Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/5 nk. 13-19
  • Tózwa matomba na botángi ya Biblia mokolo na mokolo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tózwa matomba na botángi ya Biblia mokolo na mokolo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tótángaka yango mokolo na mokolo
  • Ntina ya kotánga Biblia mbala na mbala
  • Ntango oyo botángi ya Biblia esengeli kosalema
  • Mitindo mikeseni ya kotánga Biblia
  • Tókanga ntina na oyo tozali kotánga
  • Kotánga Biblia epesaka matomba mpe esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Omipesa na kotánga
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Sepelá na Liloba ya Nzambe
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Ndenge nini okoki kotanga mpe kosimba makambo otangi
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/5 nk. 13-19

Tózwa matomba na botángi ya Biblia mokolo na mokolo

“Esɛngɔ ejali na moto . . . [oyo] mposa na ye ejali kati na Mobeko na [Yehova]; akokanisaka mpe Mobeko na ye butu na moi.”​—NJEMBO 1:1, 2.

1. (a) Makomi nini ya monene mazali komonana likoló na ndako ya biro monene ya la Société Watch Tower? (b) Litomba nini tokozwa soki totye likebi na toli yango?

“TÁNGÁ LILOBA YA NZAMBE, BIBLIA MOSANTU, MOKOLO NA MOKOLO.” Na makomi minene, maloba wana mazali komonana na mopanzi moko ya ndako na Brooklyn, na engumba New York, epai la Société Watchtower anyataka Biblia mpe mikanda oyo mikolimbolaka Biblia. Elendiseli wana ezali bobele te mpo na bato ya mokili baoyo bazali komona makomi yango. Batatoli ya Yehova bayebi ete bango mpe basengeli kotya likebi na elendiseli yango. Baoyo batángaka Biblia mokolo na mokolo mpe basalelaka yango kati na bomoi na bango bazwaka matomba na mateya, na mpamela, na kosembolama mpe na disipilini ya boyengebene oyo yango ezali kopesa.​—2 Timoté 3:16, 17.

2. Lolenge nini ndeko Russell abendaki likebi likoló na motuya ya botángi ya Biblia?

2 Batatoli ya Yehova bapesaka motuya mingi na mikanda oyo misalisaka bango kati na boyekoli ya Biblia, kati na yango Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, mpe basalelaka yango pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Kasi bayebi malamu ete moko te kati na yango ekoki kokamata esika ya Biblia yango moko. Kala na 1909, Charles Taze Russell, presidá wa yambo ya Watch Tower Bible and Tract Society, akomelaki batángi ya zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ete: “Bóbosana soko moke te ete Biblia ezali elakiseli na biso mpe ete bisaleli mosusu nyonso oyo Nzambe apesi biso bizali bobele ‘lisungi’ mpe bikoki te kokamata esika ya Biblia.”

3. (a) “Liloba ya Nzambe” lizali na bopusi nini likoló na baoyo bazali kotánga yango? (b) Mbala boni bato ya Bɛlɔya bazalaki kotánga mpe koyekola Makomami?

3 Makomami mapemami mazali na bozindo mpe na nguya oyo búku mosusu te ezali na yango. “Liloba na Njambe ejali na bomɔi mpe na nguya, ejali mpe na mopɔtu koleka mipanga yɔnsɔ mipeli bipai mibale. Ejali kotɔbɔla kino ekabwelo na [molimo mpe elimo, NW] matɔngi mpe lilɔngɔ; ejali komeka makanisi mpe mikano na motema.” (Baɛbɛlɛ 4:12) Moyekoli Luka akumisaki mpenza bato ya Bɛlɔya, kobéngáká bango “malamu mingi.” Basukaki te bobele na koyamba na mposa mingi liloba oyo ntoma Paulo mpe moninga na ye Sila basakwelaki bango, kasi lisusu ‘batángi Makomi mokolo na mokolo’ kotala soki oyo bazalaki koteya bango ezalaki na moboko likoló na Makomami.​—Misala 17:11.

