02-08/03/2026
LOYEMBO 97 Moto akobika nde na Liloba ya Nzambe
Kobá kokokisa ‘mposa na yo ya elimo’
MOKAPO YA MOBU 2026: “Esengo na baoyo bayebi mposa na bango ya elimo.”—MAT. 5:3.
NA MOKUSE
Ndenge oyo tokoki kokoba kozwa matomba na bilei, molato, mpe esika ya libateli ya elimo oyo Yehova azali kopesa.
1. Yehova akelá biso bato na bamposa nini? (Matai 5:3)
YEHOVA akelaki moto na mposa ya biloko ya kobikela. Na ndakisa, mpo tókoba kozala na bomoi, tozali na mposa ya bilei, bilamba, mpe esika ya libateli. Soki tozangi moko ya biloko yango, ata mpo na mwa ntango moke kaka, bomoi ekómaka mpasi. Longola mposa ya biloko ya kobikela, Yehova akelá biso mpe na mposa ya elimo. (Tángá Matai 5:3.) Soki tolingi kozala mpenza na esengo, tosengeli koyeba ete tozali na mposa ya elimo mpe kokoba kokokisa yango.
2. Ndakisa nini okoki kopesa mpo na kolimbola maloba ‘koyeba mposa na yo ya elimo’?
2 ‘Koyeba mposa na biso ya elimo’ elimboli nini? Maloba yango na Grɛki epesaka likanisi ya kozala mosɛngi-biloko na elimo. Kanisá naino moto oyo azali mosɛngi-biloko! Nzoto ekɔndá, alati kaka bongobongo, afandi na mabele, na balabala ya engumba. Alɛmbi mpo na kozanga bilei, bato bakipaka ye te mpo na ndenge oyo azali komonana; akaukaka na nse ya moi mpe anyokwamaka na malili makasi na butu. Mosɛngi-biloko ayebi malamu ete azali na mposa ya lisalisi mpo bomoi na ye ebonga. Ndenge moko mpe, moto oyo ayebi mposa na ye ya elimo, elingi koloba, azali mosɛngi-biloko na elimo, ayebaka ete azali na mposa Nzambe asalisa ye mpo azala malamu. Na yango, asalaka nyonso mpo na kolya ebele ya bilei ya elimo oyo Yehova apesaka baoyo balingaka Ye.
3. Tokolobela nini na lisolo oyo?
3 Na lisolo oyo, tokolobela liboso mateya oyo tokoki kozwa na lisolo ya mwasi Mofenisia oyo asɛngaki Yesu asalisa ye. Lisolo yango emonisi bizaleli misato oyo bato oyo bayebi mposa na bango ya elimo basengeli kokolisa. Na nsima, tokolobela ndakisa malamu ya ntoma Petro, ntoma Paulo, mpe Mokonzi Davidi, oyo bazalaki bango nyonso mibali oyo balukaki lisalisi ya Nzambe.
NDAKISA YA KOMIKITISA, MOLENDE, MPE KONDIMA
4. Mwasi moko Mofenisia alingaki Yesu asala nini?
4 Mokolo moko, mwasi moko Mofenisia ayaki epai ya Yesu. Mwana na ye ya mwasi azalaki “konyokwama mpo demo akɔtelá ye.” (Mat. 15:21-28) Mwasi yango afukamaki mpe asɛngaki Yesu asalisa mwana na ye. Mwasi yango amonisaki bizaleli ya ntina ntango asololaki na Yesu. Tótalela bizaleli yango mosusu.
5. Bizaleli nini mwasi Mofenisia amonisaki, mpe Yesu asalaki nini? (Talá mpe elilingi.)
5 Mwasi Mofenisia amonisaki komikitisa ya solosolo. Mpo na nini tokoki koloba bongo? Mpo asilikaki te ntango Yesu asalelaki ndakisa oyo emonisaki lokola ete akokanisi ye na mbwa ya moke, mbala mosusu lolenge ya banyama oyo bato oyo bazalaki Bayuda te bazalaki na yango na ndako. Soki Yesu alobaki nde na yo bongo, olingaki kosala nini? Olingaki komona ete afingi yo mpe kotika kosɛnga ye lisalisi? Mwasi Mofenisia asalaki bongo te. Amonisaki kaka komikitisa te, kasi mpe molende. Emonani polele na ndenge akobaki kosɛnga Yesu lisalisi. Nini etindaki ye asala bongo? Kondima na ye epai ya Yesu. Kutu, kondima ya mwasi yango esimbaki mpenza motema ya Yesu mpe asalaki likambo moko ya kokamwa. Atako autaki koloba ete atindamaki mpo na kosalisa kaka “bampate ya ndako ya Yisraele oyo ebungá,” Yesu abimisaki elimo ya mbindo oyo ezalaki na kati ya mwana ya mwasi yango oyo azalaki moto ya ekólo mosusu.
Esɛngaki mwasi Mofenisia azala na komikitisa, molende, mpe kondima mpo azwa lisalisi oyo azalaki koluka (Talá paragrafe 5)
6. Mateya nini tozwi na lisolo ya mwasi Mofenisia?
6 Mpo na kokokisa mposa na biso ya elimo, tosengeli mpe kokolisa bizaleli wana. Tosengeli kozala na komikitisa, na molende, mpe kozala na kondima makasi. Kaka moto ya komikitisa nde akosɛnga Nzambe lisalisi na molende nyonso. Tosengeli mpe kozala na kondima makasi epai ya Kristo Yesu mpe kotya motema epai ya baoyo azali kosalela mpo na kotambwisa bayekoli na ye. (Mat. 24:45-47) Yehova ná Mwana na ye basepelaka kokokisa mposa ya elimo ya baoyo bamonisaka bizaleli wana. (Talá mpe Yakobo 1:5-7.) Sikoyo tótala ndenge oyo Yehova apesaka biso bilei, molato, mpe esika ya libateli na elimo. Tokotalela ndakisa ya ntoma Petro ná Paulo mpe ya Mokonzi Davidi mpo na komona oyo tosengeli kosala mpo na kozwa biloko yango.
LOKOLA PETRO, KOBÁ KOMILEISA MALAMU NA ELIMO
7. Mokumba nini Petro azwaki, kasi asengelaki mpe kosala nini? Limbolá. (Baebre 5:14–6:1)
7 Tótalela ndakisa ya ntoma ya Petro. Azalaki moko ya Bayuda ya liboso oyo bandimaki ete Yesu azalaki Masiya—moto oyo Yehova azalaki kosalela mpo na koleisa to koteya bato na Ye “maloba ya bomoi ya seko.” (Yoa. 6:66-68) Liboso Yesu amata na likoló nsima ya lisekwa na ye, apesaki Petro mokumba oyo: “Leisá bampate na ngai ya mike.” (Yoa. 21:17) Petro akokisaki mokumba yango na bosembo mpenza, mpe Yehova asalelaki ye kutu mpo na kokoma mikanda mibale oyo ezali na kati ya Biblia. Kasi Petro ye moko mpe asengelaki kolyaka bilei ya elimo. Na ndakisa, ntango ayekolaki mikanda oyo ntoma Paulo asilaki kokoma na litambwisi ya elimo ya Nzambe, Petro andimaki ete makambo mosusu oyo Paulo akomaki ezalaki “mpasi mpo na kokanga ntina.” (2 Pe. 3:15, 16) Kasi emonani ete Petro akobaki kotya molende na koyekola, azalaki na kondima ete Yehova akosalisa ye akanga ntina mpe asalela mateya yango ya mozindo, elingi koloba, “bilei ya makasi” oyo elimo ya Nzambe esalisaki Paulo akoma na mikanda na ye.—Tángá Baebre 5:14–6:1.
8. Petro asalaki nini ntango momonisi ya Nzambe amonisaki ye engɛngiseli ya sika?
8 Petro amonisaki ete azalaki na kondima epai ya Yehova na ndenge azalaki kotosa malako oyo azwi. Na ndakisa, ntango Petro azalaki na Yope, engumba oyo ezalaki na libongo, azwaki emonaneli moko epai momonisi ya Nzambe ayebisaki ye aboma mpe alya banyama oyo ezalaki mbindo na kotalela Mobeko ya Moize. Mpo na Moyuda nyonso, malako yango elingaki kosepelisa ata moke te. Liboso, Petro alobaki: “Soki moke te, Nkolo, mpo nalyá naino eloko ata moko te ya bosɔtɔ to ya mbindo.” Na nsima mongongo yango elobaki: “Tiká kobenga bosɔtɔ biloko oyo Nzambe apɛtoli.” (Mis. 10:9-15) Petro akangaki ntina. Ndenge nini toyebi yango? Nsima ya kozwa emonaneli yango, mibali misato oyo Korneyi moto ya ekólo mosusu atindaki bakómaki na ndako ya Petro mpe bayebisaki ye ete akende elongo na bango mpo nkolo na bango alingi kosolola na ye. Soki kaka mpo na Petro ye moko, akokaki ata moke te kondima kokɔta na ndako ya moto oyo azali Moyuda te. Bayuda bazalaki kotalela bato ya bikólo mosusu ete bazali mbindo. (Mis. 10:28, 29) Kasi Petro andimaki mbala moko engɛngiseli ya sika oyo Yehova amonisaki ye. (Mas. 4:18) Asakwelaki Korneyi ná bato ya ndako na ye mpe ayokaki esengo ya komona ndenge bandimaki solo, bazwaki elimo santu, mpe bazwaki batisimo.—Mis. 10:44-48.
9. Matomba nini mibale tokozwa ntango tokolisi mposa ya kolya bilei ya makasi ya elimo?
9 Ndenge moko na Petro, tosengeli mbala na mbala komɛlaka miliki, elingi koloba koyekolaka mateya ya Liloba ya Nzambe oyo ezalaka mpasi te na kokanga ntina. Kasi, tosengeli mpe kokolisa mposa ya bilei ya makasi, elingi koloba, mateya oyo ekoki kozala mpasi mpo na kokanga ntina. Tosengeli kozwaka ntango mpe kondima kosala milende mpo na kokanga ntina ya Liloba ya Nzambe malamumalamu, mpe milende yango ekozala ya mpamba te. Mpo na nini? Tólobela kaka matomba mibale: Ya liboso, makambo ya Yehova oyo tokoyekola na mozindo ekosala ete tólinga ye mpe tómemya ye lisusu mingi; mpe ya mibale, tokozala lisusu na mposa makasi ya koyebisa basusu makambo ya kokamwa oyo toyekoli mpo na Tata na biso ya likoló. (Rom. 11:33; Em. 4:11) Ndakisa ya Petro epesi biso mpe liteya mosusu: Ntango mbongwana moko esalemi na boyebi na biso ya Liloba ya Nzambe, tosengeli koyokanisa nokinoki makanisi mpe misala na biso na yango. Kaka soki tosali bongo nde tokozala baoyo balyaka malamu na elimo mpe Yehova akokoba kosalela biso.
LOKOLA PAULO, ZALÁ NTANGO NYONSO NA MOLATO NA YO YA ELIMO
10. Kozala na molato ya elimo elakisi nini? (Bakolose 3:8-10)
10 Mpo na kosepelisa Yehova, tosengeli kosalela eloko mosusu oyo apesi biso: molato ya elimo. Yango elakisi nini? Ntoma Paulo akomaki ete tosengeli “kolongola bomoto ya kala” mpe kolata “bomoto ya sika,” elingi koloba komonisa bizaleli oyo esepelisaka Nzambe. (Tángá Bakolose 3:8-10.) Kolata bomoto ya sika esɛngaka kosala milende ntango nyonso. Tótalela ndakisa ya Paulo ye moko. Banda ntango azalaki elenge, azalaki kosala nyonso mpo Nzambe andima ye. (Gal. 1:14; Flp. 3:4, 5) Kasi lokola azalaki na boyebi ya sikisiki te ya mokano ya Nzambe, azalaki mobola na elimo. Kozanga koyeba mateya ya Kristo mpe lolendo ekómisaki ye “moto ya lofundo” oyo alataki bizaleli mabe lokola elamba.—1 Tim. 1:13.
11. Bolɛmbu nini Paulo asengelaki kobundisa? Limbolá.
11 Liboso akóma mokristo, Paulo azalaki kosilika mpambampamba. Mokanda ya Misala emonisi ete Paulo asilikaki makasi mpo na bayekoli ya Yesu mpe azalaki “kaka kokanela mpe koluka koboma” bango. (Mis. 9:1) Nsima ya kokóma mokristo, na ntembe te Paulo asalaki nyonso mpo na kolongola ezaleli yango ya bomoto na ye ya kala. (Ef. 4:22, 31) Atako bongo, na nsima, ye ná Barnabasi “baswanaki makasi” mpo bayokanaki te na likambo moko. (Mis. 15:37-39) Na libaku yango, Paulo akweaki lisusu na bolɛmbu na ye, kasi alɛmbaki nzoto te. Na yango, akobaki ‘kobɛtabɛta nzoto na ye,’ elingi koloba, kobundisa bolɛmbu na ye mpo Yehova akoba kondima ye.—1 Ko. 9:27.
12. Nini esalisaki Paulo alonga kolongola bizaleli ya mabe?
12 Paulo alongaki kolongola bizaleli na ye ya mabe mpe na nsima kolata bomoto ya sika mpo atyaki motema na makasi na ye moko te. (Flp. 4:13) Ndenge moko na Petro, Paulo atyaki motema na “makasi oyo Nzambe apesaka.” (1 Pe. 4:11) Atako bongo, na bantango mosusu, Paulo asalaki mabunga, mpe alɛmbaki nzoto. Kasi ntango alɛmbaki nzoto bongo, akanisaki makambo ya malamu oyo Tata na ye ya likoló asalaki mpo na ye, mpe yango ekómisaki makasi ekateli na ye ya kokoba kosepelisa ye.—Rom. 7:21-25.
13. Ndenge nini tokoki komekola Paulo?
13 Tokoki komekola Paulo soki tondimi ete ata soki tosalelaka Yehova banda bambula mingi, tosengeli kaka kokoba kosala makasi mpo na kolongola bomoto ya kala mpe kolata bomoto ya sika, molato ya elimo oyo Nzambe apesi. Soki tokwei na bolɛmbu na biso, na ndakisa tosiliki makasi to tolobi na moto mabe, tosengeli ata moke te komona ete esili mpo na biso. Kasi, tosengeli kokoba kokokisa mokano na biso ya kobongola lolenge na biso ya kokanisa mpe ya kosala makambo. (Rom. 12:1, 2; Ef. 4:24) Nzokande, tosengeli kobosana te likambo oyo ya ntina: Soki elamba ekoki biso te, tokoki kobongisa yango mpo ekoka biso, kasi na oyo etali molato ya elimo oyo Yehova apesi, biso nde tosengeli komibongisa mpo ekoka biso. Ebongi mpenza tóbongola bomoto na biso mpo bomoi na biso eyokana na makambo oyo Nzambe asɛngi.
LOKOLA DAVIDI, TIKÁLÁ NA ESIKA MALAMU YA LIBATELI YA ELIMO
14-15. Ndenge nini Yehova abatelaka bato na ye na elimo? (Nzembo 27:5) (Talá mpe elilingi.)
14 Mpo tózala mpenza na esengo, tozali kaka te na mposa ya bilei ya elimo mpe molato ya elimo. Tozali mpe na mposa ya esika ya libateli ya elimo. Yango ezali nini, mpe tosengeli kosala nini mpo tókoba kozwa libateli yango?
15 Mokonzi Davidi alobelaki esika ya libateli ya elimo oyo Yehova apesi. (Tángá Nzembo 27:5.) Ndenge nini Yehova abatelaka bato na ye lelo? Yehova abatelaka bango na moto to eloko nyonso oyo ekoki kobebisa mpo na libela kondima na bango epai na Ye. Alaki ete ebundeli moko te oyo esalemi mpo na kosala bango mabe ekolonga. (Nz. 34:7; Yis. 54:17) Atako Satana ná bato na ye bazali na nguya, bakokoka te kosala biso mabe mpo na libela. Ata soki babomi biso, Yehova akozongisa biso na bomoi na ntango ya lisekwa. (1 Ko. 15:55-57; Em. 21:3, 4) Yehova asalisaka biso mpe tólonga mitungisi na biso moko oyo ekoki kosala biso mabe mpo na libela. (Mas. 12:25; Mat. 6:27-29) Mpe Tata na biso ya bolingo apesi biso libota ya elimo ya bandeko mibali mpe basi oyo bakoki kosalisa biso na ntango ya mpasi mpe bankulutu oyo babatelaka biso. (Yis. 32:1, 2) Ntango toyanganaka elongo, mbala mingi toyekolaka makambo oyo tokoki kosala mpo tókoba kozwa libateli ya Yehova.—Ebr. 10:24, 25.
Ndeko mwasi oyo azali koluka lisalisi ya elimo ayangani na makita elongo na bandeko (Talá paragrafe 14-15)
16. Ndenge nini Yehova abatelaki Davidi?
16 Ntango Davidi azalaki kotosa Yehova, abatelamaki na mikakatano oyo ekómelaka baoyo basalaka masumu na nko. (Talá mpe Masese 5:1, 2.) Kasi, ntango Davidi abukaki mibeko ya Nzambe, Yehova abatelaki ye te na mbuma mabe ya misala na ye. (2 Sa. 12:9, 10) Bongo Davidi asalaki nini ntango amonaki mpasi mpo na mabunga oyo bato mosusu basalaki? Na ntango yango, Davidi asopelaki Yehova motema na ye na libondeli. Yehova asalaki nini? Akitisaki Davidi motema na ndenge ayebisaki ye ete alingaka ye mingi mpe ete akokokisa bamposa na ye.—Nz. 23:1-6.
17. Ndenge nini tokoki komekola Davidi?
17 Tokoki komekola Davidi soki tozali koluka toli ya Yehova liboso ya kozwa bikateli. Tosengeli mpe koyeba ete soki na bantango mosusu tozali komona mpasi, ezali te mpo Yehova alongi te kobatela biso, kasi nde mpo tozwaki bikateli ya mabe. (Gal. 6:7, 8) Mpe ntango tokutani na mikakatano mpo na mabunga oyo bato mosusu basali, tosengeli kosopela Yehova motema na biso na libondeli, mpe kotya motema ete akobatela mitema mpe makanisi na biso.—Flp. 4:6, 7.
KOBÁ KOKOKISA MPOSA NA YO YA ELIMO
18. Mokakatano nini tozali na yango, mpe ndenge nini tokoki kokoba kokokisa mposa na biso ya elimo? (Talá mpe bililingi.)
18 Mokapo ya mobu 2026 elobi: “Esengo na baoyo bayebi mposa na bango ya elimo.” Yango ezali na ntina mingi koleka lelo oyo. Mpo na nini? Mpo bato mingi zingazinga na biso bazali na esengo te mpo bandimaka te ete bazali na mposa ya elimo, to mpe bazali koluka kokokisa yango na ndenge na bango moko na nzela ya mangomba ya lokuta to ya filozofi ya bato. Tosengeli kotika te ete makanisi na bango ekɔtela biso. Ndenge nini? Tosengeli komileisa bilei ya elimo oyo Yehova azali kopesa, kolata bomoto ya sika, mpe kotosa Yehova mpo akoba kobatela biso.
Tosengeli kokoba kokokisa mposa na biso ya bilei, ya molato, mpe ya kozwa libateli ya elimo (Talá paragrafe 18)a
LOYEMBO 162 Mposa na ngai ya elimo
a NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndeko mwasi yango azali komileisa na elimo na nzela ya boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, azali komonisela basusu boboto mpo alati bomoto ya sika, mpe aluki lisalisi epai ya bankulutu oyo bazali kolendisa ye na bolingo.