge ba versets oyo elimbolami enyatami na makomi minene, mpe mokanda yango ezali na bilakiseli mpe batablo ya kitoko. Nazangi nde maloba mpo na kobimisa mayoki oyo mazwaki ngai ntango natangaki mokanda yango. Mbala mingi nakomaki pene na kolela.”
Totii elikya ete yo mpe, okosepela na ndenge banyama, dalagona mpe mwasi na pite bamonisami polele mpe na mayele nyonso. Okoyeba mpe ndimbola mpo na ntango na biso, ya bilakiseli mosusu bizali na Emoniseli. Mokanda kitoko oyo ezali na ezipeli ya carton, mpe na monene lokola zulunalo oyo, epesi ndimbola ya verset mokomoko ya mokanda mobimba na Emoniseli. Tinda komande na yo uta lelo oyo. Okozwa yango.