Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/13 lok. 4
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2013
Mosala na biso ya Bokonzi—2013
km 8/13 lok. 4

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokokabola na sanza ya mwambe: Tokoki kosalela mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Nsango malamu oyo euti na Nzambe!, Yoká Nzambe, to Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko.

◼ Soki mosakoli mokomoko apesi lapolo na ye ya mosala ya kosakola nokinoki, ekosalisa mokɛngɛli ya etuluku mingi. Yango ekosala ete Betele esangisa balapolo ya masangá nyonso na ntango ebongi na nsuka ya sanza mokomoko. Kosala bongo ezali mpenza na ntina, mingimingi na sanza ya nsambo mpe mwambe, mpo na kosangisa balapolo ya mosala ya mobu mobimba. (Talá buku Tobongisami mok. 5 lok. 45) Tolendisi basɛkrɛtɛrɛ ete bátinda balapolo ya mosala ya kosakola S-1 na nzela ya site jw.org to na nzela ya SMS.​—Talá mokanda ya 27/07/2012 mpe ya 05/04/2013.

◼ Lokola bazulunalo oyo tokokabola na sanza ya libwa mpe ya zomi ekozala na masolo mingi ya kosepelisa, motángo ya bazulunalo oyo masangá ekozwa ekobakisama (kobanda 20 tii 30%).

◼ Kobanda na pɔsɔ ya 28 sanza ya 10 na mobu 2013, tokobanda koyekola mwa buku Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo? na Boyekoli ya Biblia na lisangá. Mpe soki tosilisi koyekola mwa buku yango, tokoyekola buku Pusaná penepene na Yehova, na pɔsɔ oyo ebandi na 6 sanza ya 1 na mobu 2014. Masangá oyo basengeli na mikanda yango, bakoki kosɛnga yango na komande ya mikanda ya mbala ekoya.

◼ Kobanda na sanza ya libwa, bakɛngɛli ya zongazonga bakosala diskur ya bato nyonso oyo ezali na motó ya likambo: “Ndenge oyo bolingo mpe kondima ezali kolonga mokili”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto