Mpo na nini ˈkokende epai na nseleleˈ?
SALOMO mokonzi na mayele na Yisraele na kala apesaki toli oyo: “Kenda epai na nselele.” Mpo na nini alobaki bongo? Likambo nini tokoki koyekola epai na nselele?
Salomo abakisaki ete: “Banzabanza mpo na nzela na ye [nselele] ozala mpe na mayele. Ata ye azali na mokonzi te to na motambwisi te to na mokolo te nde akobongisa bilei na ye na ntango na moi makasi, mpe akoyanganisa biloko na ye na ntango na kobuka mbuma.” (Masese 6:6-8) Maloba wana oyo malobamaki uta kala mazali komonisa basolo oyo euti kobimisama kala mingi te na bato ya ntango na biso oyo bazali koyekola biloko bizalisami.
Mokomi na masese Agur amonisi ete nselele bazali “na mayele na kotalela lolenge basalema.” (Masese 30:24, 25) Ya solo, mayele na bango euti na bososoli na bango te kasi ezali na lolenge oyo Mozalisi asala bango. Na ndakisa, na ntina na lolenge oyo basalema, nselele bazali koyanganisa biloko na bango na ntango malamu.
Nselele bayebi mpenza komibongisa. Emonani ete basalaka na bomoko mpe batyaka likebi epai na baninga na bango, basalisaka baoyo bazoki to baoyo balembi na kozonga na zumbu. Na kotalela lolenge basalema, bazali kobongisa makambo mpo na mikolo mizali koya mpe bazali kosala nyonso ekoki na bango mpo na kokokisa misala na bango.
Lolenge nselele basalema ezali koteya biso ete bato basengeli komibongisa liboso mpe kozala basali makasi. Yango etaleli kelasi, mosala, mpe makambo ya elimo. Lokola nselele azali kozwa litomba mpo na molende na ye, na bongo Nzambe alingi mpe ete bato ˈbayoka esengo mpo na malamu na mosala na bango nyonso makasi.ˈ (Mosakoli 3:13, 22, 5:18) Lokola nselele oyo bazali kosala mingi, baklisto ya solo bazali kosala misala malamu mokolo na mokolo. ˈBazali kosala na makasi nyonso oyo maboko na bango makoki kosala,ˈ ezali te mpo ete bazali kokengela bango kasi na kolongobana mpe na mposa ya kozala basali na molende, baoyo bazali kobota mbuma.—Mosakoli 9:10; kokanisa na Masese 6:9-11; tala mpe Tito 2:9, 10.
Ya solo, tokozala mpe na esengo soki “tokokende epai na nselele” mpe kosalela oyo tozali koyekola epai na bango. Mpe tokozala na bolamu eleki monene soki tozali kosala na molende nyonso mokano na Jéhovah Nzambe, lokola yango emonisami kati na Biblia.