Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 15/6 nk. 30-31
  • Mituna ya Batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya Batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Masolo mosusu
  • Mokumba ya bakonzi baleki liboso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Nzambe mpe Kaisala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Tópesa na Kaisala biloko na Kaisala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • “Nasɛngi nakende kosamba liboso ya Kaisala!”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 15/6 nk. 30-31

Mituna ya Batángi

Likanisi ya Biblia ezali nini na ntina na etumbu ya liwa mpo na basáli na mabe minene?

Ezali solo ete, mokomoko kati na biso akoki kozala na mayoki na ye na likambo yango, mayoki oyo matongami likoló ya makambo akutana na yango kati na bomoi na ye to motindo ya bomoi na ye. Nzokande, lokola tozali Batatoli ya Yehova, tosengeli komiyokanisa na makanisi ya Nzambe na ntina na etumbu ya liwa, kozanga ete tómikɔtisa na makambo ya politiki lokola basusu bazali kosala yango mpo na likambo oyo.

Mpo na koloba yango na mokuse, kati na Liloba na ye, Nzambe amonisi te ete etumbu ya liwa ezali mabe.

Na ebandeli mpenza ya lisoló ya bato, Yehova amonisaki makanisi na ye na likambo yango, lokola tozali kotánga na Genese mokapo 9. Yango etalelaki Noa mpe libota na ye, oyo bakómaki bankɔkɔ ya libota mobimba ya bato. Nsima ya kobima na bango na masuwa, Nzambe alobaki ete bakoki kolya nyama​—elingi koloba, bakokaki koboma nyama, kobimisa makila na yango, mpe kolya yango. Na nsima, na Genese 9:5, 6, Nzambe alobaki ete: “Mpe solo nakotuna mpo na makila na bomoi na bino, nakotuna yango epai na nyama nyonso mpe epai na moto, ata na mabɔkɔ na moto oyo azali ndeko na ye, nakotuna mpo na bomoi na moto. Soko moto akosopa makila na moto, makila na ye mpenza ekosopana na moto, mpo ete Nzambe asalaki moto na elilingi na ye.” Na yango, Nzambe apesaki ndingisa ete etumbu ya liwa epesama na babomi na bato.

Ntango Nzambe azalaki kotambwisa Yisalaele lokola libota na ye, masumu minene ndenge na ndenge matali kobuka mibeko ya Nzambe mazalaki kopesamela etumbu ya liwa. Na Mituya 15:30, tozali kotánga maloba oyo matali bato banso: “Kasi ye oyo asali likambo na nkó, soko ye abotami na Yisalaele, soko ye azali mopaya, ye atuki [Yehova]; mpe moto yango akolongolama na kati na bato na ye.”

Kasi makambo makómaki ndenge nini nsima ya kosalama ya lisangá ya boklisto? Toyebi ete Yehova apesaki nzela na biyangeli ya bato ete bizala, mpe abéngaki yango ete bakonzi bazali liboso. Kútu, nsima ya kopesa toli epai na baklisto ete bátosa bakonzi wana ya Letá, Biblia elobi ete bazali kosala lokola “mosali na Nzambe mpo na malamu na yo. Nde soko okosala mabe, obanga. Zambi akomemaka mopanga mpamba te. Azali mosáli na Nzambe mpo na kokómisa nkanda na ye epai na moto oyo akosalaka mabe.”​—Baloma 13:1-4.

Yango elingi nde koloba ete biyangeli bizali na ndingisa ata ya koboma baoyo bazali basáli na mabe minene? Engebene maloba tozali kotánga na 1 Petelo 4:15, eyano ezali ete Ɛɛ. Na mokapo yango ntoma alendisaki bandeko na ye na maloba oyo: “Tiká te ete moto kati na bino ayoka mpasi lokola mobomi na bato soko moyibi soko mosáli na misala mabe soko monɔ́ngi na makambo na bamosusu.” Osimbi maloba oyo, “tiká te ete moto kati na bino ayoka mpasi lokola mobomi na bato”? Petelo alingaki koloba te ete biyangeli bazali na lotómo te ya kopesa etumbu na mobomi na bato mpo na mabe monene oyo asali. Kútu, amonisi nde ete mobomi na bato asengeli mpenza kozwa etumbu oyo ebongi na ye. Yango ekoki mpe kozala etumbu ya liwa?

Ɛɛ, ekoki mpe kozala etumbu ya liwa. Yango emonisami polele na maloba ya Paulo mazwami na Misala mokapo 25. Bayuda bafundaki Paulo ete abukaki Mibeko na bango. Ntango atindaki Paulo lokola mokangami epai ya guvernere Moloma, mokonzi ya basodá alobaki maloba, lokola tokoki kotánga yango na Misala 23:29 ete: “Namoni ete afundami na ntina na ntembe na Mibeko na bango, kasi ete afundami na likambo moko te libongi na kufa soko na bolɔ́kɔ.” Mbula mibale na nsima, Paulo amemamaki liboso ya Guvernere Fesete. Tozali kotánga boye na Misala 25:8: “Paulo azongisi monɔkɔ ete, Nasali lisumu moko na ntina na Mibeko na Bayuda te, soko na ntina na Tempelo te, Soko na ntina na Kaisala te.” Sikawa tyá likebi na maloba na ye na ntina na etumbu, ata mpe etumbu ya liwa. Tozali kotánga na Misala 25:10, 11 ete:

“Paulo nde alobi ete, Nazali kotɛlɛma liboso na kiti na mosambisi na Kaisala, ekoki na ngai mpe kosambisama bobele awa. Nasali mabe na Bayuda te, lokola yo ozali kososola malamu. Na bongo soko nazali moto mabe mpe nasili kosala likambo libongi na kufa, nazali koboya kufa te. Nde soko makambo mazali bango kofunda ngai mazali mpamba, moto moko te akoki kopesa ngai na mabɔkɔ na bango. Nalingi [kosamba liboso, NW] na Kaisala!”

Liboso ya mokonzi oyo aponamaki mpenza, Paulo andimaki ete Kaisala azalaki na lotómo ya kopesa etumbu na basáli na mabe, ata mpe ya koboma bango. Aboyaki kozwa etumbu te soko solo mpenza azalaki na ekweli. Lisusu, alobaki te ete Kaisala akoki kopesa etumbu ya liwa bobele mpo na babomi ya bato.

Ya solo, ebongiseli ya kosambisa ya Baloma ezalaki ya kokoka te; lolenge moko bisambiselo ya bato na mikolo na biso ezali mpe ya kokoka te. Na eleko wana mpe lelo oyo, ezali na bato basali eloko te oyo bafundamaki mpe bazwaki bitumbu. Ata Pilata alobaki na ntina na Yesu ete: “Nazwi likambo moko libongi na kufa kati na ye te, na bongo nakobɛta ye mpimbo mpe nakokangola ye.” Ɛɛ, atako mokonzi wana ya Letá andimaki ete Yesu azalaki na ekweli te, moto yango oyo asalaki eloko te abomamaki.​—Luka 23:22-25.

Bokesene motindo wana epusaki Paulo to Petelo te na koloba ete kopesa etumbu ya liwa ezali likambo ya mabe. Kútu, likanisi ya Nzambe na likambo yango ezali ete ntango nyonso oyo bakonzi ya Kaisala oyo bazali liboso bakozala, bazali ‘komema mopanga mpo na kokweisa nkanda likoló na baoyo bakosalaka mabe.’ Yango esangisi mpe kosalela mopanga na lolenge ya kopesa etumbu ya liwa. Kasi na oyo etali likambo ya ntembe mpo na koyeba soko guvernemá moko kati na mokili oyo esengeli kosalela lotómo na ye wana mpo na koboma babomi na bato, baklisto ya solo basɛnzɛlaka ete bákɔta na likambo yango te. Na bokeseni na bakonzi ya mangomba ya boklisto, bamikɔtisaka soko moke te na ntembe na ntina na likambo yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto