Tobwaka elimo ya lolendo!
Lisese moko ya mayele ya Biblia elobi ete: “Ye oyo atongi ekuke na ye molai azali koluka libebisi.” (Masese 17:19) Mabe ezali wapi na kotonga ekuke molai? Mpe likanisi ya ntina na lisese wana ezali nini?
NA NTANGO na kala bato mpe bituluku ya miyibi oyo bazalaki komata na bampunda bazalaki komonana mingi. Bandako oyo ebatelamaki malamu te kati na bisika ya polele ezalaki mpo na miyibi. Mpo na kobatela biloko na bango na moyibi, bankolo na ndako mosusu bazalaki kotonga etutu na ekuke moko ya makasi. Etutu ezalaki na likoló kasi ekuke ezalaki na nse. Ya solo, bikuke mosusu bizalaki kokoma ata koleka metele moko na molai te—ezalaki mpenza na nse mpo ete mpunda mpe momati na yango bakoka kokota te. Baoyo bazalaki kosala bikuke na bango motindo wana te bazalaki na likámá ya komona ete mibali oyo bamataki likoló na bampunda kokota mpe kopunza biloko na bango.
Kati na bingumba, bikuke ya libanda ya ndako mbala mingi bizalaki na nse mpe bizalaki kitoko mingi te, bizalaki kopesa ata elembo moko te na ntina na bozwi oyo ekokaki kozala na kati. Nzokande, na Perse, ekuke ya molai ezalaki mpo na bana na bakonzi, oyo bato mosusu bazalaki komekola mpo na likámá na bango monene. Moto oyo azalaki kosala ekuke ya molai mpo na ndako na ye amibendelaki moyibi mpo ete azalaki komonisa bozwi na ye.
Masese 17:19 emonisi bongo ete baoyo bazali kosala bikuke na bango molai bazali komitya liboso na likámá mpo ete bazali komipesa motuya koleka biloko bazali na yango mpenza. Lisese oyo ekoki mpe kosalelama mpo na monoko oyo, lokola ekuke, ezali komitombola na maloba ya lofundo mpe ya lolendo. Maloba motindo wana mazali kopesa nzela na kozanga koyokana mpe makoki mbala mosusu komema bato na lolendo na likámá. Na bongo, ezali likambo na mayele na kobwaka elimo ya lolendo!
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 30]
Picturesque Palestine, Sinai and Egypt, Volume 1, by Colonel Wilson (1881)