Ozali na nkombo ya ndenge nini?
NA BIBLIA, liloba “nkombo” esalelamaka mpe mpo na kolobela lokumu oyo moto azali na yango. Na ndakisa, Salomo, mokonzi ya mayele akomaki ete: “Nkombo malamu eleki mafuta na motuya; mokolo na kufa eleki mokolo na kobotama na malamu.” (Mosakoli 7:1; kokanisá na Masese 22:1.) Salomo amonisi wana ete nkombo malamu, babotamaka na yango te. Kasi, ezali na boumeli ya bomoi na ye nde moto azwaka lokumu malamu. Nkombo na ye emonisaka bizaleli na ye, soki azali mokabi to azali moto ya moimi, moto ya mawa to te, moto ya komikitisa to moto ya lolendo, moto ya bosembo to moto mabe.
Tólobela Davidi. Ntango azalaki mokonzi, azalaki moto ya nguya mpe azalaki kotɛngatɛnga te. Lisusu, Davidi andimaki mabunga na ye na komikitisa mpe abongolaki motema na masumu minene oyo asalaki. Mosakoli ya Yehova azalaki mpenza na elonga ya koloba ete Davidi azalaki ‘kosepelisa motema ya [Yehova].’ (1 Samwele 13:14) Davidi azwaki nkombo malamu na miso ya Nzambe wana azalaki naino elenge.
Nzokande, Yolama, mokonzi ya Yuda amisalelaki nkombo mabe. Apusaki bato oyo ye azalaki koyangela ete bátika kosambela Yehova. Abomaki mpe bandeko na ye motoba na bana mosusu ya mikonzi na Yuda. Na nsuka, Yehova abɛtaki Yolama na maladi makasi oyo ebomaki ye. Biblia elobi mpo na Yolama ete “elongwaki ye, moto ayokaki mawa te” to ndenge Biblia Today’s English Version elobi, “moto moko te ayokaki mawa ntango akufaki.”—2 Ntango 21:20.
Lolenge Davidi na Yolama basalelaki bomoi na bango endimisi biso bosolo ya lisese ya Biblia oyo elobi ete: “Kokanisa moyengebeni ezali kopambolama, nde nkombo na bato mabe ikopɔla.” (Masese 10:7) Mokomoko na biso asengeli komituna boye: ‘Nkombo ya ndenge nini nazali komisalela na miso ya Nzambe mpe na miso ya bato?’