Tótángaka yango mokolo na mokolo

4. Makomami mazali koloba nini mpo na oyo etali mbala boni tosengeli kotánga Biblia?

4 Biblia eyebisi polele te mbala boni tosengeli kotánga yango. Nzokande, emonisi toli oyo Yehova apesaki na Yosua ya ‘kotánga búku ya mobeko na mongongo na nsé butu na moi’ mpo ete akoka kosala na mayele wana ezalaki ye kokokisa mikumba oyo Nzambe apesaki ye. (Yosua 1:8) Eyebisi ete moto nyonso oyo ayangelaki Yisraele ya kala lokola mokonzi asengelaki kotánga Makomami “mikɔlɔ yɔnsɔ na bomɔi na ye.” (Dutɛlɔnɔmɛ 17:19) Eyebisi lisusu ete: “Esɛngɔ ejali na moto oyo aboyi kobila toli na bato mabe . . . kasi mposa na ye ejali kati na Mobeko na [Yehova]; akokanisaka mpe Mobeko na ye butu na mɔi.” (Njembo 1:1, 2) Lisusu, Evanzile oyo ekomamaki na Matai ezali koyebisa biso ete ntango Yesu Klisto aboyaki komitika na masɛnginya oyo Satana asalaki mpo na komeka Ye, atángaki maloba ya Makomami ya Liebele oyo mapemami, ete: “Ekomami ete, ‘Moto akobika bobɛlɛ na [limpa, NW] tɛ nde na maloba yɔnsɔ makobimaka na monɔkɔ na [Yehova].’” (Matai 4:4) Mbala boni tozalaka na mposa ya bilei ya mosuni? Mikolo nyonso! Kolya bilei ya elimo mokolo na mokolo ezali na ntina koleka, mpamba te yango ezali na bopusi likoló na elikya na biso ya bomoi ya seko.​—Deteronome 8:3; Yoane 17:3.

5. Lolenge nini botángi ya Biblia mokolo na mokolo ekoki kosalisa biso na “kotambola na sembo na [Yehova]” wana komekama ekweli kondima na biso?

5 Moko na moko kati na biso asengeli kokɛmbisama mokolo na mokolo na nzela ya Liloba ya Nzambe. Mokolo na mokolo​—na ndako, na mosala, na eteyelo, na balabála, ntango tozali kosomba biloko to na mosala na biso ya kosakola​—komekama ezali kokwela kondima na biso. Lolenge nini tokolónga yango? Mitindá ya Biblia mikoya nokinoki na makanisi na biso? Na esika ya kolendisa maoki ya komityela motema, Biblia ezali kokebisa ete: “Tika ete ye oyo akanisi ete ajali kotɛlɛma ngwi akeba ete akwea tɛ.” (1 Bakɔlinti 10:12) Kotánga Biblia mokolo na mokolo ekosalisa biso na “kotambola na sembo na [Yehova] mpe kosepelisa ye na makambo yɔnsɔ” na esika ya kotika ete mokili ebongola biso kati na lolenge na yango.​—Bakolose 1:9, 10; Baloma 12:2.

Ntina ya kotánga Biblia mbala na mbala

6. Mpo na nini kotánga Biblia mbala na mbala ezali kopesa litomba?

6 Kotánga Biblia ekeseni na kotánga búku ya masapo. Búku ya masapo oyo esepelisaka bato mingi esalemi mpo na kotángama mbala moko mpamba; wana moto ayebi lisoló na yango mpe lolenge lisoló yango lisuki, ntina ya kotánga yango ezali lisusu te. Na kokesena, ata soki totángi Biblia mbala boni, tozali ntango nyonso kozwa litomba monene na kotángáká yango lisusu. (Masese 9:9) Mpo na moto oyo azali na bososoli, Makomami mazali ntango nyonso kozwa ndimbola ya sika. Bisakweli oyo bizali kolobela mikolo ya nsuka bizali mpenza kobenda likebi na ye wana ezali ye kokokanisa yango na makambo oyo auti komona, koyoka to kokutana na yango na basanza oyo euti koleka. (Danyele 12:4) Wana ezali ye kokóma na eksperianse mingi kati na makambo ya bomoi mpe azali koyika mpiko liboso na mikakatano, motángi ya Biblia oyo azali na bososoli akopesa motuya mingi na toli oyo liboso azalaki kotánga bobele likolólikoló. (Masese 4:18) Soki bokɔnɔ moko makasi ezwi ye, bilaka ya Biblia oyo bitali kolongolama ya mpasi mpe kozongisama ya kolɔngɔ́nɔ́ bikómi na ndimbola ya mozindo epai na ye koleka na ntango ya liboso. Ntango moninga ya motema to mosangani moko ya libota akufi, bilaka ya lisekwa bikómi na motuya mingi mpenza.

7. Nini ekoki kosalisa biso soki topesameli mikumba ya sika kati na bomoi na biso, mpe mpo na nini?

7 Ekoki kozala ete yo moko osili kotánga Biblia mpe kosalela batoli na yango na boumeli ya bambula boye to boye. Kasi sikawa osili mbala mosusu kozwa mikumba ya sika kati na bomoi na yo. Ozali na mokano ya kobala? Mosika te okokóma moboti? Outi kopesamela mikumba kati na lisangá lokola nkulutu to mosaleli na misala? Osili kokóma mopalanganisi ya nsango malamu ya ntango nyonso, oyo ebakisi mabaku na yo mpo na kosakola mpe koteya? Oyo nde litomba okozwa soki okotánga lisusu Biblia mobimba wana ezali yo kokanisa mikumba wana ya sika!​—Baefese 5:24, 25; 6:4; 2 Timoté 4:1, 2.

8. Lolenge nini mbongwana kati na makambo na biso ekoki kobimisa ntina ya koyekola lisusu mingi makambo oyo tokanisaki ete toyebi yango banda kala?

8 Mbala mosusu, kala ozalaki mpenza komonisa mbuma ya elimo na lolenge malamu. (Bagalatia 5:22, 23) Nzokande wana makambo masili kobongwana, ekoki komonana ete osengeli lisusu koyekola makambo mingi na ntina na bizaleli wana ya kobanga Nzambe. (Kokanisá na Baebele 5:8.) Ndeko moko oyo kala azalaki mokɛngɛli-motámboli oyo amonaki malamu ete átika mosala wana ya ntina mingi mpo na kobatela baboti na ye oyo basilaki kokóma mibangé, alobi ete: “Nazalaki kokanisa ete nazalaki mpenza komonisa bambuma ya elimbo na lolenge lobongi. Sikawa nazali kooka lokola ete nazali kobandela lisusu makambo nyonso.” Bobele bongo, mibali mpe basi oyo babalani na bango bazali na mpasi makasi ya nzoto to ya maoki bakoki komona ete na kopesáká bango moko lisungi, na bantango mosusu kolɛmba ekoki kobimisa makambo oyo makosilisa mpiko na bango. Kotánga Biblia mokolo na mokolo ezali liziba ya libɔndisi mpe ya lisalisi.

Ntango oyo botángi ya Biblia esengeli kosalema

9. (a) Nini ekoki kosalisa moto oyo azali na misala mingi na kozwa ntango ya kotánga Biblia mokolo na mokolo? (b) Mpo na nini kotánga Liloba ya Nzambe ezali mpenza na ntina mingi mpo na bankulutu?

9 Ezali solo ete, mpo na bato oyo bazalaka na misala mingi, kozwa ntango mpo na kokokisa likambo mosusu mokolo na mokolo ezali ntembe monene. Nzokande, ndakisa ya Yehova ekoki kopesa biso litomba. Biblia ezali komonisa ete akosalaka makambo na ‘bilaka na yango.’ (Genese 21:2; Exode 9:5; Luka 21:24; Bagalatia 4:4) Kopesa motuya na botángi ya Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo ekoki kosalisa biso na kozwa ntango kati na manáka na biso ya mokolo na mokolo. (Baefese 5:15-17) Mingimingi bankulutu basengeli kobomba ntango mpo na kotánga Biblia mpo ete batoli oyo bakopesa epikama makasi likoló na mitindá ya Biblia mpe ete elimo oyo bakomonisa ezala engɛngiseli ya “mayɛlɛ mauti na likoló.”​—Yakobo 3:17; Tito 1:9.

10. Ntango nini baoyo batángaka Biblia mokolo na mokolo bazwaka ngonga ya kotánga Biblia?

10 Mingi kati na baoyo bazali kolónga malamu kati na botángi na bango ya Biblia basalaka yango na ntɔ́ngɔ́ liboso ete bábanda misala misusu ya mokolo. Basusu bamonaka ete bakokaka kolandela yango malamu na ngonga mosusu. Bakasete ya botángi ya Biblia (esika oyo yango ezali) esalisaka baoyo bakendaka kosala mosika ete basalela ntango ya mobembo na bango malamu, mpe Batatoli mosusu bayokaka yango wana bazali kokokisa misala na bango ya mokolo na mokolo kati na ndako. Manáka oyo malóngaki mpo na Batatoli bakeseni na Mpótó, na Afrika, na Amerika ya Nɔ́rdi, na Amerika ya Súdi, mpe na mikili ya Ɛ́sti mimonisami na nkasa 20 mpe 21, kati na lisoló “Ntango oyo batángaka yango mpe matomba oyo bazwi.”

