Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Mituna oyo elandi ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 26 sanza ya 8 na mobu 2013. Dati ya lisolo mokomoko epesami mpo na kosalisa mosakoli asala bolukiluki pɔsɔ na pɔsɔ wana azali kobongisa masolo ya eteyelo.
Liteya nini ya ntina mingi mpenza tokoki kozwa na ndenge Mokonzi Erode andimaki ete bato básanzola ye mpe bápesa ye lokumu oyo ebongaki na ye te? (Mis. 12:21-23) [1 sanza ya 7, w08 15/5 lok. 32 par. 7]
Ndenge nini bilenge bakristo bakoki kozwa matomba na kotalela ndakisa ya Timote mpe kolanda yango? (Mis. 16:1, 2) [8 sanza ya 7, w08 15/5 lok. 32 par. 10]
Nsima ya koyoka Apolosi azali “koteya na mpiko” na sinagoga ya Efese, ndenge nini Akila mpe Prisile basalisaki ye na bolingo nyonso? (Mis. 18:24-26) [15 sanza ya 7, w10 15/6 lok. 11 par. 4]
Vɛrsɛ nini ya Biblia epesaka Batatoli ya Yehova nzela ya kosalela batribinale mpo na kobatela ntomo na bango ya kosakola? (Mis. 25:10-12) [22 sanza ya 7, bt lok. 198 par. 6]
Ndenge nini ntoma Paulo akobaki kozwa mabaku ya kopesa litatoli ata ntango azalaki na bolɔkɔ na Roma, mpe ndenge nini basaleli ya Yehova lelo oyo balandaka ndakisa na ye? (Mis. 28:17, 23, 30, 31) [29 sanza ya 7, bt nk. 215-217 par. 19-23]
Mpo na nini Biblia elobi ete kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi ezali ndenge oyo esengeli te mpe likambo ya nsɔni? (Rom. 1:26, 27) [5 sanza ya 8, g-F 1/12 lok. 28 par. 7]
Na ndenge nini “masumu oyo esalemaki kala” ekokaki kolimbisama na nzela ya “lisiko oyo Kristo Yesu afutaki” liboso ete lisiko yango efutama na mobu 33? (Rom. 3:24, 25) [5 sanza ya 8, w08 15/6 lok. 29 par. 6]
Ebongiseli nini ya bolingo Yehova azwá mpo na ntango oyo tokutani na mikakatano makasi mpe toyebi te nini tokoki koloba na libondeli? (Rom. 8:26, 27) [12 sanza ya 8, w08 15/6 lok. 30 par. 10]
Maloba “bózalaka na ezaleli ya koyamba bapaya” elimboli nini? (Rom. 12:13) [19 sanza ya 8, w09 15/10 nk. 5-6 par. 12-13]
Ndenge nini tokoki ‘kolata Nkolo Yesu Kristo,’ ndenge ntoma Paulo apesi biso toli? (Rom. 13:14) [26 sanza ya 8, w05 1/1 nk. 11-12 par. 20-22]