Manaka mpo na pɔsɔ ya 26 Yuli
PƆSƆ EBANDI NA 26 YULI
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: 1 Bakonzi 15-17
No. 1: 1 Bakonzi 15:1-15
No. 2: Nani alendisaka bato bázwa bikateli bango moko, kozanga kotalela mibeko ya Nzambe? (rs lok. 193 par. 1-2)
No. 3: Mpo na nini esengeli Armagedone eya?
□ Likita ya mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 10: Ndenge ya kosala mingi na mosala ya Nzambe—Eteni 3. Lisukulu ekouta na buku Tobongisami, lokasa 114, paragrafe 2 kino lokasa 115, paragrafe 4. Sɛngá na basakoli ya lisangá na bino oyo bazali na etamboli ya malamu mpe bakɔtá Eteyelo ya babongisi-nzela, Eteyelo mpo na kobongisa basungi to Eteyelo ya Gileadi, bálobela matomba oyo bazwaki na mateya yango. Soki bozali na basakoli ya ndenge wana te na lisangá na bino, bólobela masolo ya bandeko mosusu oyo ezali na mikanda ya moombo ya sembo.
Min. 10: Omibongisa mpo na kokabola bazulunalo na sanza ya Augusto. Lisolo elongo na bayangani. Na boumeli ya miniti moko to mibale, lobelá na mokuse makambo oyo ezali na kati ya bazulunalo yango. Na nsima, poná masolo mibale to misato mpe sɛngá bayangani bálobela mituna oyo bakosalela mpe mikapo oyo bakotánga mpo na kokabola bazulunalo yango. Bósala bilakiseli mibale mpo na komonisa ndenge ya kokabola bazulunalo yango.
Min. 10: “Bwanya ya moto emonanaka na makambo ya boyengebene oyo asalaka.” Ekosalema na mituna mpe biyano.