11. Lolenge nini tokoki kokokisa botángi ya Biblia mokolo na mokolo atako tozali mpenza na ntango mingi te mpo na yango?

11 Likambo lileki ntina lizali te ntango boni oyo olekisaka na botángi na yo ya Biblia na libaku nyonso oyo okoki kosala yango, kasi ezali nde ya kolandela yango kozanga kotika. Okoki kosepela kotánga yango na boumeli ya ngonga moko to koleka na mbala moko, na kosaláká bolukiluki mosusu mpe na kokɔtáká mozindo kati na makambo oyo ozali kotánga. Kasi manáka na yo mapesaka yo nzela ya kosala bongo mbala na mbala? Na esika ya kolekisa mikolo mingi kozanga kotánga Biblia, ekozala malamu mingi kotánga Biblia mokolo na mokolo na boumeli ya miniti 15 to ata miniti 5, boye te? Komisá botángi ya Biblia mokolo na mokolo mokano na yo. Na nsima, bakisá bolukiluki ya mozindo likoló na botángi wana, soki likoki lizali.

Mitindo mikeseni ya kotánga Biblia

12. Bibongiseli nini ya botángi Biblia basangani ya sika ya libota ya Betele mpe bayekoli ya Galadi bazalaka na yango?

12 Ezali na mitindo mingi mikeseni ya kotánga Biblia. Tokozwa litomba ya kotánga yango kobanda na Genese kino na Emoniseli. Basangani nyonso ya libota ya Betele na mokili mobimba baoyo bazali kosala na biro monene to na ba filiales ya la Société basɛngisami na kotánga Biblia mobimba na boumeli ya mbula na bango ya liboso ya mosala na Betele. (Na momeseno, yango esɛngaka kotánga mikapo misato to mitano na mokolo engebene bolai na yango, to nkasa minei kino mitano mokolo na mokolo.) Bayekoli na Galadi, Eteyelo ya Biblia ya Watchtower basengeli mpe kotánga Biblia uta ebandeli kino nsuka na yango liboso ya kozwa mapɔ́lɔmi na bango. Tozali kolikya ete yango ekosalisa bango na kokómisa botángi ya Biblia mokolo na mokolo eteni ya bomoi na bango.

13. Mokano nini Batatoli oyo bauti kozwa batisimo sika balendisami na komityela?

13 Batatoli ya sika oyo bauti kobatisama bakozwa litomba ya komityela mokano ya kotánga Biblia mobimba. Na 1975, wana elenge moko ya France azalaki komibongisa mpo na kozwa batisimo, nkulutu moko atunaki ye soki azalaki na manáka ya sikisiki mpo na botángi ya Biblia. Kobanda ntango wana atángaka Biblia mobimba mbula na mbula, kosaláká botángi na ntɔ́ngɔ́ liboso ete akende na mosala. Mpo na matomba oyo azwaki, alobi ete: “Nasili koyeba Yehova malamu. Nazali komona lolenge makambo nyonso oyo azali kosala mazali na boyokani na mokano na ye mpe lolenge asalaka wana mikakatano mibimi. Nazali komona ete Yehova azali na mbala moko sembo mpe na boboto kati na misala na ye nyonso.”

14. (a) Mpo na kobanda ebongiseli ya botángi na biso ya Biblia oyo elandani malamu, eloko nini ezali na ntina? (b) Nini ekoki kosalisa biso na komikundola makambo ya ntina ya mokanda moko na moko ya Biblia wana tozali kotánga yango?

