Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yb15 lok. 82-lok. 85 par. 3
  • Makambo etali République dominicaine

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo etali République dominicaine
  • Buku ya mobu 2015 ya Batatoli ya Yehova
Buku ya mobu 2015 ya Batatoli ya Yehova
yb15 lok. 82-lok. 85 par. 3
Elilingi na lokasa 82

RÉPUBLIQUE DOMINICAINE

Makambo etali République dominicaine

Karte na lokasa 83

Mokili République dominicaine ezwá eteni monene (2/3) ya esanga ya Hispaniola; eteni mosusu ezali Haïti. Na mokili ya République dominicaine, okokuta bazamba epai bambula enɔkaka mingi, bangomba ya milai, banzete ya mangrove, mpe mikili ekauká. Ngomba oyo eleki molai na République dominicaine ezali Pico Duarte, oyo ezali na molai ya mɛtrɛ 3 175. Pembenipembeni ya ebale, okokuta ebele ya mabongo ya zɛlo ya mpɛmbɛ; mpe na kati ya mboka, ezali na mabwaku oyo ebotaka mingi, na ndakisa Lobwaku Cibao.

Bato Loposo ya bato mingi ya République dominicaine esangisá loposo ya bato ya Mpoto mpe ya Afrika. Ezali mpe na mwa bato ya loposo mosusu; mingi bautá Haïti.

Monɔkɔ Monɔkɔ ya Leta ezali Espagnol.

Elilingi na nkasa 84, 85

Bandeko bafandi elongo na esengo

Ndenge ya kobikela Banda kala, bakompanyi ya mabanga ya ntalo, ya sukali, ya kafe, mpe ya makaya nde esalisaka bato bázwa mbongo ya kobikela. Mikolo oyo, nkita emati mpo na bapaya oyo bayaka kotala mboka mpe mpo na baizine oyo ezali na mboka.

Mopɛpɛ Esanga yango ezalaka na mopɛpɛ ya molunge mpenza te, mbala mingi ezalaka 25°C. Mbula enɔkaka mingi na nɔrdi-ɛsti, esika bangomba ezalaka mingi, kasi enɔkaka mingi te na bisika mosusu. Na bantango mosusu, bambula mpe mipɛpɛ makasi ebɛtaka esanga yango.

Mimeseno Bato ya République dominicaine balingaka mingi loso, madesu, mpe ndunda. Basepelaka mpe na mbisi mpe biloko mosusu ya mai, bambuma, pilipili ya ndenge na ndenge, mpe makemba bakalingá. Okokuta biloko yango mosusu na bilei oyo bato mingi balambaka kuna; babengaka yango La Bandera Dominicana (bɛndɛlɛ ya République dominicaine). Bato ya République dominicaine basepelaka mingi na lisano ya baseball, balingaka mpe miziki mpe kobina, mingimingi mérengué. Balingaka mpe kobɛta gitare, mbonda, piololo, mpe marimba.

MOKILI (na kilomɛtrɛ-kare)

18 792

BATO

10 404 000

BASAKOLI NA 2014

38 161

MOSAKOLI 1 MPO NA BATO

273

BAYANGANI NA EKANISELI YA 2014

132 760

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto