Nazali Mokɛngɛli-Motamboli epai na bapaya na ekólo na biso
MPO na kotala etuluku ya masangá ya boklisto nasalaka mibembo bandá na ekólo Portugal kino na ekólo Chine—to naloba ete emonanaka lokola nde ezali bongo. Nzokande, ngai na mwasi na ngai Olive, totambolaka sé na kati ya ekólo Angleterre.
Totalaka masangá ya Batatoli ya Yehova ya nkóta ya bapaya oyo mazali sé kobakisama mpe mapalangani na ekólo mobimba. Tozali kosala mosala na teritware oyo bokóli monene ezali kosalema, ya bato oyo balobaka nkóta ndenge na ndenge; bandá na esanga Jersey, oyo ekabwani na ntáká ya kilomɛtɛlɛ pene na 20 na bokúla ya etúká Normandie, na ekólo France, epai kuna ezali na mwa etuluku ya bandeko balobaka lokóta Portugais, totambolaka na ekólo mobimba kino na engumba Sunderland na nɔ́rdi ya Angleterre, epai totalaka bato ya lokóta Chinois oyo basepelaka na solo. Nini esalaki ete tókóma na mosala wana ya sipesiale? Mpe nini ezali komonana kati na mosala na biso epai na bapaya oyo bafandi na ekólo na biso? Tiká ete nalimbwela bino.
Ngai na Olive tosalaki mosala ya zongazonga na boumeli ya mbula soko 20, kotaláká masangá moko nsima na mosusu pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Mibembo na biso mizalaki komema biso longwa na nɔ́rdi kino na súdi, na ɛ́sti kino na wɛ́sti na Angleterre mobimba, mpe kala mingi te, epai ya bandeko na biso baklisto na esanga ya Malte, na Mai Monene ya Méditerranée, epai kuna tomonaki mpenza ezaleli ya boklisto etali koyamba bapaya. (Kokanisá na Misala 28:1, 2.) Nsima ya kolekisa mbula misato na esanga Malte, tobandaki komituna soki bakotinda biso epai wapi. Tokanisaki ete mbala mosusu bakotinda biso na teritware ya bamboka ya zamba na Angleterre, mpe tobandaki kobongisa makanisi na ntina na likambo yango. Nzokande, tokamwaki na ntango tozwaki nkomá ete tokosala na zongazonga ya sika oyo esalami na bituluku mpe masangá ya nkóta 23 ikeseni!
Tomitunaki ndenge nini tokolónga. Longolá mosala na biso na Malte, tosala naino elongo te na bato ya mimeseno mikeseni na oyo ya biso. Tolingaki mpenza kolónga na kolendisa bato oyo bayebaki mpenza Lingelesi te? Lolenge nini tokokaki kosolola na bango kozanga ete tóyeba nkóta mosusu? Ezali boni mpo na bilei mpe mimeseno ndenge na ndenge ya bato mosusu? Tokokoka mpenza komimesenisa? Mituna lokola oyo wana miyaki na bɔɔngɔ́ na biso ntango tozalaki kokanisa mozindo eyano tokopesa na libyangi wana ya moto na Makedonia.—Misala 16:9, 10; 1 Bakolinti 9:19-22.
Kolónga mokakatano ya nkóta
Olive alimboli boye: “Liboso namiyokaki ete nabongi te mpamba te nazalaki na boyebi ya nkóta te, nayebaki te ndenge nini nakokoka kosalisa bandeko basi. Na nsima namikundolaki lolenge babalani oyo toyekolaki na bango Biblia balendisaki biso ete tóboyaka soko moke te mosala oyo epesameli biso. Bateyaki biso ete Yehova asɛngaka biso soko moke te ete tósala mosala oyo tokoki te kolónga kokokisa yango.” Na yango, tondimaki na esengo mosala yango.
Soki tokanisi, tomonaka ete kozanga koyeba lokóta mosusu esalisaki biso na kotalela bato nyonso lolenge moko. Na ndakisa, koyangana na makita oyo mazali kotambwisama na nkóta ikeseni na mosusu nsima ya pɔ́sɔ mokomoko esalisi biso na kososola mayoki ya bandeko na ntango basengelaki kolanda makita na Lingelesi wana bazalaki kokanga bobele ntina moke na maye mazalaki kolobama. Tosengeli mpenza komibongisa malamumalamu mpo na makita na ntina ete tókoka kokanga ntina ya masoló oyo mazalaki kosalema. Olive ayanolaka ntango nyonso na motuna moko kati na likita. Abongisaka eyano na ye na Lingelesi mpe alukaka ndeko mwasi moko abongolela ye, kokomáká makambo oyo abongoli na ebéngeli na yango. Alobi ete azalaka na mwa mokakatano ete atombola mosapi mpo na kopesa komantere. Mbala mosusu milende na ye esɛkisaka bato. Kasi yango elɛmbisaka ye te. Alobi ete “nayebi ete bandeko basepelaka na ndenge namekaka. Ya solo, kosangana na ngai na kopesáká bakomantere elendisaka baoyo bayebi malamu lokóta ete bápesa biyano.”
Mpo na ngai, kosala masukúlu ezali mpe ndenge mosusu, mpamba te nasengeli kotika ntango mpo na mobongoli nsima ya fraze mokomoko. Ezali mpasi te mpo na kobungisa molɔngɔ́ ya makanisi na ngai. Namonaka ete nasengeli kobatela mingi makanisi na ngai mpe kokutola plan na ngai. Kasi nasepelaka na yango.
Mosala na biso ya makambo ndenge na ndenge
Kati na bingumba mingi ya Angleterre, bato oyo balobaka nkóta isusu bazali esika moko te, ekoki kozala bobele na moto moko to mibale na balabála moko, mpe na nsima esengeli kotambola ntáká molai mpo na komona bato mosusu. Kasi, na ntango opesi bango mbote na lokóta na bango mpe oyoki eyano na bango, okomona ete ntina ya koluka bango ezali. Soki ndeko oyo tobimi na ye na mosala ya kosakola azali komonisa nsango ya Bokonzi epai ya nkolo ndako na lokóta na ye, mbala mingi eyano ezalaka ya esengo mpenza.
Ya solo, mosala ya kosakola na teritware ya nkóta ya bapaya ezali moko na likambo lileki kosepelisa oyo tomonaki na boumeli ya mbula 40 oyo tosili kolekisa na mosala ya Bokonzi. Likoki ya bokóli ezali mpenza monene. Na ntembe te bato mingi bayekolaka solo nokinoki mpe na bosepeli mingi ntango bateyami na monɔkɔ ya mboka na bango. (Misala 2:8, 14, 41) Ezali kopesa nsai na motema na komona bandeko basi mpe bandeko mibali kotangisa mpisoli ya esengo na nsuka ya likita, na ntango mosusu ezali mbala ya liboso oyo bakoki koyoka mpe kokanga ntina ya makambo nyonso malobami na likita na lokóta na bango.
Na ntango tozali kosakola ndako na ndako, tomekaka kosala ata bokɔti mpamba ya lisoló na lokóta ya mokolo ndako, atako mbala mosusu yango ezali komemela biso mokakatano. Na ndakisa, mpo na kopesa mbote epai na Mogujarati balobaka Kemcho, oyo elimboli ete “Losako.” Emonanaki ete oyo nalobaki mokolo mosusu na libunga eyokanaki lokola ete nazalaki kosala piblisité ya lolenge moko ya kafé eyebani mingi. Atako bongo, na ndako moko mwasi na mobali na ye basɛkaki ntango napesaki bango mbote na lokóta Gujarati. Nokinoki babyangaki biso ete tókɔta mpe na esengo nyonso bapesaki biso mwa kɔpɔ ya kafé—kasi ya mbala oyo ezalaki te mpo ete nabungaki maloba. Toyaki koyeba ete bazalaki bandeko na bamoko kati na Batatoli ya Yehova na etuluku oyo tozalaki kotala, mpe bamonisaki bosepeli mpenza mpo na solo.
Na boumeli ya bambula mingi, ndeko mwasi moko oyo alobaka Lingelesi azalaki mbala na mbala kotika bazulunalo epai ya mwasi moko oyo alobaka lokóta Chinois. Na mabaku mosusu asɛngaki na mwasi yango ete básala boyekoli ya Biblia kozanga ete afuta mbongo, kasi mwasi yango azalaki koboya. Mokolo mosusu, ndeko mwasi moko oyo azalaki koyekola lokóta Chinois abimaki na ye mpe apesaki mwasi yango búku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis na lokóta Chinois, oyo nkolo ndako oyo azalaki komonisa bosepeli azwaki yango nokinoki.a Lokola azwaki búku yango na lokóta na ye, andimaki koyekola Biblia. Mwa maloba wana oyo malobamaki na lokóta na ye masalaki bopusi likoló ya mwasi yango.
Mimeseno ndenge na ndenge
Toyaki koyeba ete engebene mimeseno ya bamboka mosusu, mibali balingaka te ete basi na bango bátambola bango moko na butu. Yango epesaka mokakatano na bandeko basi mingi mpo na kosangana na makita oyo masalamaka na mpokwa. Bituluku mosusu ya Azia bakanisaka ete bilenge basi oyo baponi kotikala minzemba mpe bazali kofanda na ndako bazali kotuka mabota na bango. Tata ya ndeko mwasi moko alingaki komela pwazó ntango elenge yango aboyaki mobali oyo libota eponelaki ye. Ɛɛ, mimekano oyo bandeko motindo wana basengeli koyikela yango mpiko ezali mpenza minene! Kasi, na ntango otali bopusi oyo solo ezali kosala na bomoi ya mabota mpe lolenge oyo bosembo ya bandeko basi ezali kokamwisa baboti na bango, ezali mpenza likambo ya esengo.
Na kondimáká mosala oyo, tosengelaki kosala mwa mbongwana. Liboso ete tóbanda mosala ya mokɛngɛli-motamboli, bilei na ngai ezalaki sé oyo elambami na lolenge ya Angleterre, kasi sikawa bilei oyo batyá mwa bikelákela nde esepelisaka ngai mingi. Tozali koyoka mawa na ebele ya bambula oyo tolekisaki liboso ete tóbanda kosepela na elambeli ndenge na ndenge oyo—bilei lokola mbisi ya mai to mosaka na bikelákela.
Bilikya ya bokóli
Ezali komonana polele ete oyo ezali eleko ya bokóli mpo na teritware ya nkóta ya bapaya na mikili mingi. Motángo ya mikanda na nkóta ikeseni mozali sé kobakisama. Okoki komona lipamboli ya Yehova na ndenge masangá ya sika mazali kosalema. Bandeko oyo bayebi nkóta ya bapaya bazali kouta mosika mpo na kopesa lisungi na bango.
Ndakisa monene na likambo yango ezali bongo lolenge bandeko bandimaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi na Lifalansé. Bato mingi oyo balobaka Lifalansé bakima mboka lokola Zaïre mpe bikólo mosusu ya Afrika bayaki kofanda na Angleterre na bambula euti koleka. Ntango lisangá ya liboso ya Lifalansé esalemaki na engumba Londres, ezalaki na basakoli ya Bokonzi soko 65. Mbula moko na nsima, motángo emataki kino na 117, mpe kati na bango, 48 bazalaki kosala lokola babongisi-nzela ya sanza na sanza. Mosika te lisangá ya mibale esalemaki mpo na kolanda bosepeli oyo ezalaki sé kobakisama. Sikawa likoki ezali ya kokokisa mposa ya bato oyo bazali komonisa bosepeli, oyo bato 345 kati na bango basanganaki na molulu ya Ekaniseli na mobu 1995. Bamisionere ya kala ya Gileadi oyo basalaki na bikólo lokola Bénin, Côte d’ivoire, Maroc, mpe Zaïre bazali sikawa kosalela eksperiansi na bango mpo na kopesa lisungi na teritware yango oyo ezali sé kokóla, mpe mbuma na yango ezali kokamwisa.
Mbala moko, ntango tokendaki kotala lisangá ya Lifalansé, nabimaki na ndeko moko oyo akendaki kotambwisa boyekoli ya Biblia epai ya mwasi moko Moafrika. Ntango tolingaki kozonga, mwasi yango abondelaki biso ete: “Nalɔmbi bino, bókende te. Bófanda naino.” Mposa na ye ezalaki ete ayeba makambo mingi. Akundwelaki ngai Ludia na ekeke ya liboso.—Misala 16:14, 15.
Mosala na biso ya liboso ezalaki ya kosalisa bituluku ya nkóta ya bapaya ete bíkóma masangá. Epai bandeko bazalaki kosala boyekoli ya mokanda pɔ́sɔ na pɔ́sɔ, tokɔtisaki ebongiseli ya kosala mbala moko na sanza Eteyelo mpo na mosala ya Teokrasi na bokuse mpo na bango. Yango esalisaki bango na koloba malamu na mosala ya kosakola. Na nsima mokemoke bakómaki kosala makita nyonso mitano ya lisangá oyo masalemaka pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Sikawa tozali na masangá ya sika na nkóta Chinois (Cantonais), Lifalansé, Gujarati, Japonais, Portugais, Punjabi, Tamil, mpe Welsh.
Tozalaki mpe na libaku malamu ya koyangana na makita ya bandeko oyo bazali bakufi-matoi. Komonáká bandeko bazali koyemba na kosaleláká mabɔkɔ na bango esimbaki mpenza motema na biso. Soki nakanisi ete na mosala na bango ya kosakola basengeli koloba na kosaláká bageste, nakumisaka mpenza milende makasi na bango mpo na kosangana na mosala ya kosakola. Ezali mpe ata na bato oyo balimbolaka makambo epai na baoyo bazali mbala moko bakufi-miso mpe bakufi-matoi. Emonani lokola ete Yehova azali kosala nyonso na ntina ete bábosana ata moto moko te.
Soki tosengeli kosɛnga eloko moko ya sikisiki, ekozala bobele lokola oyo ya Yesu ete: “Bóbondela Nkolo na elanga ete atinda basáli kati na elanga na mbuma na ye.” (Matai 9:38) Bandeko na biso mingi bazali kondima mosala ya mpasi ya koyekola lokóta ya bapaya ya etuluku moko oyo ezali na teritware ya lisangá na bango. Atako tozali na likabo ya koloba nkóta ya bapaya na nzela ya likamwisi te, na ntembe te Yehova azali kokólisa mosala na biso ya kosakola epai na bapaya oyo bafandi na ekólo na biso—teritware oyo esili kotɛla mpo na bobuki mbuma. (Yoane 4:35, 36)—Lisoló ya Colin Seymour.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.