09-15/03/2026
LOYEMBO 45 Komanyola ya motema na ngai
Okoki kobundisa mayoki ya mabe mpe kolonga yango
“Ngai moto ya mawa!”—ROM. 7:24.
NA MOKUSE
Ndenge ya kobundisa makanisi mpe mayoki ya mabe.
1-2. Ndenge nini ntoma Paulo amiyokaki na bantango mosusu, mpe mpo na nini ndakisa na ye ekoki kosalisa biso? (Baroma 7:21-24)
NTANGO oyoki nkombo ya ntoma Paulo, nini eyelaka yo na makanisi? Omonaka ye kaka misionɛrɛ ya mpiko, moteyi ya makoki, to moto oyo akomá mikanda mingi ya Biblia? Makambo wana nyonso ezali solo. Kasi oyebaka ete Paulo azalaki mpe na mayoki ya makasi? Lokola mingi kati na biso, na bantango mosusu azalaki mpe kobundana na mayoki ya mabe.
2 Tángá Baroma 7:21-24. Na mokanda na ye epai ya Baroma, Paulo amonisaki mayoki oyo mingi kati na biso tokoki kozala na yango. Azalaki mokristo ya sembo, kasi azalaki na etumba na kati na ye; kati na mposa makasi ya kosala mokano ya Nzambe mpe mposa ya kosala makambo ya mabe. Longola etumba wana oyo ezalaki kati na ye, na bantango mosusu Paulo abundaki na mayoki ya mabe mpo na bomoi na ye ya kala mpe mokakatano moko oyo ezalaki kosila te.
3. Tokotalela nini na lisolo oyo? (Talá mpe “Ndimbola ya maloba.”)
3 Atako azalaki na etumba na kati na ye, Paulo atikaki te ete mayoki ya mabea oyo azalaki na yango ekonza makanisi na ye. Na lisolo oyo, tokotalela mituna oyo elandi: Mpo na nini na bantango mosusu Paulo amimonaki “moto ya mawa”? Ndenge nini abundisaki mayoki yango ya mabe? Mpe ndenge nini tokoki kobundisa mpe kolonga mayoki na biso ya mabe?
NINI ESALAKI ETE PAULO AZALA NA MAYOKI YA MABE?
4. Nini esalaki ete Paulo azala na mayoki ya mabe?
4 Makambo oyo asalá na kala. Liboso akóma mokristo, Paulo, oyo ayebanaki liboso na nkombo ya Saulo, asalaki makambo ya mabe oyo epesaki ye mawa na nsima. Na ndakisa, azalaki kotala mpe kondima kobomama ya Stefano, moto ya sembo. (Mis. 7:58; 8:1) Lisusu, Saulo nde azalaki kotambwisa mosala ya konyokola mpenza bakristo.—Mis. 8:3; 26:9-11.
5. Paulo azalaki komiyoka ndenge nini mpo na makambo oyo asalaki liboso akóma mokristo?
5 Nsima ya kokóma mokristo, makambo oyo ntoma Paulo asalaki na kala ezalaki kopesa ye mawa makasi. Mbala mosusu ndenge anyokolaki bakristo na molende mpenza etungisaki ye lisusu mingi ata nsima ya bambula ebele. Na ndakisa, ntango akomaki mokanda ya liboso epai ya Bakorinti na mobu soki 55 T.B., alobaki: “Nabongi kutu te kobengama ntoma, mpo nanyokolaki lisangá ya Nzambe.” (1 Ko. 15:9) Mbula soki mitano na nsima, na mokanda na ye epai ya Baefese, alobaki ete azali “moto moke koleka moto oyo aleki moke na kati ya basantu nyonso.” (Ef. 3:8) Ntango akomelaki Timote, Paulo alobaki ete liboso azalaki “mofingi, monyokoli mpe moto ya lofundo.” (1 Tim. 1:13) Meká naino kokanisa ndenge oyo Paulo azalaki komiyoka ntango akei kotala lisangá moko mpe akutani na baoyo anyokolaki to bato ya libota na bango!
6. Nini mosusu ezalaki kopesa Paulo mpasi? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)
6 Nzubɛ na kati ya mosuni. Paulo abengaki likambo moko oyo ezalaki kopesa ye mpasi mingi “nzubɛ moko na kati ya mosuni.” (2 Ko. 12:7) Ntoma yango alobaki te soki ezalaki nini, kasi maloba ya elilingi oyo asalelaki emonisi ete ezalaki mbala mosusu mokakatano moko na nzoto, na mayoki, to likambo mosusu, oyo ezalaki kopesa ye mpasi.b
7. Mabunga ya Paulo ezalaki kosala ye nini? (Baroma 7:18, 19)
7 Mabunga na ye. Paulo azalaki kolɛmba nzoto mpo na mabunga na ye. (Tángá Baroma 7:18, 19.) Azalaki na mposa ya kosala oyo ezali malamu, kasi na bantango mosusu azalaki kokoka kosala yango te mpo na ezaleli na ye ya kozanga kokoka. Andimaki ete ezalaki na etumba ntango nyonso kati na bamposa ya nzoto na ye ya mosuni mpe mposa ya kosala oyo ezali malamu. Atako bongo, Paulo asalaki makasi mpenza mpo akende liboso. (1 Ko. 9:27) Na ntembe te, Paulo azalaki kolɛmba nzoto ntango nyonso oyo bizaleli na ye ya mabe emonani lisusu!
NDENGE OYO PAULO ABUNDISAKI MAYOKI YA MABE
8. Mikanda ya Paulo emonisi ete makambo nini esalisaki ye akende liboso atako mabunga na ye?
8 Ndenge mikanda na ye emonisi yango, Paulo amanyolaki na ndenge oyo ye ná bandeko na ye bakristo bakokaki kobundisa mpe kolonga bamposa ya nzoto ya masumu na lisalisi ya elimo ya Nzambe. (Rom. 8:13; Gal. 5:16, 17) Alobelaki mbala mingi bizaleli mpe bamposa ya mabe oyo bakristo basengeli kobundisa. (Gal. 5:19-21, 26) Na ntembe te Paulo azalaki komanyola na bolɛmbu na ye moko, koluka toli na Makomami, mpe kotalela makambo ya sikisiki oyo akoki kosala mpo na kokende liboso atako mabunga na ye. Tokoki kotya motema ete ye moko asalelaki toli oyo apesaki basusu.
9-10. Nini esalisaki Paulo abundisa mayoki ya mabe? (Baefese 1:7) (Talá mpe elilingi.)
9 Atako na bantango mosusu Paulo alɛmbaki nzoto, abatelaki makanisi ya malamu. Na ndakisa, azalaki na esengo ntango baninga na ye ya mobembo bazalaki kopesa ye bansango ya malamu. (2 Ko. 7:6, 7) Boninga ná bandeko na ye bakristo ezalaki mpe kopesa ye esengo. (2 Tim. 1:4) Longola yango, ayebaki ete Yehova azalaki kondima ye. Ya solo, Paulo azalaki na esengo mpo akokaki kosalela Nzambe “na lisosoli ya pɛto.” (2 Tim. 1:3) Ata ntango azalaki mokangami na Roma, Paulo alendisaki bandeko na ye bakristo ‘básepelaka na kati ya Nkolo.’ (Flp. 4:4) Maloba na ye emonisi mpenza ete atikaki te makanisi ya mabe ekonza ye. Ezali polele ete ntango makanisi ya mabe ezalaki koyela ye, Paulo azalaki kosala makasi abengana yango mpo abatela makanisi ya malamu.
10 Paulo abundisaki mpe alongaki mayoki ya mabe mpo andimaki ete lisiko ezalaki likabo oyo epesamaki mpe mpo na ye. (Gal. 2:20; Tángá Baefese 1:7.) Yango wana akokaki mpenza kotya motema ete Yehova alimbisá ye na nzela ya Yesu Kristo. (Rom. 7:24, 25) Atako mabunga na ye ya kala mpe kozanga kokoka, Paulo alongaki kosalela Nzambe “mosala mosantu” na esengo.—Ebr. 9:12-14.
Atako na bantango mosusu Paulo amitungisaki mpo na makambo oyo asalá na kala, komanyola lisiko esalisaki ye abundisa mayoki ya mabe (Talá paragrafe 9-10)
11. Mpo na nini ndakisa ya Paulo elendisaka biso?
11 Ndenge moko na Paulo, tokoki komiyoka lokola tozali ntango nyonso na etumba na kati na biso. Ekoki kozala makambo oyo tokanisaka, oyo tosalaka, to oyo tolobaka. Biso mpe tokoki koyoka mposa ya koloba ete: ‘Ngai moto ya mawa!’ Ndeko mwasi moko ya bambula 20 na nkombo Elizac alobi boye mpo na etumba oyo azalaki na yango: “Kokanisa likambo ya Paulo elendisaka ngai. Ekitisaka ngai motema koyeba ete kaka ngai moko te nde namiyokaka bongo. Ekundwelaka mpe ngai ete Yehova ayebi mikakatano ya basaleli na ye.” Tokoki kosala nini mpo, ndenge moko na Paulo, tózala na lisosoli ya pɛto mpe tózala na esengo atako mayoki ya mabe?
NDENGE NINI TOKOKI KOBUNDISA MAYOKI YA MABE?
12. Na ndenge nini kobatela mimeseno malamu na makambo ya elimo ekosalisa biso tóbundisa mayoki ya mabe?
12 Batelá mimeseno malamu na makambo ya elimo. Ntango tokómi na mimeseno malamu na makambo ya elimo, tokolonga kotya makanisi na makambo ya malamu. Kobatela mimeseno malamu na makambo ya elimo ezali lokola kobatela mimeseno malamu oyo ebatelaka kolɔngɔnɔ ya nzoto. Mbala mingi soki tozali kolya malamu, kosala ngalasisi, mpe kolala malamu, tomiyokaka malamu na nzoto. Ndenge moko mpe, biso nyonso tosilá komona ndenge toyokaka malamu ntango totángaka Liloba ya Nzambe mbala na mbala; ntango tomibongisaka, toyanganaka mpe topesaka biyano na makita; mpe ntango tobimaka na mosala ya kosakola. Makambo yango ya elimo oyo elendisaka esalisaka biso tóbundisa makanisi ya mabe.—Rom. 12:11, 12.
13-14. Ndenge nini kobatela mimeseno malamu na makambo ya elimo esalisi bakristo mosusu ya sembo?
13 Tótalela ndakisa ya John, oyo abɛlaki lolenge moko ya kansɛr oyo emonanaka mpenza te ntango azalaki na mbula 39. Na ebandeli, azalaki na mayoki ya mabe. Azalaki komituna: ‘Ndenge nini nakoki kobɛla makasi na bolenge boye?’ Na ntango yango, azalaki na mwana moko ya mobali ya mbula misato mpamba. Nini esalisaki John alongola mayoki ya mabe oyo azalaki na yango? Alobi boye: “Ata soki nzoto elɛmbi, nazalaki kosala nyonso tókoba kosala mbala na mbala makambo ya elimo na libota. Tozalaki koyangana na makita nyonso, kosakola pɔsɔ nyonso, mpe kosala losambo na kati ya libota mbala na mbala, ata ntango ezalaki mpasi kotya yango na programɛ.” Ntango akanisaki nyonso wana, John abakisaki boye: “Na ebandeli, mitungisi ebulunganisaka, kasi na nsima, makasi oyo Yehova apesaka mpe bolingo na ye esalisaka na kolongola makanisi ya mabe. Yehova akoki kokómisa yo makasi, kaka ndenge asalaki epai na ngai.”
14 Eliza, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Mbala nyonso oyo nayanganaka na makita mpe nasalaka boyekoli na ngai moko, namikundwelaka ete Yehova ayokaka ngai mpe alingaka ngai mpenza. Yango epesaka ngai esengo.” Nolan, mokɛngɛli ya zongazonga moko na Afrika, alobi mpo na ye ná mwasi na ye Diane, ete: “Tobatelaka mimeseno malamu na makambo ya elimo ata ntango tolɛmbi nzoto. Mpe Yehova asalisaka biso ntango nyonso mpo tózala na makanisi ya malamu. Tosalaka makasi tóbosana te ete Yehova akosalisa biso mpe akopambola biso; toyebaka te ndenge oyo akosala yango, kasi toyebaka ete akosala yango.”
15. Ekoki kosɛnga tósala nini mpo na kolonga makanisi ya mabe? Pesá ndakisa.
15 Mpo na kolonga makanisi ya mabe, ekoki kosɛnga tósala makambo mingi koleka. Tózwa ndakisa: Kanisá ete ozali na mpasi na mokɔngɔ. Mpo na kosilisa yango, mbala mosusu ekosɛnga osuka kaka te na ngalasisi ya kotambola mikolo nyonso. Mpo na koyeba esika mpasi yango euti, ekoki kosɛnga osala bolukiluki mpe osolola ata na monganga. Ndenge moko mpe, ekoki kosɛnga tósala bolukiluki na Biblia mpe na mikanda na biso mpe ata kosolola na mokristo oyo akɔmɛli mpo na koyeba ndenge ya kolonga mayoki ya mabe oyo ezali kotika biso te. Tótalela mwa makanisi mosusu oyo ekoki kosalisa.
16. Nini ekoki kosalisa yo oyeba esika oyo makanisi na yo ya mabe ezali kouta? (Nzembo 139:1-4, 23, 24)
16 Bondelá Yehova asalisa yo oyeba mpenza bamposa na yo. Mokonzi Davidi ayebaki ete Yehova ayebi ye malamu. Yango wana asɛngaki Yehova asalisa ye ayeba ntina oyo azalaki na “makanisi oyo etungisaka.” (Tángá Nzembo 139:1-4, 23, 24.) Yo mpe okoki kosɛnga Yehova asalisa yo omona ntina oyo ozali na makanisi ya mabe mpe oyeba ndenge ya kolonga yango. Okoki mpe komituna mituna lokola oyo: ‘Nini nde ezali kosala ete nazala na makanisi oyo etungisaka ngai? Ezali na eloko oyo elamusaka makanisi ya mabe epai na ngai? Nalataka makanisi ya mabe na esika ya kobengana yango?’
17. Makambo nini okoki kotalela na boyekoli na yo moko mpo esalisa yo okóma na makanisi oyo ekolendisa yo? (Talá mpe elilingi.)
17 Yokanisá boyekoli na yo moko ya Biblia na bamposa na yo. Na bantango mosusu, koyekola bizaleli mosusu ya Yehova ekoki kosalisa yo mingi. Na ndakisa, ntoma Paulo azwaki matomba mpenza ntango amanyolaki na lisiko mpe na ndenge Yehova alimbisaka. Yo mpe okoki kosala bongo. Salelá Buku ya bolukiluki mpo na Batatoli ya Yehova, Index des publications des Témoins de Jéhovah, to mikanda mosusu ya kosala bolukiluki oyo ezali na monɔkɔ na yo mpo oyekola makambo lokola motema mawa ya Nzambe, ndenge alimbisaka, mpe bolingo na ye ya sembo. Soki ozwi masolo oyo ekosalisa yo, salá liste na yango. Tyá liste yango na esika oyo okoki komona yango, mpe yekolá masolo yango ntango obandi kokóma na mawa. Na nsima meká kosalela batoli oyo otángi na masolo yango.—Flp. 4:8.
Poná makambo ya koyekola oyo ekosalisa yo olonga makanisi ya mabe (Talá paragrafe 17)
18. Makambo nini bakristo mosusu bayekoli mpe bamoni ete esalisi bango?
18 Eliza, oyo tolobelaki, ayekolaki na mozindo lisolo ya Yobo. Alobi boye: “Namimonaki mpenza lokola Yobo. Mikakatano na ye elandanaki. Kasi, ata na ntango oyo Yobo alɛmbaki mpenza nzoto, atikaki te kotyela Yehova elikya, atako ayebaki te ntina oyo bampasi ezalaki kokómela ye.” (Yobo 42:1-6) Diane, oyo tolobelaki, alobi boye: “Ngai ná mobali na ngai tozali koyekola buku Pusaná penepene na Yehova. Tozali kosepela mpo Yehova abongisaka biso ndenge moyemi-mbɛki abongisaka mabele. Na esika tótya makanisi na makambo oyo elɛmbisi biso nzoto, tosalaka makasi tómona ndenge Yehova azali kobongisa biso mpo tókóma bato malamu koleka. Yango esali ete tópusana lisusu penepene na ye.”—Yis. 64:8.
ZELÁ MIKOLO EZALI KOYA NA MOTEMA YA KOKITA
19. Na bantango mosusu tokoyoka ndenge nini, kasi tokoki kotya motema na nini?
19 Ata soki tobateli mimeseno malamu na makambo ya elimo mpe programɛ ya malamu ya koyekola makambo oyo eyokani na bamposa na biso, tokoki te komizela ete makanisi mpe mayoki ya mabe elongwa libela. Mikolo mosusu tokoki komimona kaka bato ya mawa! Kasi, na lisalisi ya Yehova, tokoki kobengana mayoki ya mabe ntango eyeli biso. Tokoki kotya motema ete mikolo mingi tokobanda koyoka ete tozali na lisosoli ya pɛto mpe tokomona ete tozali na ntina ya kosepela na bomoi mpe na mosala oyo tozali kosalela Yehova.
20. Ozali na ekateli ya kosala nini?
20 Tiká ete tózala na ekateli ya kotika te ete mayoki ya mabe mpo na makambo oyo tosalá na kala, mitungisi na biso, mpe mabunga na biso ekonza biso. Na lisalisi ya Yehova, tokoki kopekisa makanisi ya mabe. (Nz. 143:10) Tózela na esengo mokili ya sika ntango oyo biso nyonso tokozala kaka na makanisi ya malamu. Na ntango yango, tokobanda kolamuka ntɔngɔ nyonso ata na motungisi moko te, mpe tokozala na esengo ya kosalela Nzambe na biso ya bolingo, Yehova!
LOYEMBO 34 Tambolá na bosembo
a NDIMBOLA YA MALOBA: Na lisolo oyo, maloba “mayoki ya mabe” ezali komonisa mayoki ya mawa mpe mitungisi oyo tokoki kozala na yango mpo na mwa ntango mokuse. Yango ezali te maladi ya konyokwama na makanisi oyo eumeli, oyo mpo na yango esɛngi koluka lisalisi ya monganga.
b Makambo oyo Paulo akomaki emonisi ete azalaki na maladi ya miso, oyo mbala mosusu epesaki ye mpasi mpo na kokoma mikanda mpe kokokisa mosala ya kosakola. (Gal. 4:15; 6:11) To mbala mosusu Paulo azalaki kolobela motungisi oyo ezalaki kouta epai ya bateyi mosusu ya lokuta. (2 Ko. 10:10; 11:5, 13) Ata soki mitungisi ya Paulo ezalaki kouta wapi, toyebi ete ezalaki kopesa ye mawa.
c Topesi bango bankombo mosusu.