Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/9 nk. 30-31
  • Tata oyo azali pene mpo na kolimbisa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tata oyo azali pene mpo na kolimbisa
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Abungaki mpe azwami
  • Liteya mpo na biso
  • Mwana oyo abungaki azongi
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Lisolo ya mwana oyo abunga
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • “Yehova, Nzambe ya mawa mpe ya ngɔlu”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Tómekola mawa ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/9 nk. 30-31

Basalaki mokano ya Yehova

Tata oyo azali pene mpo na kolimbisa

SOKI babéngaki yango lisoló oyo eleki masoló nyonso na kobenda likebi ezali na ntina. Lisese ya Yesu etali bolingo ya tata epai ya mwana na ye oyo abungaki ezali lokola lininisa oyo epesi biso likoki ya komona malamu mawa ya Nzambe epai ya basáli na masumu oyo babongoli motema.

Abungaki mpe azwami

Moto moko azalaki na bana mibale ya mibali. Oyo ya leki alobi na ye ete: ‘Nalingi likabo na ngai sikawa na esika ya kozela kino ntango okokufa.’ Tata andimaki, mpe emonani ete apesaki ye ndambo na misato na biloko na ye nyonso​—eteni esengeli na mwana ya mibale engebene mibeko. (Deteronome 21:17) Nokinoki elenge akangaki biloko na ye mpe akendaki na mboka mosika kuna abebisaki mbongo na ye nyonso na kolandáká bomoi ya kilikili.​—Luka 15:11-​13.

Mpe na nsima nzala makasi ekɔtaki na mboka yango. Kati na kozanga elikya, elenge andimaki mosala ya kobatela bangulu​—mosala ya kotyolama mpo na Moyuda. (Levitike 11:7, 8) Bilei ezalaki mpenza mpasi na boye ete akómaki kolya mposo oyo bazalaki kopesa bana ya ngulu! Nsukansuka akanisaki. Mpe alobaki ete: ‘Basáli na lifuti na tata na ngai bazali kolya malamu koleka ngai!’ ‘Nakozonga na ndako, nakoyambola masumu na ngai, nakolɔmba kozala lokola moko ya basáli na lifuti ya tata na ngai.’a​—Luka 15:14-​19, NW.

Elenge asalaki mobembo ya kozonga na ndako ya tata na ye. Na ntembe te nzoto na ye ebebaki mpenza. Atako bongo, tata na ye ayebaki ye “naino ezalaki ye mosika.” Ayokeli ye mawa, atamboli mbango, ayambi ye, mpe “apwɛpwi ye.”​—Luka 15:20.

Boyambi yango ya mɔ́tɔ ekomisaki makambo pɛpɛlɛ mpo na elenge na kokitisa bozito na ye. “Alobaki ete, Tata, nasaleli Likoló mabe, nasali mabe mpe na miso na yo, nabongi kobyangama mwana na yo lisusu te, zalisá ngai lokola moko na basáli na yo na lifuti.” Tata abengisi baombo na ye. Alobi ete: “Yaká na elamba eleki kitoko nokinoki kolatisa ye, mpe tyá lopɛtɛ na mosapi na ye, mpe sapato na makolo na ye, mpe yaká na mwana na ngɔmbɛ na mafuta mpe bomá yango, tólya, tósepela, mpo ete mwana na ngai oyo awa azalaki mokufi mpe azali na bomoi lisusu; azalaki mobungani mpe azwami.”​—Luka 15:21-​24.

Elambo monene esalemaki, na miziki mpe mabina. Mwana oyo ya mokóló ayokaki makɛlɛlɛ ya miziki mpe ya mabina ntango autaki na elanga. Ntango bayebisaki ye ete leki na ye azongi yango wana basalelaki ye elambo, asilikaki makasi. Amileli epai ya tata na ye ete ‘nasaleli yo mbula mingi boye, naboyi monɔkɔ na yo mbala moko te, nde opesi ngai ata mwana na ntaba mbala moko te ete nasepelana na baninga na ngai, nde awa esili mwana na yo oyo koya, oyo asilisi biloko na yo, osali elambo mpo na ye.’ Na boboto nyonso tata alobi na ye ete: ‘Mwana, yo ozali na ngai elongo ntango nyonso, mpe biloko na ngai nyonso bizali na yo. Nde ekoki ete tósepela mpe tózala na esengo mpo ete ndeko na yo oyo azalaki mokufi mpe azali na bomoi lisusu, azalaki mobungani mpe azwami.’​—Luka 15:25-​32.