14 Osili kotánga Biblia mobimba? Soki te, ezali sikawa ntango malamu ya kobanda yango. Salá manáka moko ya sikisiki, mpe kangamá na yango. Katá motuya ya nkasa to ya mikapo oyo okotánga mokolo na mokolo, to kamatá bobele ekateli soki ntango boni okolekisa mpe poná ntango oyo okosala yango. Bato nyonso te bakosilisa kotánga Biblia na mbula moko, kasi likambo oyo lileki ntina lizali ya kotánga Biblia mbala na mbala, kosaláká bongo mokolo na mokolo soki likoki lizali. Wana ezali yo kotánga Biblia, okoki komona litomba ya kosalela mikanda misusu oyo mikokɔtisa malamu makanisi ya ntina matali makambo ozali kotánga. Soki búku Insight on the Scriptures ezali na lokótá oyo olobaka, boye liboso ete obanda kotánga mokanda moko ya Biblia, talelá nokinoki makambo minene oyo mapesami lokola makanisi na yango ya ntina kati na búku Insight.* Mingimingi tyá likebi na mitó ya makambo oyo ekomami na lángi ya moindo kati na makambo minene oyo mapesami. To salelá na lolenge yango rezimé ya mozindo oyo epesami kati na búku “Toute Écriture est inspirée de Dieu et utile.”a

15. (a) Batoli nini oyo epesami na nkasa 16 mpe 17 ekoki kosalisa na kobongisa lisusu malamu botángi na yo ya Biblia? (b) Na esika ya kotánga mwa nkasa bobele lokola momeseno mpamba, likambo nini ya ntina mingi tosengeli kotyela yango likebi?

15 Botángi ya Biblia oyo elandani malamu ezali kopesa matomba, kasi tosengeli te kokóma bobele batángi ya momeseno mpamba. Esengeli te kotánga mwa mikapo mokolo na mokolo bobele mpo tókoka koloba ete totángaka Biblia mobimba mbula na mbula. Lokola yango emonisami kati na etánda “Batoli mpo na kobongisa lisusu botángi na yo ya Biblia” (nkasa 16 mpe 17), ezali na mitindo mingi oyo okoki kosalela mpo na kotánga mpe kosepela na Biblia. Ata mwango nini oyo ozali kosalela, omindimisá ete ozali mpenza koleisa makanisi mpe motema na yo.

Tókanga ntina na oyo tozali kotánga

16. Mpo na nini ezali na ntina mingi kozwa ntango ya komanyola likoló na oyo tozali kotánga?

16 Ntango azalaki koteya bayekoli na ye, Yesu alobelaki mingi ntina na kososola makambo oyo azalaki koloba. Likambo ya ntina lizalaki te bobele ya kosimba yango na bɔngɔ́, kasi kokanga “ntina na yango na mitema na bango” ete básalela yango kati na bomoi na bango. (Matai 13:14, 15, 19, 23) Nzambe apesaka motuya mingi na bomoto mpenza ya kati, oyo motema nde emonisaka yango. (1 Samwele 16:7; Masese 4:23) Na yango, longola likambo ya komindimisa ete tososoli oyo mikapo ya Biblia mizali koloba, tosengeli komanyola likoló na yango, na kotaleláká bopusi na yango likoló na bomoi na biso moko.​—Nzembo 48:9; 1 Timoté 4:15.

17. Wapi mwa mitindo oyo tosengeli komanyola likoló na makambo oyo tozali kotánga kati na Makomami?

17 Salá makasi ososola mitindá ya Biblia oyo mimonisami polele kati na lisoló ozali kotánga mpo ete okoka kosalela yango liboso na mikakatano oyo ozali kokutana na yango. (Kokanisá na Matai 9:13; 19:3-6.) Wana ezali yo kotánga mpe komanyola likoló na bizaleli kitoko ya Yehova, salelá libaku yango mpo na koyeisa makasi boyokani na yo elongo na ye, mpe kokólisa kati na yo ezaleli mozindo ya bobángi Nzambe. Wana ozali kotánga makambo matali mokano ya Yehova, talelá oyo okoki kosala na boyokani na mokano yango. Wana ozali kotánga batoli oyo ezali polele, na esika ya komiloba ete, ‘Nayebi yango,’ omituna, ‘Nazali mpenza kosala oyo yango elobi?’ Soki ee, omituna yo moko ‘Lolenge nini nakoki mpenza kosala yango “malamu mingi?”’ (1 Batesaloniki 4:1) Wana ezali yo koyekola masɛngami ya Nzambe, tyá mpe likebi likoló na bato oyo balobelami kati na Biblia lokola bandakisa, baoyo bamitambwisaki na boyokani na masɛngami yango mpe baoyo basalaki bongo te. Talelá mpo na nini bamitambwisaki bongo mpe yango ememaki na bosukisi nini. (Baloma 15:4; 1 Bakolinti 10:11) Wana ezali yo kotánga lisoló ya bomoi ya Yesu Klisto, omikundolá ete Yesu azali ye oyo Yehova apesaki na mabɔkɔ na ye bokonzi nyonso mpo na koyangela mabelé; salelá libaku yango mpo na kokólisa na motema na yo mposa makasi mpo na mokili ya sika ya Nzambe. Lisusu, sosolá makambo oyo kati na yango okoki mpenza komekola malamu Mwana ya Nzambe.​—1 Petelo 2:21.

18. Lolenge nini tokoki kozala na bokatikati na ntina etali botángi na biso ya Biblia mpe mikanda ya boyekoli oyo mibimisami na “moombo ya sembo mpe ya mayele”?

18 Ya solo, botángi ya Biblia esengeli te kokamata esika ya boyekoli ya mikanda kitoko oyo mipesami na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” Yango mpe ezali eteni ya ebongiseli ya Yehova​—oyo ezali na motuya mingi. (Matai 24:45-47) Omindimisá ete kotánga Liloba ya Nzambe ntango nyonso ezali na esika monene kati na bomoi na yo. Soki likoki lizali, “TÁNGÁ LILOBA YA NZAMBE, BIBLIA MOSANTU, MOKOLO NA MOKOLO.”

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

Okopesa eyano nini?

◻ Mpo na nini kotánga Biblia mikolo nyonso ezali kopesa litomba?

◻ Mpo na nini tosengeli kotánga Biblia mbala mingi?

◻ Kati na manáka na yo moko, wapi ntango oyo ebongi na botángi ya Biblia mokolo na mokolo?

◻ Wana ezali yo kotánga Biblia mbala mingi, nini ekoki kobakisa makambo ndenge na ndenge na manáka na yo?

◻ Mpo na nini ezali na ntina mingi komanyola likoló na oyo tozali kotánga?

[Etanda na lokasa 16, 17]

Batoli mpo na kobongisa lisusu botángi na yo ya Biblia

(1) Bato mingi batángaka mikanda ya Biblia na kolandáká molɔngɔ́ oyo bameseni konyata yango, kobanda na Genese kino na Emoniseli. Okoki mpe kotánga yango na kolandáká molɔngɔ́ oyo yango ekomamaki uta na ebandeli. Kobosana te ete Biblia ezali liboke ya mikanda 66 oyo epemami, bibliotɛkɛ ya Nzambe. Mpo na kozwa makanisi ndenge na ndenge, okoki kopona kotánga mikanda mosusu oyo ezali kolobela lisoló ya makambo ya kala, na nsima mosusu oyo ezali mpenza ya bisakweli, na nsuka oyo ezali nkomá ya kopesa toli, na esika ete ólanda bobele molɔngɔ́ ya nkasa. Kobosana te makambo oyo ozali kotánga, mpe omindimisa ete okotánga Biblia mobimba.

(2) Nsima ya kotánga eteni moko ya Makomami, omituna oyo yango ezali komonisa na ntina na Yehova, mokano na ye, lolenge na ye ya kosala makambo; lolenge yango ekoki kozala na bopusi likoló na bomoi na yo moko; lolenge okoki kosalela yango mpo na kosalisa bato mosusu.

(3) Wana ozali kosalela etánda “Makambo ya ntina ya bomoi ya Yesu awa na mabelé” ebimisami na nsé ya motó ya likambo ya moke “Yesu Klisto” kati na búku Insight on the Scriptures (lisusu kati na “Toute Écriture est inspirée de Dieu et utile”), tángá masoló oyo mazali koyebisa likambo likokani na yango kati na biteni ya Baevanzile, moko nsima na mosusu. Bakisá likoló na yango makambo mazwami na biteni ya mokanda Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo, oyo makokani na yango.

(4) Wana ozali kotánga lisoló ya bomoi mpe misala ya Paulo kati na Misala ya bantoma, tángá lisusu nkomá epemami oyo eyokani na yango. Na yango, wana bazali kolobela bingumba mpe bisika mingi epai Paulo asakolaki, tɛlɛmá mpe tángá mikanda oyo akomaki na nsima epai na baklisto oyo bazalaki kofanda na bisika yango. Ezali mpe malamu kolanda mobembo na ye likoló na karte, lokola oyo ezali na lokasa ya nsuka ya Traduction du monde nouveau.

(5) Wana ezali yo kotánga kobanda na Exode kino Deteronome, tángá mokanda epai na Baebele mpo na kozwa bandimbola mingi ya bililingi ya bisakweli. Na nsé ya motó na likambo “Mibeko” kati na búku Insight on the Scriptures, talá etánda “Mwa bililingi bitali Kondimana ya Mibeko.”

(6) Wana ozali kotánga mokanda ya bisakweli, zwá ntango ya kozongela makambo ya kala ya lisoló ya Biblia oyo mayokani na yango. Na ndakisa, wana ozali kotánga mokanda ya Yisaya, luká na mikanda misusu epai bazali kolobela mikonzi Uziya, Yotama, Ahaza, mpe Hizikiya, baoyo balobelami kati na Yisaya 1:1. (2 Mikonzi, mikapo 15-20; 2 Ntango, mikapo 26-32) To wana ozali kotánga Hagai mpe Zakaria, zwá ntango ya kozongela makambo oyo mazwami na mokanda ya Ezela.

(7) Poná mokanda moko ya Biblia, tángá biteni na yango (mbala mosusu mokapo moko), na nsima salá bolukiluki, na kosaleláká Index des Publications de la Société Watch Tower to Bibliotɛkɛ ya Watchtower oyo ezali kati na ordinatɛrɛ, soki yango ezali na lokótá na bino. Salelá makambo oyo ozali kotánga kati na bomoi na yo. Salelá yango kati na masoló to kati na mosala ya kosakola. Na nsima leká na eteni mosusu.

(8) Soki ezali na mokanda moko ya la Société Watch Tower oyo ezali kopesa bandimbola likoló na mokanda moko ya Biblia to na eteni na yango, talelá yango mbala na mbala wana ezali yo kotánga eteni wana ya Biblia. (Na ndakisa: Likoló na Loyembo ya Solomo, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Máí 1958 (ebimeli ya Lifalanse), nkasa 148-154; likoló na Ezekiele, “Les nations sauront que je suis Jéhovah” ​— Comment?; likoló na Danyele, “Que ta volonté soit faite sur la terre” to Le futur gouvernement universel ​— le Royaume de Dieu; likoló na Hagai mpe Zekalia, Le Paradis rétabli parmi les hommes ​— grâce à la Théocratie!; likoló na Emoniseli, Emoniseli​—kokokana na yango monene ebelemi!)

(9) Ntango ozali kotánga, tángá mitindami ya mikapo oyo mipesami. Tyá likebi na mikapo 320 ya Makomami ya Liebele oyo maloba na yango matángami na polele kati na Makomami ya Greke ya boklisto mpe bankámá ya biteni mosusu oyo bilobelami, mpe lolenge yango esalelamaki. Mikapo ya mitindami mizali kolakisa kokokisama ya bisakweli ya Biblia, makambo matali masoló ya bomoi ya bato mpe bisika, mpe makanisi oyo mazali na bokokani, maye makoki kolimbola polele maloba oyo okoki mbala mosusu komona ete mazali mpasi mpo na kokanga ntina na yango.

(10) Na kosaleláká Traduction du monde nouveau oyo ezali na mitindami, soki ezali na lokótá na bino, luká maloba na nsé ya lokasa mpe masoló ya appendix oyo makokani na makambo ozali kotánga. Yango ezali komonisa moboko mpo na lolenge oyo babongolaki yango mpe mitindo misusu oyo maloba ya ntina makoki kobongolama. Okoki mpe kolinga kokokanisa lolenge mikapo misusu mibongolami kati na mabongoli mosusu.

(11) Nsima ya kotánga mokapo moko na moko, komá na mokuse likanisi ya ntina ya mokapo yango. Salelá yango lokola moboko mpo na bozongeli mpe bomanyoli oyo okosala yango na nsima.

(12) Wana ozali kotánga Biblia, tyá elembo na mikapo oponaki mpo ete okoka mpenza komikundola yango, to komá yango likoló na bakarte mpe tyá yango na esika oyo okomona yango mikolo nyonso. Kangá yango na motó; manyolá likoló na yango; salelá yango. Komeka te kokanga mikapo mingi na mbala moko, mbala mosusu okoki kokanga bobele moko to mibale pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; na nsima poná mikapo mingi wana okotánga Biblia na mbala ya nsima.

[Bililingi na lokasa 15]

Otángaka Biblia to oyokaka bakasete na yango mokolo na mokolo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto