Mituna na batangi
◼ Mpo na nini tozali kotanga na Yisaya 11:6 (MN) ete: “Mbwa ya zamba akofanda elongo na mwana na mpate mpo na mwa ntango? Kimya kati na nyama ekozala mpo na libela te?
Nyama bakozala ntango nyonso na kimya kitoko oyo esakolami na Yisaya 11:6-9. Nzokande, libongoli malamu ya Yisaya 11:6 emonisi ete nyama yango bakofanda ntango nyonso esika moko te.
Les Saintes Ecritures Traduction du monde nouveau ebongoli Yisaya 11:6 ete. “Mbwa ya zamba akofanda elongo na mwana na mpate mpo na mwa ntango, mpe nkɔi akolala elongo na mwana na ntaba, mpe mwana na ngombe, mpe mwana na nkɔsi, mpe nyama na mafuta nyonso bakozala esika moko; mpe mwana moke akokamba bango.”
Mabongoli mingi mayeisi yango ete. “Nyama na yauli ’akofanda’ elongo na mwana na mpate.” Yango ekoki kopesa likanisi ete mbwa ya zamba mpe mwana na mpate bakozala ntango nyonso bobele esika moko, lokola nde basalaki etonga moko ya sika mpe bafandi esika moko.
Nzokande, liloba ya hébreu libongolami na ‘kolanda’ to ‘kozala na bomoi’ ezali gur. Engebene William Gesenius, mokomi na mokanda moke mokolimbolaka maloba na Liebele, liloba wana elimboli “kozala epai ya . . . kofanda mwa ntango moke, kolanda epai mosusu lokota mopaya’ (A Hebrew and English Lexicon of he Old Testament, libongoli ya Edward Robinson) Mokanda ya F. Brown, S. Driver mpe C. Briggs ezali kopesa ndimbola oyo elandil: “Kozala epai ya . . . kofanda na boumeli ya eleko moko (eyebani to mpe te) lokola mopaya . . . oyo azangi lotómo lokola banamboka.”
Gur ezali verbe oyo Nzambe asalelaki mpo na koloba na Abrahame ete akende ‘kotanda lokola mopaya’ na mokili ya Kanana. Tata na mabota asengelaki kozwa mokati yango te. kasi akokaki kofanda wana mpe kozwa libateli. (Genese 26:3; Exode 6:2-4; Baebele 11:9, 13)Bobele bongo, Yakobo alobaki ete ‘afandaki lokola mopaya’ kati na etuka ya Halana, mpamba te asengelaki kozonga mokolo mosusu na Kanana.—Genese 29:4; 32:4.
Kati na Paradis oyo mosika te Nzambe akosala yango, nyama mpe bato bakozala na kimya. Mwana na mpate akozwa likámá te epai na mbwa ya zamba, mpe mwana na ngombe akozwana na nkɔi te. Mpo na komonisa kokesena na eleko na biso, liloba lisalelami lizali kopesa likanisi ete mbwa ya zamba akoki kolanda na nse na libateli ya mwana na mpate.—Yisaya 35:9; 65:25.a
Nzokande, ekoki kokóma ete nyama wana efanda na bisika bikeseni. Nyama mosusu emeseni na zamba, mosusu ezali na bisobé, mosusu pembeni na mai to na ngomba. Ata na eleko ya Paradis ya ebandeli, Nzambe alobelaki “nyama ya mboka” mpe “nyama ya zamba.” (Genese 1:24) Nyama ya mboka, na ntembe te ezalaki nyama oyo alandaki zingazinga na bato mpe na bifandelo na bango. Nyama na zamba mpe na yauli, emesenaki kofanda mosika na bato. Na yango, lokola esakolami na esakweli na Yisaya, mbwa ya zamba “akolanda elongo na mwana na mpate mpo na mwa ntango,” kasi akofanda libela te elongo na nyama ya mboka, lokola mwana na mpate.
[Maloba na nse ya lokasa]
a La Bible de Maradsous ebongoli maloba na ebandeli na Yisaya 11:6, ete: “Bongo mbwa ya zamba akozala mopaya ya mwana na mpate.”