Bandá mpenza koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso
Kobanda sanza ya mitano na mobu 2011, tolendisamaki ete tóbandaka koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza nyonso. Mpo na kosalisa biso na likambo yango, lisolo oyo ezali na motó ya likambo: “Biyano na mituna ya Biblia” oyo ebimaka na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya bato nyonso emonisaka mbala na mbala ndenge ya kosala yango. Yango wana, na likita mpo na mosala ya kosakola oyo esalemaka mokolo ya pɔsɔ ya liboso, esengeli komonisaka polele ndenge tokoki kosalela lisolo yango mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mpe kosala elakiseli ya lolenge ya kobanda lisolo.
Bankulutu bakoki komona malamu ete etuluku mokomoko esala likita na yango ya mosala ya kosakola mokolo ya pɔsɔ ya liboso, to bakoki kozwa ekateli ete bituluku nyonso esangana esika moko mpe mbala mosusu ekutana na Ndako ya Bokonzi mpo na kosala likita yango. Nzokande, ata soki masangá mingi esalelaka Ndako ya Bokonzi, lisangá moko te esengeli kopusa mokolo wana ya ntina oyo tobandaka koyekola na bato Biblia mokolo mosusu kaka mpo na kosangisa bituluku nyonso esika moko mpo na likita ya mosala ya kosakola.