Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w26 Janvier nk. 14-19
  • Ntina oyo tosengeli na lisiko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntina oyo tosengeli na lisiko
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • LISIKO ESALI ETE TÓLIMBISAMA
  • LISIKO ESALI ETE TÓBIKA
  • LISIKO EZONGISI BISO NA BOYOKANI NA NZAMBE
  • LISIKO EMONISI MOTEMA MAWA YA YEHOVA
  • Lisiko eteyaka biso nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Ndenge ya komonisa ete ozali na botɔndi mpo na lisiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
  • Matomba oyo tozwi na bolingo ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Ntina ya kozala na botɔndi ndenge Yehova alimbisaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
w26 Janvier nk. 14-19

16-22/03/2026

LOYEMBO 20 Opesá Mwana na yo ya bolingo

Ntina oyo tosengeli na lisiko

“Nani akobikisa ngai na nzoto oyo ezali komema ngai na liwa?”—ROM. 7:24.

NA MOKUSE

Ndenge oyo lisiko esali ete tólimbisama, tóbika, mpe tózongisa boyokani na Yehova.

1-2. Tozali na mposa bábikisa biso na nini, mpe mpo na nini? (Baroma 7:​22-24) (Talá mpe elilingi.)

KANISÁ naino likambo oyo: Ndako moko ekwei, mpe moto moko akangami na kati ya babriki. Akufi te, kasi ye moko azali kokoka te kolongwa na kati ya babriki yango. Nyonso oyo akoki kosala ezali kaka kobelela mpo na kosɛnga lisalisi mpe kozala na elikya ete moto akoya kobimisa ye.

2 Mokomoko na biso azali na likambo ya ndenge wana. Na ndenge nini? Ntango Adama atombokelaki Yehova Mozalisi na ye, akómaki moto ya masumu. Na nsima, bana nyonso oyo abotaki bazalaki bato ya masumu lokola ye. Na yango, bato nyonso awa na mabele bakangamaki na kati ya lisumu, mpe tokoki komilongola biso moko te na makambo oyo lisumu ebimisá, kaka lokola mobali ya ndakisa oyo tolobeli. Ntoma Paulo alimbolaki malamu ezaleli na biso ya bato ya masumu na mokanda na ye epai ya Baroma. (Tángá Baroma 7:​22-24.) Asɛngaki ete bábikisa ye “na nzoto oyo ezali komema . . . na liwa.” Paulo akangamaki na motambo ya lisumu oyo eutá na Adama, oyo ememaka kaka na liwa. (Rom. 6:23) Ezali bongo mpo na biso nyonso. Tozali na mposa bábikisa biso!

Moto moko oyo azoki akangami na nse ya babriki ya ndako oyo ekwei, atomboli lobɔkɔ mpo bábimisa ye.

Ndenge kaka moto oyo akangami na nse ya babriki azalaka na mposa bábikisa ye, biso mpe tokangamá na motambo ya lisumu mpe tozali na mposa bábikisa biso (Talá paragrafe 1-2)


3. Na ndenge nini lisiko ekoki kobikisa biso?

3 Paulo asukaki kaka te na koloba ete lisumu ekangá biso na motambo. Nsima ya kotuna: “Nani akobikisa ngai na nzoto oyo ezali komema ngai na liwa?” ye moko alobaki: “Nzambe azwa matɔndi na nzela ya Yesu Kristo Nkolo na biso!” (Rom. 7:25) Paulo azalaki kolobela nde mbeka ya lisiko ya Yesu.a Lisiko ekoki kobikisa biso na ndenge misato: (1) masumu na biso elimbisama, (2) tóbika na ezaleli na biso ya bato ya masumu, mpe (3) tózongisa boyokani na Mozalisi na biso. Kotalela makambo yango na mozindo ekosalisa biso tólinga lisusu mingi Yehova, “Nzambe oyo apesaka elikya.” (Rom. 15:13) Ekosalisa biso mpe tókóma na botɔndi mingi epai ya Yesu, “oyo na nzela na ye tozwi bonsomi na nzela ya lisiko.”—Kol. 1:14.

LISIKO ESALI ETE TÓLIMBISAMA

4-5. Mpo na nini biso nyonso tosengeli na lisiko? (Mosakoli 7:20)

4 Tosengeli na lisiko mpo masumu na biso elimbisama. Moto nyonso ya kozanga kokoka asalaka masumu, ezala na maloba to na misala. (Tángá Mosakoli 7:20.) Masumu mosusu ezalaka mpenza ya minene. Na ndakisa, na Mobeko ya Moize, moto oyo asali ekobo to abomi moto asengelaki kobomama. (Lev. 20:10; Mit. 35:​30, 31) Ya solo, masumu mingi ezalaka ya minene bongo te; kasi, ezali kaka masumu. Na ndakisa, Davidi, mokomi ya nzembo, alobaki: “Nakozala ekɛngɛ na etamboli na ngai mpo nasala lisumu te na lolemo na ngai.” (Nz. 39:1) Ya solo, na bantango mosusu ata makambo oyo tolobi ekoki kozala lisumu.—Yak. 3:2.

5 Kanisá makambo oyo olobaki to osalaki. Olobaki na moto likambo oyo omoni ete esengelaki te oloba na ye bongo? Osalaki mabunga oyo ezali kopesa yo mawa sikoyo? Na ntembe te, biyano na yo na mituna wana mibale ezali ɛɛ. Biblia elobi: “Soki tolobi: ‘Tozali na lisumu te,’ tozali komikosa mpe solo ezali na kati na biso te.”—1 Yoa. 1:8.

6-7. Nini epesi Yehova ntina ya kolimbisa masumu na biso? (Talá mpe elilingi.)

6 Lisiko epesi Yehova ntina ya kolimbisa masumu na biso. (Ef. 1:7) Kasi, yango elakisi te ete Yehova alekisaka masumu na biso kaka boye, lokola nde esalaka ye eloko moko te. Yehova alingaka te tósala masumu. (Yis. 59:2) Bosembo na ye ya kokoka esɛngi ete azala na ntina mpo na kolimbisa masumu.

7 Mobeko ya Moize esɛngaki ete Bayisraele bápesaka bambeka ya banyama mpo na kozipa masumu na bango. (Lev. 4:​27-31; 17:11) Bambeka yango ezalaki elilingi ya mbeka monene ya Yesu mpe mapamboli oyo yango ekomema. Mbeka ya Yesu esengelaki kopesa Yehova ntina oyo eyokani na mibeko mpo na kolimbisa masumu na biso. Paulo akangaki ntina ya motuya ya mbeka ya Yesu, ndenge emonisami na mokanda oyo akomelaki bakristo ya Korinti. Nsima ya kolobela makambo ya mabe oyo bazalaki kosala liboso, alobaki na bango: “Bosukwami; bosantisami; botángami bato ya sembo na nkombo ya Nkolo Yesu Kristo mpe na elimo ya Nzambe na biso.”—1 Ko. 6:​9-11.

Libota moko ya Bayisraele ezali kopesa nganga-nzambe mpate na tempelo na esengo nyonso.

Bambeka ya banyama oyo epesamaki mpo na kozipa masumu ezalaki elilingi ya mbeka ya lisiko ya Yesu mpe mapamboli oyo ekomema (Talá paragrafe 6-7)


8. Makambo nini okoki kokanisa wana ozali komibongisa mpo na koyangana na Ekaniseli mbula oyo?

8 Wana ozali komibongisa mpo na koyangana na Ekaniseli mbula oyo, zwá ntango ya kokanisa matomba oyo kolimbisa ya Yehova ememeli yo. Na ndakisa, na nzela ya lisiko, ozali na ntina te ya koyoka ntango nyonso ete ozali na ngambo mpo na masumu na yo ya kala nzokande osilá kobongola motema. Okosala nini soki ezali mpasi mpo ondima likambo yango? Mbala mosusu omilobi: ‘Nayebi ete Yehova akoki kolimbisa, kasi ngai moko nakoki komilimbisa te.’ Soki omonaka bongo, kanisá likambo oyo: Yehova nde alimbisaka, mpe apesi Mwana na ye mokumba ya kosambisa. Yehova apesi yo te to moto mosusu mokumba ya kokata nani oyo ye akomonisela motema mawa to te. Biblia elobi: “Soki tozali kotambola na pole ndenge [Yehova] azali na kati ya pole, . . . makila ya Yesu Mwana na ye ezali kopɛtola biso na lisumu nyonso.” (1 Yoa. 1:​6, 7) Tokoki kondima ete yango ezali solo kaka ndenge tondimaka mateya mosusu nyonso ya Biblia. Lisiko epesi Yehova ntina oyo eyokani na mibeko ya komonisela biso motema mawa, mpe Liloba na ye elobi ete ‘asepelaka kolimbisa’ —Nz. 86:5.

LISIKO ESALI ETE TÓBIKA

9. Longola makambo ya mabe, lisumu emonisaka mpe nini? (Nzembo 51:5)

9 Na Biblia, liloba “lisumu” emonisaka kaka te likambo ya mabe oyo moto asali; emonisaka mpe ezaleli ya bato ya masumu, oyo tozwaki ntango kaka mama azwaki zemi na biso. (Tángá Nzembo 51:5) Ezaleli yango etindaka biso na kosala mabe, kasi ekómisá mpe nzoto na biso na bolɛmbu oyo esalaka ete tóbɛla, tónuna, mpe tókufa. Mpo na yango, ata bana mike, oyo basali ata likambo moko te ya mabe, bakoki kobɛla mpe ata kokufa. Yango wana mpe ezala bato mabe to bato malamu bamonaka mpasi mpe bakufaka. Lokola biso nyonso tozali bana ya Adama, tozali bato ya kozanga kokoka mpe bato ya masumu.

10. Kokóma bato ya masumu esalaki nini epai ya Adama ná Eva?

10 Kanisá ndenge oyo kozala bato ya masumu esalaki epai ya mwasi ná mobali ya liboso. Ekɔtisaki mobulu makasi na kati ya nzoto na bango. Nsima ya kotombokela Nzambe, Adama ná Eva bamonaki mbala moko mbuma mabe ya kobuka mobeko ya Nzambe—mobeko oyo ‘ekomamaki na motema na bango.’ (Rom. 2:15) Bakokaki koyoka ete na kati na bango makambo ebebi. Bamonaki ete basengeli kozipa nzoto na bango mpe kobombana Mozalisi na bango, lokola nde bazali basali-mabe. (Eba. 3:​7, 8) Mpo na mbala ya liboso, Adama ná Eva bakómaki na mayoki ya komema ngambo, ya komitungisa, ya kobanga, ya mpasi, mpe ya nsɔni. Na ndenge moko boye, na ntembe te mayoki yango enyokolaki bango tii na liwa na bango.—Eba. 3:​16-19.

11. Kozala bato ya masumu esalá biso nini?

11 Kozala bato ya masumu esalaka biso kaka ndenge esalaki mwasi ná mobali ya liboso. Toyokaka mpasi na nzoto to na mayoki mpo tozali bato ya kozanga kokoka, bato ya masumu. Ata soki tosali ndenge nini mpo tólongola mikakatano na biso nyonso, tokolonga te. Mpo na nini? Mpo, ndenge Biblia elobi, ‘tokómisamá mpamba.’ (Rom. 8:20) Ezali bongo kaka mpo na biso te kasi mpe mpo na bato ya mokili mobimba. Na ndakisa, kanisá milende oyo bato bazali kosala mpo na kobongisa esika bafandi, kolongola makambo ya mabe, kosilisa bobola, mpe kotya kimya kati na bikólo. Atako mwa mbuma ya malamu ezali komonana, milende yango nyonso ezali mosala ya mpunda. Ndenge nini lisiko ekoki kobikisa biso na ezaleli na biso ya bato ya masumu?

12. Elikya nini lisiko epesi biso?

12 Lisiko epesi biso elikya ete “biloko oyo ezalisamá ekolongwa . . . na boombo ya kopɔla.” (Rom. 8:21) Ntango tokozwa matomba nyonso ya lisiko na mokili ya sika oyo Nzambe alaki, tokoyoka lisusu mpasi na nzoto, na makanisi, to na mayoki te; tokonyokwama mpe lisusu te na mayoki ya ngambo, ya komitungisa, ya kobanga, ya mpasi, to ya nsɔni. Lisusu, milende na biso mpo na kobongisa mabele mpe kofanda na kimya ekozala lisusu mosala ya mpunda te, kasi ekolonga mpenza na nse ya boyangeli ya moto oyo asikolaki biso, “Nkumu ya Kimya,” Yesu Kristo.—Yis. 9:​6, 7.

13. Makambo nini mosusu okoki kokanisa wana ozali komibongisa mpo na Ekaniseli ya mbula oyo?

13 Kanisá ndenge oyo okozala ntango okozala lisusu moto ya masumu te. Kanisá ndenge ekozala ntango okobanda kolamuka ntɔngɔ nyonso nzoto malamu, mokolo na mokolo ozali kobanga te ete yo to bato oyo olingaka bokokufa nzala, bokobɛla, to bokokufa. Kasi ata sikoyo, okoki koyoka mwa kimya soki ‘osimbi elikya lokola longo oyo esalisaka biso tótɛlɛma ngwi mpe tótya ntembe te.’ (Ebr. 6:​18, 19) Kaka ndenge longo ekoki kosala ete masuwa etɛngatɛnga te, elikya na biso bakristo ekoki kopika kondima na yo makasi mpe kosalisa yo oyika mpiko na mikakatano nyonso oyo ozali na yango sikoyo. Ya solo, okoki mpenza kotya motema ete Yehova akokóma “moto oyo apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi.” (Ebr. 11:6) Ozali kozwa libɔndisi lelo mpe ozali na elikya ya malamu mpo na mikolo ezali koya kaka mpo lisiko epesamaki.

LISIKO EZONGISI BISO NA BOYOKANI NA NZAMBE

14. Lisumu esalá nini na boyokani na biso ná Mozalisi na biso, mpe mpo na nini?

14 Banda Adama ná Eva basalá lisumu, bato bakómá mosika, bakabwaná na Nzambe. Kutu Biblia emonisi ete bato na mokili mobimba bakómá banguna ya Mozalisi. (Rom. 8:​7, 8; Kol. 1:21) Mpo na nini? Mpo mibeko ya kokoka ya Yehova epesi ye nzela te ya kokanga miso na lisumu. Biblia elobi mpo na Yehova ete: “Miso na yo eleki pɛto mpo emona oyo ezali mabe; mpe okoki te kokanga miso na makambo ya mabe.” (Hab. 1:13) Na yango, lisumu ekɔtisá bokabwani kati na Nzambe mpe moto. Moko te kati na biso akoki kozala na boninga na Yehova soki bokabwani yango esili te mpe tozongisi te boyokani elongo na ye. Lisiko nde ezongisi boyokani kati na moto ná Nzambe.

15. Ndenge nini lisiko ekitisaki motema, mpe yango ebimisi litomba nini?

15 Biblia elobi ete Yesu azali “mbeka ya kozipa masumu na biso.” (1 Yoa. 2:2) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami “mbeka ya kozipa” ekoki kopesa likanisi ya “nzela ya kokitisa motema.” Na ndenge nini lisiko ekitisaki Yehova motema? Tosengeli kokanisa te ete liwa ya Mwana na Ye ebɔndisaki Ye na ndenge moko boye. Kasi, lisiko ekitisaki motema, to eyokanaki na mobeko ya Yehova na oyo etali bosembo. Yehova azalaki sikoyo na ntina ya kozongisa boyokani kati na ye ná moto. (Rom. 3:​23-26) Akokaki kutu kotánga baoyo basambelaki ye na bosembo liboso ya liwa ya Kristo ete bazali bato ya sembo. (Eba. 15:​1, 6) Mpo na nini? Mpo na lisiko oyo esengelaki kopesama. Yehova azalaki na ntembe ata moke te ete Mwana na ye, Yesu, akopesa lisiko. (Yis. 46:10) Lisiko efungwelaki moto nzela ya kozongisa boyokani na Nzambe.

16. Likambo nini mosusu okoki kokanisa ntango ozali komibongisa mpo na Ekaniseli ya mbula oyo? (Talá mpe elilingi.)

16 Kanisá mpe matomba oyo ozwi lokola boyokani na yo elongo na Nzambe ezongi. Na ndakisa, okoki kobenga Yehova “Tata,” ndenge Yesu ateyaki. (Mat. 6:9) Na bantango mosusu, okoki kutu kobenga Yehova “Moninga.” Kasi, ntango tozali kobenga Yehova “Tata” to “Moninga,” tosengeli kosala yango na limemya makasi mpe na komikitisa. Mpo na nini? Mpo lokola tozali bato ya masumu, tokómaka na boyokani ya penepene na Yehova na makasi na biso moko te. Ezali kaka mpo na lisiko nde tokoki kozala ata na mwa boyokani na Yehova. Na nzela ya Yesu, Yehova ‘azongisi lisusu boyokani kati na ye ná biloko mosusu nyonso ndenge atye kimya na lisalisi ya makila oyo Yesu asopaki likoló ya nzete ya mpasi.’ (Kol. 1:​19, 20) Yango nde esalisaka biso tózala na boyokani malamu na Yehova, atako tozali sikoyo bato ya kozanga kokoka.

Basoda ya Roma balingi kobɛta Yesu bansɛtɛ na nzete ya mpasi. Basoda mibale ya Roma bayei na Yesu mpo na kobaka ye na nzete mpe soda mosusu asimbi marto ná nsɛtɛ.

Kaka liwa ya Yesu nde esalisi mpo na kozongisa boyokani malamu kati na Yehova mpe bato (Talá paragrafe 16)


LISIKO EMONISI MOTEMA MAWA YA YEHOVA

17. Ndenge nini lisiko emonisaka motema mawa ya Yehova? (Baefese 2:​4, 5)

17 Lisiko emonisaka polele ete Yehova “atondi mpenza na motema mawa.” “Azongisaki biso na bomoi . . . ntango tozalaki naino bakufi mpo na mabunga na biso.” (Tángá Baefese 2:​4, 5.) Baoyo bazali “na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko” bazali kobelela mpo na kosɛnga lisalisi, bamoni ete bakangami na motambo ya lisumu oyo tozwá mpe bazali na mposa ya kosikolama. (Mis. 13:48) Mpo na koyanola bango, Yehova asalaka ete báyoka nsango ya Bokonzi, mpo báyekola koyeba ye ná Mwana na ye, Yesu. (Yoa. 17:3) Soki Satana akanisaki ete ndenge Adama ná Eva basalaki lisumu, mokano ya Nzambe ekokokisama te, amikosaki mpenza.

18. Ntango tozali komanyola na lisiko, likambo nini tosengeli kobosana te?

18 Wana tozali komanyola na matomba oyo lisiko ememeli biso, tosengeli te kobosana likambo oyo eleki monene: ntina oyo Yehova apesaki lisiko. Na esika ya komona ete lisiko epesamaki kaka mpo na matomba na biso, tosengeli komikundwela ete ezali nzela oyo Yehova asaleli mpo na kosilisa ntembe oyo Satana abimisaki na elanga ya Edene. (Eba. 3:​1-5, 15) Na nzela ya lisiko, Yehova azali kosantisa nkombo na ye, kopɛtola yango na lokuta nyonso. Abikisi biso mpe na lisumu mpe na liwa, mpe na bongo amonisi ete azali Nzambe ya bolingo. Mpe na boboto monene na ye, ata ndenge tozali naino bato ya masumu, Yehova apesi biso libaku ya kopesa mabɔkɔ na komonisa ete Satana alobaki lokuta. (Mas. 27:11) Ndenge nini okoki komonisa botɔndi mpo na lisiko? Tokozwa eyano na motuna yango na lisolo oyo elandi.

NDENGE NINI LISIKO ESALI ETE . . .

  • tólimbisama?

  • tóbika?

  • tózongisa boyokani na Nzambe?

LOYEMBO 19 Bilei ya mpokwa ya Nkolo

a NDIMBOLA YA MALOBA: Lisiko ezali motuya oyo bafutaka mpo na kolongola moto na bokangami. Mbeka ya liwa ya Yesu ezali lisiko na ndenge ete elongoli bato ya sembo na boombo ya lisumu mpe ya liwa.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto