Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w26 Janvier lok. 32
  • Monáká na makanisi masolo ya Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Monáká na makanisi masolo ya Biblia
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
  • Masolo mosusu
  • Omipesa na botángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Nakobanda ndenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Bililingi oyo ekosalisa yo obosana te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Omipesa na kotánga
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
w26 Janvier lok. 32

LIKANISI MPO NA KOYEKOLA

Monáká na makanisi masolo ya Biblia

Biblia ezali na masolo ya bomoi ya bato ebele oyo ezali na mateya ya ntina. Soki tozali komeka komona na makanisi ndenge makambo elekaki, tokokanga ntina malamu ya makambo oyo tozali kotánga mpe ekosalisa biso. Tótalela mwa batoli oyo ekoki kosalisa yo omona na makanisi masolo ya Biblia.

  • Tángá na mongongo makasi. Kotánga Biblia na mongongo makasi ekoki kosalisa yo omona makambo yango polele lisusu mingi na makanisi. Ntango bozali kotánga Biblia na libota, moto na moto akoki kotánga maloba ya moto mokomoko oyo lisolo yango elobeli.

  • Kanisá ndenge makambo elekaki. Meká kokanga ntina ya makanisi mpe mayoki ya bato oyo lisolo elobeli. Na ndakisa, omituna: ‘Mpo na nini moto yango alobaki to asalaki likambo bongo? Nalingaki kokanisa to kosala nini soki ezalaki ngai?’

  • Salá bililingi to mayemi. Kosala bililingi to mayemi ya masolo ya Biblia ekoki kosalisa yo omona na makanisi masolo yango mpe obosana yango te, ata soki mayemi oyo okosala ekozala kitoko te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto