République dominicaine
NA 1492, ntango Christophe Colomb azalaki kosala mibembo na ye, akómaki na Mokili ya sika: mikili kitoko ya biloko ya motuya mpe bisika ndenge na ndenge ya kotalatala. Apesaki moko ya bisanga epai masuwa na ye esɛmaki nkombo La Isla Española, to Hispaniola. Eteni monene (2/3) ya mokili yango ezali lelo République dominicaine. Na bambula oyo eleki, bankóto ya bato ya ekólo yango bazwi eloko oyo eleki motuya: bayebi ete ekozala na mokili moko ya sika ya boyengebene oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela libela na libela. (2 Pe. 3:13) Tokolobela sikoyo lisolo kitoko ya bato ya sembo oyo bazwá eloko yango ya motuya.