Mwinda mpo na kotambwisa yo na nzela ya bomoi
“Ɛ [YEHOVA], nayebi malamu ete nzela na moto ezali kati na ye moko te, ekoki te na motamboli ete atambolisa makolo na ye moko.” (Yilimia 10:23) Na maloba yango mosakoli Yilimia amonisaki ete bato bakoki kolónga te kotambola malamu na nzela ya bomoi kozanga lisungi. Epai wapi bakoki kozwa lisungi yango? Mokomi na nzembo ayanoli kati na libondeli na ye epai ya Yehova Nzambe ete: “Liloba na yo ezali mwinda na makaka [“makolo,” NW]na ngai mpe pole na nzela na ngai.”—Nzembo 119:105.
Baoyo babandi koyekola Biblia Mosantu, oyo ezali Liloba ya Nzambe, mpe bazali kosalela makambo oyo yango ezali koloba bakozala lokola moto oyo abandi kosala mobembo moko na ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́. Na ebandeli, akomona malamu te mpo ete molili ezali. Kasi wana moi ebandi kobima, mokemoke akobanda komona malamu koleka. Na nsuka, moi ekobɛta likoló ya motó na ye mpenza. Akomona biloko nyonso polele mpenza. Ndakisa yango ezali kokundwela biso lisese moko ya Biblia oyo elobi ete: “Kasi nzela na bayengebene ezali lokola pole oyo ekongɛnga lisusu mpe lisusu kino mokolo na malamu koleka.”—Masese 4:18.
Ezali boni mpo na baoyo bazali koboya litambwisi ya Nzambe? Biblia elobi ete: “Nzela na bato mabe ezali molili; bayebi te mpo nini bazali kobɛta libaku.” (Masese 4:19) Ɛɛ, bato mabe bazali lokola moto oyo azali kobɛta libaku na molili. Ata oyo emonani lokola bolóngi epai na bango ezali bobele mpo na ntango mokuse, mpamba te “mayele ezali te, bososoli ezali te, toli ezali mpe te oyo ikoki kotɛmɛla [Yehova].”—Masese 21:30.
Na yango, landá litambwisi ya Biblia, Liloba ya Nzambe. Soki osali bongo okomona bosolo ya maloba mazwami na Masese 3:5, 6 ete: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.”