Masoló ya Basakoli ya Bokonzi
Liloba ya Nzambe ezali na nguya ya kopɛtola
ELOBAMI ete bato mingi oyo bamipesá na bilangwiseli bazongelaka mimeseno na bango nsima wana basalisamaki na lopitalo mpo na kotika kosalela bilangwiseli. Kasi Liloba ya Nzambe ekoki kokokisa oyo lopitalo elongi kokokisa te. (Baebele 4:12) Bato mingi basungamaki na Liloba ya Nzambe mpe na elimo na ye mpo na kotika bilangwiseli mpe kosalela toli oyo ya Biblia: “Tómipɛtola mpenza na mbindo nyonso na nzoto mpe na [elimo, NW] mpe tókokisa ezaleli na biso na bulɛɛ kati na nsɔ́mɔ na Nkolo.”—2 Bakolinti 7:1.
Yango emonisami na lisoló oyo euti na ekólo Myanmar. Mobali moko oyo abundisaki makasi momeseno ya kosalela bilangwiseli na boumeli ya bambula mingi alobi: “Nabandaki kosalela bilangwiseli wana nazalaki naino ata na mbula ntuku mibale te. Mbala mingi namekaki kotika, kasi nazalaki kolónga te. Mpo na kokokisa mposa na ngai ya kolangwa, namipesaki na koyiba. Mpo na yango, na mobu 1988, nakɔtaki bolɔ́kɔ ya mbula mobimba.
“Nsima ya kobima na ngai na bolɔ́kɔ, nazongelaki baninga na ngai ya kala. Nokinoki nazongelaki bilangwiseli. Etamboli oyo ya kobebisa nzoto ekabolaki ngai na bato ya libota na ngai. Lisusu, ezaleli na ngai ya botomboki esalaki ete bato mingi kati na kartyé bákóma kobanga ngai, mpe babandaki kokima ngai.
“Na bongo mokolo moko likambo moko nakokaki kopɛngola te ekómelaki ngai—nanyokwamaki mpo ete nalangwaki mingi. Bazongisaki ngai lisusu na bolɔ́kɔ, mbala oyo mpo na mbula misato. Atako bomoi kati na bolɔ́kɔ ezalaki mpasi mingi, nasalaki nyonso ekokaki mpo na kobatela bomoi na ngai.
“Nsima ya kobima na bolɔ́kɔ mpe kozonga na ndako, nasɛngaki baboti mpe bandeko na ngai bolimbisi mpo na mabe nyonso nasalaki. Bayokelaki ngai mawa mpe bazongisaki ngai na ndako, kasi, baninga na ngai babandaki lisusu kopusa ngai na kozongela banzela ya kala.
“Nsukansuka, nkɔkɔ na ngai ya mwasi atindaki ngai epai ya pasteur moko na mboka na biso mpo ete nayanganaka na eteyelo ya Biblia. Pasteur andimaki. Nzokande, liboso ete nabanda koyangana, tata-mwasi na ngai, oyo azali Motatoli ya Yehova, alobaki na ngai ete soki nalingi solo koyekola Biblia, nasengeli koyekola na Batatoli ya Yehova.
“Nakendaki na Ndako ya Bokonzi mpe balakisaki ngai moto moko oyo andimaki koyekolisa ngai Biblia. Bayangani mingi bapesaki ngai mbote na mɔ́tɔ nyonso mpe batombelaki ngai boyei malamu.
“Nsima wana nabandaki koyekola Biblia mpe koyangana na makita ya boklisto, mposa makasi ya bilangwiseli etikaki esika na mposa ya kobɛlɛma penepene na Nzambe. Mbula moko na nsima nasalaki bokóli kino komipesa epai ya Yehova Nzambe, mpe namonisaki yango na kozwáká batisimo ya mai.
“Eumelaki te, ntango nazalaki kosakola ndako na ndako, nakutanaki na moninga na ngai moko ya kala oyo tozalaki komela na ye bilangwiseli. Akamwaki mingi mpo na mbongwana oyo nasalaki na bomoi na ngai. Yango epesaki nzela mpo na litatoli, mpe nazalaki na likoki ya kolobela ye elikya ya Bokonzi.
“Nsukansuka nakómi na bomoi oyo ezali na mokano ya solosolo mpe oyo ezali na ntina mpenza. Na lisungi ya Nzambe mpe ya Liloba na ye, nazali sikawa na likoki ya kosalisa bamosusu ete básikwama na bizaleli ya komibebisa na kosalela bilangwiseli.”