Kobuka mbuma mingi ezali kosepelisa Taiwan
TAIWAN ezali esanga na bakilometele 390 ya molai mpe bakilometele 140 ya monene. Ezali moko na bamboka na mokili oyo popilasio ezali monene mingi, ezali na bafandi koleka bamilió 20. Mingi na bafandi na yango balobaka monoko na chinois, to mandarin lokola ekobengaka bato ya Occident (epai moi ekolalaka). Kasi, kuna bazali mpe koloba nkótá mingi mpe ezali pene na minoko 13 milobami na bibolo.
Lokola ezali epai na Nord, Taiwan ezali esanga na mabelé makobotaka mbuma mingi. kobuka na lóso mpe oyo na mbuma mosusu ezali kosalema mingi kino ekómi kotinda biloko ya kolya na mikili misusu. Nzokande, kobuka mbuma ya lolenge mosusu ezali kosepelisa baoyo bazali kosala yango. Ezali bongo kobuka mbuma na elimo ya baoyo bazali kondima “nsango malamu na Bokonzi” na esengo.—Matai 24:14.
Mbotó na liboso
Mosala ya kolona mboto ya basolo na Biblia ebandaki na Taiwan esili koleka mibu ntuku motoba, wana momonisi moko ya la Société Watch Tower autaki Japon mpe asalaki mwa badiskur na kapitale, Taipei. Elenge Mojaponé moko na nkombo Saburo Ochiai atyaki likebi na nsango na Bokonzi mpe nokinoki alobelaki yango na bazalani na ye. Na nsima, ba pionniers mibale oyo bautaki Japon bafandaki na esanga wana mpo na kolona mboto ya nsango malamu. Na nsuka bakangamaki na bakonzi na basoda ya Japon mpe babomamaki mpo na Bokonzi na Nzambe. Mingi na milona oyo balonaki ebotaki nokinoki na libota ya Amis, kasi na bato ya chine, baoyo bafandi na ngambo ya Occident mpe baoyo mingi na bango bazalaki basambeli na Tao mpe ya Boudda, basepelaki na yango te.
Uta ebandeli na yango, kobuka mbuma na elimo na Taiwan ekolaki mokemoke, kino ete lelo oyo esanga ekomi elanga monene ekobotaka mbuma mingi. Na ndakisa, na boumeli ya mibu mitano oyo miuti koleka, bato 529, mingi mpenza bato na Chine, bazwaki batisimo. Na yango, motuya na basakoli ekómaki 1 522 na mobu 1989. Basambeli na Tao, basambeli na Boudda, mpe ata baoyo bakomilobaka ete bazali baklisto, bazali kondima nsango malamu mpe bazali koyekola koyeba Jéhovah Nzambe. Kasi ndenge nini kolobela Biblia epai na bato na ekolo mosusu? Ekobimisa matomba nini?
Boboto to mposa ya solo?
Na Taiwan, mosala ya kosakola ezali na mpasi mpe ezali malamu, mpamba te bato na chine babotami mpenza na ezalela ya bato na boboto. Mingimingi, bakoyokaka na limemya bato oyo bakei kotala bango. Ntango bakolakisaka bango mikanda mizali kolimbola Biblia, mbala mingi bakozwaka yango na limemya. Yango nde esalaka ete ba pionniers bakabola kino bazulunalo 300 to mpe kozwa baabonema 100 na sanza. Na boumeli ya bambula, motuya monene ya Biblia, mikanda, bazulunalo mpe ba tracts ekabolamaki epai na bato. Mpo na nini motuya na basakoli ezali kokóla malembe mpenza na kotalela motuya na bafandi na mboka wana?
Moko na bantina ezali mpo ete losambo na confucius esila kobongola makanisi na bato na boumeli na bikeke mingi. Engebene confucius, moto oyo “mpo na limemya epai na bilimo, akotangwa na bango, akoki kotangama moto na mayele.”a Likanisi yango elimboli ete moto na mayele asengeli te komipesa mingi na losambo ya bilimo to na losambo ya banzambe. Na yango, mingi balingi koyeba nsango na Bokonzi, kasi bobele moke nde bazali na mposa ya koyekola Biblia. Lisusu, atako bato na chine bazali na kondima na ebele na bilimo mpe banzambe, likanisi ya Mozalisi aleki likoló liyebani na bango te. Epai mosusu, ata nkutu bato oyo balobelami na Biblia mpe bayebani mingi lokola Abrayame to Davidi, bazali na ntina mpenza te mpo na bango. Tososoli mpenza mpo na nini esengeli kozala na motema molai mpe kolekisa ntango mwa mingi mpo na kosalisa bango ete bandima Biblia lokola Liloba na Nzambe mpe bazala na boyokani malamu elongo na Mozalisi, Jéhovah Nzambe. Nzokande, na lipamboli na Jéhovah, milende misalemaki mpo na kosalisa bango mizwi mbano.
Na boumeli ya bambula, na Taiwan, ba Temoins de Jéhovah oyo babongisamaki na masangá, bafutelaki bandako mpo na kosala makita na bango. Likebi ya bankulutu libendamaki mpo na ntina na kozala na esika ebongi mpenza mpo na kosala makita, wana moto moko azalaki na mposa mpo na solo alobaki na bango ete: “Soki solo ezali epai na bino, bozali kosala nini kati na bisika motindo oyo? Mpo na nini bozali na esika moko ya malamu te mpo na kosala makita?” Na yango, na kolikyáká epai na Jéhovah, basangani ya lisangá balukaki esika moko ebongi mpo na kotonga Salle du Royaume. Na nsuka, basombaki biteni mibale ya ndako moko monene bikangani, mpe bazali sikawa na Salle du Royaume moko kitoko.
Na Taiwan, na mibu motoba oyo miuti koleka, ba Salles du Royaume 11 esili kosombama to mpe kotongama. Na ntango nyonso bokoli ezali kosalema mpe motuya na bayangani ezali komata. Ezali likambo oyo lisalemaki na lisangá ya Taiwan, na Sud ya esanga. Na 1981, ezali bobele na lisangá moko moke ya basakoli ya Bokonzi 44 kati na engumba monene oyo ezalaki na bafandi 600 000. Lokola mposa ekómaki monene, etuluku wana ezwaki ekateli ya kotonga Salle du Royaume ya bango moko. Kondimisamáká ete Jéhovah akopambola bango, basakoli bakendeki liboso mpo na kokokisa mokano na bango, atako motuya na yango ekokaki kozala pene na milió moko ya francs. Bamoko bapesaki makabo ya wolo oyo bazwaki na mosolo ya libala; bamosusu bamipekisaki na kosala mibembo na bango ya koluka makanga ya ntalo. Basangani nyonso ya lisangá bapesaki lisalisi na bango na botongi wana. Ntango basangani ya comité de la filiale ya la Société Watch Tower bayokaki mokano yango, bazwaki ekateli ya kotonga ndako moko mpo na bamisionere likoló ya Salle du Royaume, kondimáká bongo kopesa ndambo na mosolo mpo na botongi. Salle esilaki kotongama nsima na mbula mibale. Epesaki matomba nini? Na boumeli ya mwa ntango, motuya na basakoli ekolaki na 74. Sikawa, masangá mibale, maye masalami nyonso na basakoli 160, mazali kosalela Salle yango, mpe bato koleka 250 bazali kosangana na mbala na mbala Masangá mibale wana mazali sikawa kotonga Salle du Royaume mosusu.
Kobuka mbuma kati na mabota
Kobuka mbuma kati na mabota oyo mazali na ngambo epai moi ekobimaka na Taiwan, ezali sé kobakisama uta ebandeli ya mosala na Bokonzi na esanga wana. Mwa basangani na libota ya Amis, baoyo bayebaki solo esali bongo koleka mibu 50, bazali ntango nyonso makasi na mosala. Bakutanaki na ebele ya mikakatano na boumeli na bambula mingi. Ntango Taiwan ekamatamaki na mboka Japon, na boumeli ya Etumba na Mibale ya mokili mobimba, bayekolaki monoko ya Japon. Mpe, ntango esanga ezongisamaki na mboka chine nsima na etumba, esengelaki na bango bayekola monoko ya chine. Na ebandeli ya bambula 1960, bakutanaki na momekamo ya lolenge mosusu. Na eleko wana, basangani mosusu ya lokumo ya libota Amis batikaki lisangá ya peto na Jehovah to mpe babengaki kotikala kati na yango te. Atako bongo, etuluku moke ya ba Témoins na sembo balandaki kosalela Jéhovah. Motuya monene ya bana-bakoli mpe bana-mike ya basaleli na Jéhovah wana na sembo, bazali lelo kopesa ndakisa malamu kati na mosala ya kosakola.
Basangani ya mabota mosusu mpe bakólaki na nzela ya elimo. Na ndakisa, etuluku moko na basakoli na sembo ya Bokonzi ezali kati na libota ya Bunun. Mingi na bankoko na bango bazalaka babomi na bato. Kasi lelo oyo, bato yango bazali kosakola nsango na kimya na Bokonzi na Nzambe. Libota ya Lukai mpe oyo ya Paiwan ezwaki mpe litatoli kitoko, mpe mingi na basangani na bango basalaki mabongwani minene kati na bomoi na bango. Ba chu Fu ayebisi makambo oyo asalaki:
“Nabotami na mboka na ngomba mingi ya Pingtung. Lokola tata na ngai azalaki mokonzi ya libota ya Lukai, bato bazalaki kopesa biso bilei, mpe tozalaki na mposa ya kosala mingi te. Kobokwamáká na ezalela wana, nakómaki na lolendo mingi. Na nsima, nakómaki ‘mokonzi’ ya lingomba ya bilenge oyo na mobulu, baoyo bazalaki kobeta bato mpe kobotola misolo na bango. Bato ya mboka bazalaki kobanga ngai mingi. Na mibu 22, nabalaki moko kati na ebele ya baninga na ngai ya basi. Lokola pité mpe milangwa na masanga elonamaki na ngai mingi mpenza, ezalaki na ngai mpasi ete nandima libala. Boyokani na biso eumelaki na kobeba te mpe nazongelaki lolenge na bomoi na ngai ya kala.”
“Ezali na eleko yango nde mwasi na ngai abandaki kosangana na makita ya Ba Témoins de Jéhovah. Nazalaki na mposa na makambo oyo azalaki koyekola te mpe nazalaki koloba ete Nzambe azali te. Kasi, na milende na ye ya solo mpe ya mpila, na 1973, nandimaki kokende elongo na ye na assemblée internationale moko ebongisamaki na Taipei. Tofandaki na libota moko ya Batemwe. Boboto ya ndeko mwasi wana Mochinois mpe ezaleli na ye ezangi koponama ekamwisaki ngai. Ntango tozongaki na ndako na biso, nabandaki koyekola Biblia mpe kosala milende ya solo mpo na kobongwana. Nazwaki batisimo na 1974.
“Na nsima, nasengelaki kolonga ebele na mikakatano. Moko kati na yango ezalaki oyo ya koyekola kotanga monoko ya Chine. Kotangwa na bandeko ezalaki mpe mokakatano mosusu. Ata ndeko moko te ateli na elimo oyo nakokaki kosangana na ye to mpe koluka lisalisi na ye, azalaki te. Ezalela wana esalisaki ngai na kotya motema epai na Jéhovah. Nayekolaki komikitisa mpe kokangana na lisangá na Jéhovah. Ebimisaki matomba nini? Lelo oyo, libota na ngai mobimba lizali makasi kati na solo. Nazali na libaku malamu ya kozala mosaleli na misala kati na lisangá oyo lizali lelo na basakoli 60 ya molende. Atako nazali na makoki maleki mpenza te, nde Jéhovah asili kopambola mpe kosunga milende na ngai mpo nasangana kobuka mbuma.”
Kobuka mbuma ezali kolandana
Taiwan ezali bobele eteni moke ya elanga oyo ete mokili. Nzokande, maloba na Yesu oyo mazali komonana mpenza solo, ete: “Mbuma na elanga eteli mingi mpenza, nde basali bazali mingi te.” (Matai 9:37) Na mobu mouti koleka, bato 4 534 basanganaki na Ekaniseli, kokanisama na liwa na Klisto. Na bongo, wana kobuka mbuma ebelemi na nsuka na yango, baoyo bazali kosala na Taiwan bazali kosangana na yango na mongongo ya esengo. Tala Nzembo 126:5, 6.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mikanda Les Entretiens, Vll 20, mibongolami na lingelesi Arthur Waley, kati na mikanda Entretiens de confucius, 1983, Vintage Booke, New York.
Salle du Royaume etongami sika na ngambo epai moi ekobimaka na Taiwan
Salle du Royaume etongami sika na ngambo epai moi ekobimaka na Taiwane
Basakoli ya Bokonzi bazali komema esengo epai na ebele na bato kati na mboka yango ezali kobota mbuma mingi.