Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 15/5 lok. 32
  • Bizaleli malamu epesaka lokumu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bizaleli malamu epesaka lokumu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 15/5 lok. 32

Bizaleli malamu epesaka lokumu

ZULUNALO La Gazzetta del Mezzogiorno ebimaka na ekólo Italie ekumisaki Batatoli ya Yehova mpo na lisolo “Matera la troglodyte.” Lisolo yango ebimaki na zulunalo Lamuká! ya 8 Yulí 1997 (ebimeli ya Lifalanse), zulunalo oyo enyatamaka na nkota ebele. Lamuká! ezali sikawa kobongolama na nkota 81 mpe ezali konyatama na motuya koleka milio 19 na mokili mobimba. Zulunalo wana eyebisaki ete Lamuká! ezwaki esika ya liboso “na kampanye ya komonisa epai na bato lisolo mpe libula ya misala ya ntɔki ya engumba [Matera].”

Zulunalo ekumisaki Batatoli ya Yehova na ntina na Liyangani ya etúká “Kondima kati na Liloba ya Nzambe” oyo esalemaki na Matera na 1997. Lisolo yango elobaki ete Batatoli ya Yehova balongaki “koyanganisa bato 4 000 na libándá ya masano ebéngami XXI Settembre [na engumba yango] na eleko ya molunge mpe na nse ya moi makasi; na yango bapɛtolaki, batyaki lisusu langi, mpe babongisaki esika oyo ya masano (mpenzampenza batwalɛti) kozanga kosɛnga mosolo, mpe basombaki biloko bisengelaki na mosolo na bango moko.”

Batatoli ya Yehova basalaka makasi mpo na kozala bazalani malamu. (Matai 22:37-39) Bazali lisusu kolanda etinda ya Makomami oyo elobi ete: “Bózala na bizaleli na bino malamu kati na bapakano ete . . . awa ekomona bango misala na bino malamu, bákumisa Nzambe na mokolo wana ekoya ye kotala.”​—1 Petelo 2:12.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto