Bambula eleki kitoko
Elenge mobali moko Monigéria (Afrique occidentale) auti kokoma boye ete: “Liboso, nazalaki kobanza ete bolenge ezalaki bambula eleki mpasi ya bomoi na moto mpe ete kozala tata to mama ya libota, to mpe kokóma mokóló, ezali kopesa esengo mingi.”
Kasi, na nsima elenge Moafrika wana azwaki mokanda moko Votre jeunesse comment en tirer le meilleur parti. Tala oyo akomaki: “Botondi mingi, mokanda oyo mosalisi ngai na makambo mingi.” Asukisi na kolobáká ete: “Lokola nazwi yango, sikawa nasosoli ete bolenge ezali bambula eleki kitoko.”
Bilenge oyo bazali kokóla na eleko na biso oyo ebulungani, basengeli kokutana na makambo ya sika mpe kozwa makatami ya ntina. Esengeli na elenge ete amela to mpe andima drogue? Etamboli nini ebongi kozala na yango epai na basi to mibale? Tokoloba nini mpo na masturbation mpe kosangisa nzoto mibali na mibali?
Bikateli mabe bikoki komema mitindo na bampasi mingi mpe kobebisa bolingo. Mokanda Votre jeunesse-comment en tirer le meilleur parti ezali kopesa biyano na mituna mizali awa likoló mpe na mingi mosusu. Soki olingi kozwa mokanda moko, tuna na ba Témoins de Jéhovah ya esika oyo yo ofandi.