Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Tokosala makasi tózongela bato oyo babandi kosepela na nsango malamu, oyo bayanganaki na Ekaniseli mpe na lisukulu ya ntina mingi oyo esalemaka nsima ya Ekaniseli, kasi bameseni mpenza te na Batatoli ya Yehova. Ntango tozali kozongela bango, mokano na biso esengeli kozala ya kobanda koyekola Biblia na baoyo babandi naino koyekola yango te. Yuni: Tokolakisa buku Biblia eteyaka mpenza nini? Tokosala makasi tóbanda koyekola na bato Biblia. Yuli mpe Augusto: Tokoki kosalela mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Bilimo ya bakufi—Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?; Nini ekómelaka biso soki tokufi?; Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko; Ntango moto oyo olingaka akufi . . . ; Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?; Nzela ya bomoi ya seko—Osili komona yango? Osengeli kondima Trinité?; Sepela na bomoi ya seko na Mabele! mpe “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika.”
◼ Mwa mbongwana oyo ekɔti na mayangani mosusu ya etúká ya mobu 2008: Na esika ete liyangani ya etúká na Lingala esalema na Basankusu, ekosalema nde na Boso Mbungeke na boumeli ya mikolo misato, kobanda mwa 8 tii 10 Augusto 2008. Liyangani ya etúká ya mikolo mibale ekosalema na Bosondjo, kobanda mwa 30 tii 31 Augusto 2008. Mayangani mibale ya etúká ekosalema na Goma na Swahili; ya liboso ekobanda na mwa 1 tii 3 Augusto, ya mibale na mwa 8 tii 10 Augusto. Tosilaki kokomela masangá oyo ekokende na liyangani ya mibale mokanda.
◼ Soki nkulutu moko akokende na liyangani ya etúká na mboka mosusu, tosɛngi ye akomela biro ya filiale likambo yango liboso mpenza. Mbala mosusu, bakoki kosɛnga ye asala lisukulu na liyangani yango, mingimingi soki na esika yango balobi bazali mingi te. Kasi, ye moko nde akofuta tike na ye to mbongo mosusu oyo mobembo yango ekosɛnga.