Liteya mpo na biso

Tata kati na lisese ya Yesu ezali bongo Yehova, Nzambe na biso oyo atondi na mawa. Lokola mwana oyo abungi, bato mosusu na boumeli ya mwa ntango batikaka libateli oyo ezali na ndako ya Yehova mpe na nsima bazongaka. Yehova atalelaka bato motindo oyo ndenge nini? Baoyo bazali kozonga epai ya Yehova na kobongola motema na bosembo nyonso bakoki komindimisa ete “Mpamela na ye ekoumela te, akobatelaka nkanda na ye ntango molai te.” (Nzembo 103:9) Kati na lisese, tata akimaki mbango mpo na koyamba mwana na ye oyo azongaki. Lolenge moko, Yehova azali bobele na esengo mpamba te kasi lisusu azali na mposa makasi ya kolimbisa basumuki oyo bazali kobongola mitema. Ye ‘akolimbisaka mabe,’ mpe azali kolimbisa “na solo.”​—Nzembo 86:5; Yisaya 55:7; Zekalia 1:3.

Kati na lisese ya Yesu, bolingo ya solosolo ya tata eyeisaki makambo pɛpɛlɛ na boye ete mwana azwaki makasi ya kozonga. Kanisá naino: Elingaki kozala boni soki tata aboyaki mwana na ye to mpe soki alobaki na ye na nkanda nyonso ete azonga soko moke te na ndako? Ezaleli motindo oyo elingaki kokimisa elenge mobali mpo na libela.​—Kokanisá na 2 Bakolinti 2:6, 7.

Na ndimbola mosusu, na ntango mwana akendaki, bolingo ya solosolo ya tata ebongisaki nzela mpo na bozongi ya mwana na ye. Na bantango mosusu, bankulutu baklisto basengeli kolongola basáli na masumu oyo baboyi kobongola motema kati na lisangá. (1 Bakolinti 5:11, 13) Na kosaláká bongo, bakoki kobongisa nzela mpo na bozongi ya mosáli na masumu na komonisáká ye matambe oyo akoki kosala mpo na kozonga lisusu na lisangá. Motindo oyo ya mayoki ya motema bankulutu bazali komonisa esili kotindika ebele na babungi nzela na elimo ete bábongola motema mpe esili kopusa mingi na kozonga na libota ya Nzambe.​—2 Timoté 4:2.

Tata amonisaki lisusu motema mawa ntango mwana na ye azongaki. Esɛngaki na ye ntango molai te mpo na komona ete mwana na ye abongolaki solo motema. Kútu, na esika ya koluka ete mwana ayebisa ye makambo mikemike ya mabunga na ye, asepelaki nde na kotombela mwana na ye boyei malamu, mpe amonisaki esengo monene na kosaláká bongo. Baklisto bakoki komekola ndakisa oyo. Basengeli kosepela mpo na moto oyo abungaki mpe azwami.​—Luka 15:10.

Lolenge tata asalaki emonisaki polele ete banda kala amilengelaki mpo na bozongi ya mwana na ye oyo abungaki nzela. Ya solo, motindo oyo tata asalaki ezali bobele elilingi ya mposa makasi Yehova azali na yango mpo na bato nyonso oyo bazali kotika ndako na ye. Ye “alingi te ete bamosusu [bákufa, NW] kasi [alingi] ete bato nyonso bákóma kobongwana na motema.” (2 Petelo 3:9) Baoyo bazali kobongola motema na masumu na bango bakoki kondimisama ete bakopambwama na ‘ntango na kopema . . . uta na Nkolo.’​—Misala 3:19.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Moombo atalelamaki lokola mosangani ya libota, mosáli na lifuti azalaki kozwa lifuti mokolo na mokolo, ye bakokaki kolongola ye na mosala ata ntango nini. Elenge akanisaki ete akondima ata etɛlɛmɛlo ya moto oyo azangi ntina kati na ndako ya tata na ye.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto