Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 1/11 lok. 32
  • Mokolo mosusu tokofanda mpenza na kimya?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokolo mosusu tokofanda mpenza na kimya?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 1/11 lok. 32

Mokolo mosusu tokofanda mpenza na kimya?

MOTO nyonso ayokaka esengo ntango bana bazali kosakana elongo na baboti na bango. Bana babangaka eloko moko te ntango bazali elongo na baboti na bango. Nzokande, bana mingi bayokaka makambo ya ndenge wana kaka na nsango. Kutu, bana mosusu bamitungisaka mokolo na mokolo mpo na kozwa ata esika ya kolala. Ezali nde na elikya mpo na bana wana oyo bazangi bisika ya kolala mpe bato mosusu oyo bazali na kimya te?

Atako ekoki komonana lokola nde elikya moko ezali te, Liloba ya Nzambe ezali kopesa elikya. Yisaya asakolaki ete mokolo mosusu moto nyonso akozala na kimya mpenza. Akomaki boye: “Bakotonga ndako mpe bakofanda na yango; bakokona bilanga ya [vinyo] mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga te ete mosusu afanda; bakokona te ete mosusu alya.”​—Yisaya 65:21, 22.

Kasi, elikya yango ezali mpenza elikya ya solo? Tóbosana te ete liloba “elikya” emonisaka ntango nyonso te likambo oyo ekosalema mpenza. Na ndakisa, na Brésil, balobaka “A esperança é a última que morre.” Elingi koloba, “Elikya nde eloko ya nsuka oyo ekufaka.” Yango emonisi ete bato mingi bazalaka kaka na elikya ata ntango ntina ya kozala na elikya ezali te. Nzokande, elikya oyo Nzambe ya bomoi azali kopesa biso ekeseni na bilikya mosusu. Ntoma Paulo akomaki boye: “Moto moko te oyo atyaka kondima na ye likoló na [Nzambe] akoyoka nsɔni.” (Baloma 10:11) Bisakweli ya Biblia oyo ekokisamá ezali kondimisa biso ete bilaka nyonso oyo Yehova Nzambe apesá ekokokisama. Ntango bilaka yango ekokokisama, makambo mabe nyonso oyo ezali kotinda bana bákóma koyengayenga na balabala ekozala lisusu te.

Ata lelo oyo, toli malamu ya Biblia ekoki kosalisa baoyo bazangi elikya bábongisa bomoi na bango mpe bázala na kimya ya solosolo. Ndenge nini ekoki kosalema? Batatoli ya Yehova na esika ofandi bakosepela kosalisa yo na kozwa eyano na motuna yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto