23-29/03/2026
LOYEMBO 18 Tózala na botɔndi mpo na lisiko
Ndenge ya komonisa ete ozali na botɔndi mpo na lisiko
“Bolingo oyo Kristo azali na yango ememisi biso mokumba.”—2 KO. 5:14.
NA MOKUSE
Ndenge oyo biso nyonso tokoki komonisa ete tozali na botɔndi mpo na lisiko.
1-2. Mbeka ya lisiko ya Yesu esengeli komemisa biso mokumba nini, mpe mpo na nini? (2 Bakorinti 5:14, 15) (Talá mpe elilingi.)
SOKI babimisi yo na nse ya babriki ya ndako oyo ekwei, okomiyoka te ete ozali na nyongo epai ya moto oyo abikisi yo? Ata soki babimisaki mpe bato mosusu, na ntembe te yo moko mpe okolinga mpenza komonisa botɔndi na yo; okolinga koyebisa moto yango ete okobosana te likambo oyo asaleli yo.
2 Ndenge lisolo oyo eleki elimbolaki yango, tokoki te komibikisa biso moko na lisumu oyo Adama atikelá biso. Kasi, mbeka ya lisiko ya Yesu ebikisi biso na ndenge misato: (1) masumu oyo tosalaka ekoki kolimbisama, (2) tozwi elikya ya kobika libela na ezaleli na biso ya bato ya masumu, mpe (3) tokoki kozongisa boyokani na Nzambe. Na yango, tozali na elikya ya kozala na bomoi libela na libela na mokili ya sika oyo Yehova alaki. Ya solo, lisiko emonisaka ete Yesu alingaka bato, mpe alingaka bango banda kala, liboso abotama moto ya kokoka awa na mabele. (Mas. 8:30, 31) Ntoma Paulo akomaki ete “bolingo oyo Kristo azali na yango ememisi biso mokumba.” (Tángá 2 Bakorinti 5:14, 15.) Yango elakisi ete bolingo ya Yesu esengeli kotinda biso tómonisa botɔndi mpo na mbeka ya lisiko, mpe tómona yango te eloko ya bongobongo.
Moto oyo babikisi na nse ya babriki ya ndako oyo ekwei azalaka na botɔndi; biso mpe tozali na nyongo epai ya moto oyo abikisi biso na lisumu (Talá paragrafe 1-2)
3. Mpo na nini ndenge oyo okoki komonisa botɔndi mpo na lisiko ekoki kokesana na oyo ya basusu?
3 Mokumba nini lisiko, oyo emonisaka bolingo ya Yesu, ememisi yo? Eyano na yo ekoki kokesana na oyo ya moto mosusu. Mpo na nini? Tózwa ndakisa: Kanisá ete bato misato balingi kokende mobembo na esika moko, kasi mokomoko akouta engumba oyo ekeseni na oyo ya moninga. Bakozwa banzela ekeseni. Ndenge moko mpe, “nzela” oyo ozwi mpo okóma esika oyo ozali kokende, elingi koloba mpo omonisa botɔndi mpo na lisiko, ekotalela esika oyo ozali sikoyo na boyokani na yo na Yehova. Mpo na yango, lisolo oyo ekolobela bituluku misato ya bato: (1) bayekoli ya Biblia, (2) bakristo oyo bazwá batisimo, mpe (3) bampate oyo batiká lisangá.
BAYEKOLI YA BIBLIA
4. Ndenge nini Yehova atalelaka bayekoli ya Biblia?
4 Soki ozali moyekoli ya Biblia, kanisá likambo oyo: Ndenge ondimi koyekola nsango malamu emonisi ete ozali na kati ya baoyo Yehova azali kobenda mpo bákóma baninga na ye. (Yoa. 6:44; Mis. 13:48) “Yehova nde atalatalaka mitema.” Yango elakisi ete azali komona milende na yo mpo na koyekola makambo na ye, mpe azali kosepela komona yo ozali kosala bambongwana mpo na kotosa mibeko na ye. (Mas. 17:3; 27:11) Lisiko efungweli yo nzela ya kozala na boninga ya penepene na Yehova. (Rom. 5:10, 11) Komona yango ata mokolo moko te lokola eloko ya bongobongo.
5. Ndenge nini bayekoli ya Biblia bakoki kosalela toli oyo ezali na Bafilipi 3:16?
5 Soki ozali moyekoli ya Biblia, ndenge nini okoki komonisa botɔndi mpo na lisiko? Lolenge moko ezali ya kolanda toli ya ntoma Paulo epai ya Bafilipi, ete: “Ata soki tokei liboso tii wapi, tókoba kaka kotambola na molɔngɔ na nzela moko wana.” (Flp. 3:16) Libongoli mosusu ya Biblia ebongoli vɛrsɛ yango boye: “Tosengeli kokoba kotambola na nzela oyo tozali kolanda sikoyo.” Na boyokani na toli yango, kotika eloko moko te epekisa yo kokoba kotambola na nzela ya bomoi.—Mat. 7:14; Luka 9:62.
6. Bayekoli ya Biblia bakoki kosala nini soki bazali kokoka te kondima to kosalela liteya moko ya Biblia? (Kolimbola Mibeko 30:11-14) (Talá mpe elilingi.)
6 Okosala nini soki omoni ete ozali kokoka te kondima liteya moko ya Biblia oyo outi koyekola? Salá bolukiluki mpo na liteya yango, mpe bondelá Yehova mpo asalisa yo okanga malamu ntina ya liteya yango. (Nz. 86:11) Soki ozali kaka kokanga ntina ya liteya yango te, tyá yango naino pembeni sikoyo, kasi kotika koyekola Biblia te. Bongo soki omoni ete ezali mpasi mpo otika momeseno moko oyo Biblia epekisi? Omikundwela ete Yehova asɛngaka te na bato ya kozanga kokoka básala makambo oyo bakokoka te. Okoki koyokanisa bomoi na yo na mibeko na ye. (Tángá Kolimbola Mibeko 30:11-14.) Mpe Yehova alaki ete akosalisa yo. (Yis. 41:10, 13; 1 Ko. 10:13) Na yango kolɛmba te. Kasi na esika otya makanisi na mokakatano oyo ozali na yango, kanisá na botɔndi mpenza makambo nyonso oyo Yehova asaleli yo, ata mpe ndenge apesaki Mwana na ye lisiko. Wana bolingo na yo epai ya Yehova ezali kokola, okomona ete “mibeko na ye ezali kilo te.”—1 Yoa. 5:3.a
Yehova asɛngaka biso te makambo oyo tokokoka te. Akosalisa biso tótosa mibeko na ye (Talá paragrafe 6)
7. Bilenge oyo bazali kobɔkwama na kati ya solo bakoki komanyola na nini?
7 Bongo bino bilenge oyo bozali kobɔkwama na kati ya solo? Bino mpe bozali bayekoli ya Biblia. Kutu, bozali bayekoli ya Biblia ya ntina koleka mpo na baboti na bino. Biblia elobi: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yak. 4:8; 1 Nt. 28:9) Ntango yo obandi kopusana penepene na Yehova, ye mpe akopusana penepene na yo. Yehova amonaka yo te ete ozali kaka na kati ya ebele ya bato. Abendaka moto mokomoko, ata baoyo bazali kobɔkwama na kati ya solo. Nini efungweli yo nzela ya kozala moninga ya Yehova? Lisiko, mpe osengeli ata moke te komona yango eloko ya bongobongo. (Rom. 5:1, 2) Yango wana liboso oyangana na Ekaniseli ya mbula oyo, kanisá matomba oyo liwa ya Yesu ememeli yo! Tiká ete likanisi yango ememisa yo mokumba ya kokokisa mokano ya elimo oyo omityeli, ata soki ezali mokano nini, mpo omonisa ete ozali na botɔndi mpo na lisiko oyo Yehova apesaki na nzela ya Mwana na ye.b
BAKRISTO OYO BAZWÁ BATISIMO
8. Ndenge nini bakristo oyo bazwá batisimo bamonisi kondima na lisiko?
8 Soki ozali mokristo oyo azwá batisimo, osili komonisa kondima na lisiko na ndenge mingi. Na ndakisa, osalaki makambo mingi mpo opusana penepene na Yehova mpe oyokanisa bomoi na yo na mibeko na ye. Otosaki etinda ya Yesu ya kokómisa bato bayekoli, mpe okómaki koyebisa basusu mateya oyo ondimaki. Na nsima omipesaki na Yehova mpe ozwaki batisimo. Mbala mosusu okutani na botɛmɛli mpo okangami na losambo ya pɛto. (2 Tim. 3:12) Yebá ete ezaleli na yo ya koyika mpiko mpe bosembo na yo emonisi ete olingaka Yehova mpe ozali na botɔndi mpo na lisiko oyo apesaki na nzela ya Mwana na ye.—Ebr. 12:2, 3.
9. Likama nini bakristo oyo bazwá batisimo basengeli kokeba na yango?
9 Bakristo oyo bazwá batisimo basengeli kokeba na likama moko. Wana ntango ezali koleka, tokoki kobanda komona lisiko lokola likabo ya bongobongo. Ekoki kosalema ndenge nini? Tólobela bakristo ya siɛklɛ ya liboso na Efese. Yesu, oyo asekwaki, apesaki bango longonya mpo na ezaleli na bango ya koyika mpiko. Kasi, alobaki na bango: “Nazwi yo mabe na likambo oyo: otiki bolingo oyo ozalaki na yango liboso.” (Em. 2:3, 4) Ndenge maloba ya Yesu emonisi yango, losambo ya mokristo ekoki mokemoke kokóma ya likolólikoló. Ekoki kozala ete mokristo yango abondelaka, ayanganaka na makita, mpe abimaka na mosala ya kosakola kasi azali kosala yango kaka tiká asala mpo amesaná. Azali kosala yango lisusu na bolingo te. Okoki kosala nini soki omoni ete bolingo na yo epai ya Yehova ezali lisusu makasi te ndenge ezalaki liboso?
10. Ndenge nini okoki ‘kokanisaka malamu mpenza’ mpe ‘komipesa mobimba na’ makambo ya elimo? (1 Timote 4:13, 15)
10 Ntoma Paulo ayebisaki Timote ‘akanisaka malamu mpenza’ mpe ‘amipesa mobimba na’ makambo ya elimo. (Tángá 1 Timote 4:13, 15.) Na boyokani na toli wana, meká kokanisa ndenge oyo okoki komipesa lisusu mingi na makambo ya losambo mpo okoba ‘kozala na molende mingi na lisalisi ya elimo santu.’ (Rom. 12:11) Na ndakisa, okoki kosala makasi obongisaka makita malamu mpo olandaka yango na likebi. To mpe okoki kosala ete boyekoli na yo moko esalisa yo lisusu mingi soki ozali kolekisa ntango yo moko mpo na komanyola na makambo oyo outi koyekola. Kaka ndenge osengeli kobakisa nkoni mpo mɔtɔ ekoba kopela, omipesa mpenza na koyekola mpe komanyola mpo okoba komonisa botɔndi mpo na nyonso oyo Yehova apesi yo, ata mpe lisiko. Lisusu, okoki kosalela mwa bapɔsɔ liboso ya Ekaniseli mpo na komanyola na mapamboli kitoko oyo ozali kozwa mpo ozali Motatoli ya Yehova! Na ntembe te yango ekosalisa yo okóma lisusu na botɔndi mingi mpo na lisiko, oyo esalisi yo okóma na boyokani na Yehova.
11-12. Kozanga molende mpo na mwa ntango emonisi ete ozali lisusu na elimo ya Nzambe te? Limbolá. (Talá mpe elilingi.)
11 Soki omoni ete molende na yo na losambo ya solo ezali lisusu te ndenge ezalaki liboso, kolɛmba nzoto te to kokanisa te ete ozali lisusu na elimo ya Nzambe te. Omikundwela makambo oyo ntoma Paulo akomelaki Bakorinti mpo na mosala na ye, ete: “[Ata] soki nazali kosala yango na bolingo na ngai moko te, mokumba monene oyo bapesá ngai ezali kaka.” (1 Ko. 9:17) Alingaki koloba nini?
12 Paulo azalaki na bizaleli mosusu oyo ezalaki kosilisa ye mposa ya kosakola. Kasi, azalaki na ekateli ya kokoba kosakola ata soki azalaki komiyoka ndenge nini na ntango yango. Yo mpe okoki kosala bongo. Zalá na ekateli ya kosala malamu ata soki ozali na mposa te ya kosala yango. Na ntango yango, bondelá Yehova apesa yo “mposa mpe nguya ya kosala.” (Flp. 2:13) Kobá komipesa na makambo ya elimo. Mpe tyá motema ete nsima ya mwa ntango, makambo ya elimo ekobongisa mayoki na yo mpe okolamwisa bolingo ya Yehova oyo ezali naino na motema na yo.
Kobá kosala makambo ya elimo ata ntango ozali na mposa ya kosala yango te (Talá paragrafe 11-12)
13. Ndenge nini tokoki kokoba komimeka mpo na koyeba soki ‘tozali na kati ya kondima’?
13 Tosengeli komitalelaka mbala na mbala, kaka ndenge 2 Bakorinti 13:5 elobi, ete: “Bókoba komimeka mpo na komona soki bozali na kati ya kondima; bókoba kotala soki bozali ndenge nini.” Nsima ya mwa ntango, tokoki komitunaka boye: ‘Nazali kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na ngai?’ (Mat. 6:33) ‘Kominanola oyo naponaka emonisi ete nayinaka oyo ezali mabe?’ (Nz. 97:10) ‘Nalendisaka kimya mpe bomoko na kati ya bandeko?’ (Ef. 4:2, 3) Ekaniseli, libaku oyo tokanisaka mingimingi ebongiseli ya Yehova ya kopesa lisiko, epesaka biso mpe libaku ya komitalela mpe komindimisa ete tozali na bomoi mpo na Kristo kasi mpo na biso moko te.c
BAMPATE OYO BATIKÁ LISANGÁ
14. Wapi makambo oyo esalá ete bakristo mosusu bátika lisangá?
14 Bakristo mosusu batiká lisangá nsima ya kosalela Yehova mwa basanza to kutu bambula ebele na bosembo. Mpo na nini? Basusu balɛmbi mpo na “mitungisi ya bomoi.” (Luka 21:34) Bandeko mosusu babɛtaki libaku mpo na makambo oyo ndeko moko alobaki to asalaki. (Yak. 3:2) Kasi basusu mpe basalaki lisumu ya monene mpe bazali kokakatana mpo na kosɛnga lisalisi. Ata soki ezali mpo na ntina nini, okoki kosala nini soki otiká lisangá ya Yehova? Likabo kitoko ya lisiko ememisi yo mokumba nini?
15. Ndenge nini Yehova amonisi ete akipaka bampate oyo ebungi? (Ezekiele 34:11, 12, 16)
15 Okoki kokanisa malamumalamu ndenge oyo Yehova atalelaka baoyo batiki lisangá. Abwakaka bango te. Kasi, alukaka bango lokola bampate oyo ebungi. Aleisaka bango mpe asalisaka bango bázongela ye. (Tángá Ezekiele 34:11, 12, 16.) Ekoki nde kozala ete Yehova azali kosala bongo epai na yo? Ɛɛ! Lokola ozali koyekola lisolo oyo emonisi ete motema na yo elingaka kaka kosepelisa ye. Kaka ndenge Yehova amonaki bizaleli malamu na motema na yo mpe abendaki yo na solo, ekoki kozala ete sikoyo mpe azali kobenda yo mpo ozongela ye!
16. Makambo nini ekoki kosalisa mpate oyo ebungi azongela Yehova? (Talá mpe elilingi.)
16 Mwa buku Zongelá Yehova elobi boye: “Simbá ete Yehova akoyamba yo soki ozongeli ye. Akosalisa yo otika komitungisa, olongola nkanda soki bazokisaki yo, mpe ozala na kimya ya makanisi mpe ya motema mpo ozali na lisosoli ya pɛto. Na nsima, okoki kokóma lisusu na mposa ya kosalela Yehova elongo na baninga na yo bandimi.” Kobosana mpe te ete bankulutu bazali na mposa makasi ya kosalisa yo. Bakoki kozala “lokola esika ya komibomba mpo na kokima mopɛpɛ, esika ya kobombana mpo na kokima mbula ya mopɛpɛ makasi.” (Yis. 32:2) Mpo na komonisa botɔndi mpo na lisiko, omituna boye: “Nakoki kosala nini sikoyo mpo ‘nabongisa makambo’ na Yehova?” (Yis. 1:18; 1 Pe. 2:25) Na ndakisa, okoki koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi? Okoki kosolola na nkulutu moko mpe kosɛnga lisalisi ya elimo, oyo ekosɛnga mbala mosusu moto ayekola na yo Biblia mpo na mwa ntango? Yebá ete Yehova akopambola milende oyo okosala mpo omonisa botɔndi mpo na lisiko oyo Mwana na ye apesaki.
Omituna boye: “Nakoki kosala nini sikoyo mpo ‘nabongisa makambo’ na Yehova?” (Talá paragrafe 16)
OKOSALA NINI?
17-18. Ndenge nini tokoki kosalela ntango na biso malamu liboso ya Ekaniseli ya mbula oyo?
17 Yesu alobaki ete lisiko epesamaki “mpo moto nyonso oyo akomonisa kondima epai na ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.” (Yoa. 3:16) Lisiko ezali ebongiseli oyo Yehova azwá mpo na kobikisa biso na lisumu mpe na liwa. Moko te kati na biso asengeli komona lisiko eloko ya bongobongo. (Rom. 3:23, 24; 2 Ko. 6:1) Mwa mikolo liboso ya Ekaniseli, tozalaka na libaku ya kokanisa bolingo oyo Yehova ná Yesu bamonisaki, mpe bolingo yango esengeli komemisa biso mokumba ya komonisa botɔndi.
18 Ndenge nini okomonisa botɔndi na yo mpo na lisiko? Eyano na yo ekoki kokesana na oyo ya moto mosusu. Kasi yebá ete Yehova akopambola milende oyo ozali kosala mpo na kosangana na bamilio ya basambeli mosusu oyo ‘bazali na bomoi mpo na bango moko lisusu te, kasi mpo na moto oyo akufelaki bango.’—2 Ko. 5:15.
LOYEMBO 14 Tókumisa Mokonzi ya sika ya mabele
a Mpo na kosalisa yo okola malamu wana ozali koyekola Biblia, saleláká eteni “Oyo okoki kosala” oyo ezalaka na nsuka ya liteya mokomoko ya buku Sepelá na bomoi libela na libela.
b Mpo na komona makanisi oyo ekoki kosalisa yo okola na elimo, talá lisolo “Bilenge: ‘Bókoba kosala mpo na lobiko na bino moko’” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 12/2017.
c Mpo na komona makanisi mosusu oyo ekoki kosalisa yo okoba komonisa botɔndi, talá lisolo “Nini ezali kopusa yo na kosalela Nzambe?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/06/1995.