Ndelo etyameli yo, elɛmbisaka yo?
NDELO! Moto moko te alingaka yango; nzokande biso nyonso tosengeli kondima yango na meko moko to mosusu. Atako bongo, olɛmbisamaka na bantango mosusu mpamba te bomoi na yo emonani ete ezali na bandelo? Mbala mosusu okomiyoka malamu soki obongoli lolenge na yo ya kotalela makambo. Na esika ya komilela na ntina na oyo okoki kosala te, mpo na nini te kozwa litomba na oyo okoki kosala?
Na ndakisa, mingi kati na baoyo bazali babólá na makambo ya nkita balingaka kozala bazwi. Nzokande, wana bobólá ezali kotya ndelo na oyo tokoki kosala kati na ebongiseli ya biloko oyo, makambo ya ntina kati na bomoi makoki kozwama na bato banso. Babólá lokola mpe bazwi balingaka, babalaka, babokɔlaka bana, basepelaka kozala na baninga ya malamu, mpe bongo na bongo. Likambo ya ntina koleka, babólá lokola mpe bazwi bayebi Yehova mpe bazali kozela mokili ya sika oyo elakami. Babólá lokola mpe bazwi bazali kokóla kati na bwanya mpe boyebi ya boklisto, oyo ezali malamu koleka kozala na bozwi. (Masese 2:1-9; Mosakoli 7:12) Banso—mozwi mpe mobólá—bakoki komisalela bango moko nkombo epai na Yehova. (Mosakoli 7:1) Na mikolo ya Paulo, mingi na bato oyo bazalaki kati na lisangá ya boklisto bazalaki mpenza bazwi te—basusu kati na bango bazalaki baombo—oyo basalelaki na bwanya nyonso bonsomi oyo bazalaki na yango na kotalela ezalela ya makambo na bango.—1 Bakolinti 1:26-29.
Litambwisi ya Makomami
Kati na libala ya boklisto, mwasi azali na nsé ya bokonzi ya mobali na ye—ebongiseli oyo ezali mpo na bolamu ya libota mobimba. (Baefese 5:22-24) Esengeli ete mwasi amimona ete azali mpamba mpo na yango? Soko moke te. Mobali mpe mwasi bazalaka moto moko. Bokonzi ya mobali, wana esalelami na kolanda lolenge Klisto asalaki, etyaka bandelo mingi te likoló na mwasi mpe etikelaka ye mabaku mingi mpo ete asalela makoki na ye. (Baefese 5:25, 31) “Mwasi ya molende” oyo alobelami na Masese mokapo 31 azalaki kosala misala mingi ya kosepelisa mpe oyo ezalaki kosɛnga milende mingi. Ya solo, kotosa mobali na ye ezalaki kopimela ye eloko moko te.—Masese 31:10-29.
Bobele bongo, ezali te na ebongiseli oyo emonisi ete mwasi asengeli kokamba lisangá ya boklisto katikati ya mibali oyo bakoki. (1 Bakolinti 14:34; 1 Timoté 2:11, 12) Esengeli ete basi baklisto bázanga kosepela lokola bazali na nsé ya bandelo wana? Te. Mingi bazali na botɔ́ndi na komona ete ebongiseli wana etali mosala ya boklisto esalelami na lolenge ya teokrasi. Bazali na esengo ya kozwa litomba na libateli mpe na mateya ya bankulutu oyo batyami mpe bazali komipesa bango moko kati na mosala ya lobiko ya kosakola mpe kozalisa bayekoli. (Matai 24:14; 28:19, 20) Basi baklisto bazali kosala mingi kati na mosala wana, mpe yango ezali kosala ete bázala na lokumu na miso ya Yehova Nzambe.—Nzembo 68:11; Masese 3:35.
Ndelo mpo na bilenge
Bilenge mpe na bantango mosusu balelaka ete bomoi na bango ezali na ebele ya bandelo, mingimingi mpo ete bazali na nsé ya bokonzi ya baboti na bango. Nzokande, yango mpe esɛngami na Makomami. (Baefese 6:1) Na esika ya kosilika na ntina ya bandelo oyo baboti na bango bazali kotyela bango, bilenge baklisto oyo bazali na bwanya basengeli nde kosepela na bonsomi oyo bazali na yango—mbala mingi, kati na yango ezalaka mpe bonsomi ya kondima mikumba minene. Na yango, bakoki kozwa litomba na makasi ya bolenge na bango mpe na mabaku bazali na yango mpo na komibongisa bango moko mpo na ntango bakokóma mikóló.
Mokɛngɛli ya zongazonga moko ya kala na mboka Brésil azali komikundola elenge mobali moko ya mibu 12, oyo azalaki kati na etuluku moko etangwi, oyo azalaki na ndelo na makambo oyo akokaki kosala. Moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela balapólo azalaki na makambo mingi na mosala na ye ya mosuni mpe akokaki te kopesa likebi mingi mpo na etuluku yango. Kasi asalaki bibongiseli mpo ete elenge mobali wana akoka kosunga ye. Ayebaki epai wapi nkasa ya balapólo ezalaki mpe mbala mingi azalaki kopesa lisungi. Bosepeli na ye ezalaki kolendisa, mpe azalaki moninga ya sembo kati na mosala ya kosakola. Elenge wana asili koponama sikawa nkulutu.
Ezali na makambo mingi oyo ekoki kotya ndelo na bonsomi ya moto. Bokɔnɔ etyaka ndelo mpo na bamoko. Basusu bazali kofanda kati na libota oyo ekabwani mpe bazali komona ete bonsomi na bango etyelami ndelo na masɛngami ya babalani na bango oyo bazali bandimi te. Wana baoyo batyelami ndelo bakoki kolinga ete makambo mabongwana, bakoki ata bongo mpe kozala na bomoi ya kosepelisa. Zulunalo oyo emonisaki masoló mingi ya bato oyo balendisamaki na basusu mpamba te bazali kotalela Yehova mpe bazali kozwa litomba na ezalela na bango.
Kolobeláká ezalela oyo ezalaki na mikolo na ye, ntoma Paulo ayebisaki ete: “Obyangami kozala moombo? Omitungisa mpo na yango te; kasi soki mpe okoki kozala nsɔmi, ezali malamu kolanda libaku yango.” (1 Bakolinti 7:21, NW) Oyo nde likanisi ya bokatikati! Makambo mosusu mabongwanaka. Bilenge bakólaka. Babalani oyo bazalaki batɛmɛli mbala mosusu bakómaka kondima solo. Mikakatano ya nkita ekoki mpe kobonga. Bato na maladi bakoki mpe koyoka malamu. Epai mosusu, makambo makoki kobongwana te kino mokili ya sika oyo Yehova alaki ekoya awa. Nzokande, okozwa litomba nini soki ozali komilelalela mpo ete ozali te kokoka kosala oyo basusu bazali kosala?
Osilá naino komona bandɛkɛ wana ezali bango kopombwa na mapata likoló na mabelé mpe osepelaki na bonzengá mpe bonsomi na bango ntango bazali kopombwa? Mbala mosusu okokaki kolinga ete opombwa lokola bango. Okoki te mpe okozala na likoki soko moke te ya kopombwa lolenge yango! Kasi emonani ete okomilelalela te mpo na yango. Nzokande, sepelá na makoki oyo Nzambe apesi yo. Mpe ozali kolónga malamu na kotamboláká awa na mabelé. Bobele bongo, atako ezalela ya bomoi na biso ezali lolenge nini, soki tomipesi na oyo biso tokoki kosala na esika ya komilelalela na oyo tokoki te kosala, bomoi ekozala kitoko, mpe tokozwa esengo kati na mosala ya Yehova.—Nzembo 126:5, 6.
[Elilingi na lokasa 28]
Omiyokaka ete baboti na yo batyelaka yo ndelo?