Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokokabola na sanza ya Yuli mpe Augusto: Tokoki kokabola mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Bilimo ya bakufi—Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?; Bókɛngɛlaka!; Nini ekómelaka biso soki tokufi?; Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko; Ntango moto oyo olingaka akufi...; Osengeli kondima Trinité?; Sepela na bomoi ya seko na Mabele! mpe “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika.” Sɛtɛmbɛ: Biblia eteyaka mpenza nini? Tósala makasi tóbanda koyekola na bato Biblia kaka na mbala ya liboso oyo tokutani na bango.
◼ Ekaniseli: Bómindimisa ete lapolo na bino ya Ekaniseli etindamaki na Betele. Soki bozali koyeba te soki etindamaki to te, bokoki kotinda yango na SMS, na kolanda malako oyo ezali na mokanda ya 15 Desɛmbɛ 2006.
◼ Lapolo ya lisangá: Bósalaka makasi ete lapolo ya lisangá na bino etindamaka sanza nyonso na ntango oyo ebongi. Mposa na biso ezali ete lapolo ya filiale na biso oyo ebimaka na Annuaire ezala lapolo ya masangá nyonso, ata mpe mpo na basanza ya nsuka ya mobu ya mosala.