Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yb15 lok. 90-lok. 94 par. 3
  • “Tokokutana na bango”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Tokokutana na bango”
  • Buku ya mobu 2015 ya Batatoli ya Yehova
  • Mitó ya makambo mike
  • “Ata ndele tokokutana na bango”
Buku ya mobu 2015 ya Batatoli ya Yehova
yb15 lok. 90-lok. 94 par. 3

RÉPUBLIQUE DOMINICAINE

“Tokokutana na bango”

“Ata ndele tokokutana na bango”

Elilingi na lokasa 91

Soki na 1935, na etúká oyo ebengami Lobwaku Cibao, moto moko na nkombo Pablo González abandaki kotánga Biblia. Na ntango moko boye, azalaki kokende na ndako-nzambe ya Baprotesta, kasi ntango amonaki ete bizaleli na bango eyokani te na makambo oyo azalaki kotánga na Biblia, akimaki. Nzokande, akobaki koyekola Liloba ya Nzambe na ndenge na ye mpe abandaki koyebisa basusu makambo oyo azalaki kotánga. Ayebisaki liboso bato ya libota na ye mpe bato ya kartye, mpe na nsima bato mosusu ya bamboka ya pembeni. Atɛkaki ferme na ye mpe bangɔmbɛ na ye mpe asalelaki mbongo yango mpo na kokende kosakola.

Na 1942, Pablo asilaki kotala mabota koleka 200 na bamboka ya pembenipembeni mpe azalaki kosala makita mbala na mbala, atako akutanaki naino na Batatoli ya Yehova te. Azalaki kolendisa bato báyekola Biblia mpe básalela makambo oyo elobi. Bato mingi balandaki toli yango mpe batikaki komɛla makaya mpe kobala basi ebele.

Bililingi na nkasa 90, 91

Moko ya bato oyo bayokaki nsango ya Biblia oyo Pablo ateyaki ezalaki Celeste Rosario. Mwasi yango alobi boye: “Ntango nazalaki na mbula 17, Negro Jiménez, nɔkɔ na ngai, azalaki na kati ya bato oyo Pablo González azalaki koteya. Ayaki kotala libota na biso mpe atángelaki biso mwa bavɛrsɛ ya Biblia; mpe yango etindaki ngai mbala moko nazwa ekateli ya kolongwa na Katolike. Makambo oyo bazalaki kotángela biso na ndako-nzambe ezalaki na Latin; nazalaki kokanga ntina na yango te. Mwa moke na nsima, Pablo González ayaki kotala biso mpe alendisaki biso. Alobaki boye: ‘Tozali bato ya lingomba ata moko te na mangomba oyo toyebi, kasi tozali na bandeko na mokili mobimba. Toyebi te soki bazali banani mpe babengaka bango na nkombo nini, kasi ata ndele, tokokutana na bango.’”

Pablo asalaki bituluku ebele ya bayekoli ya Biblia na engumba Los Cacaos Salcedo, na Monte Adentro, na Salcedo, mpe na Villa Tenares. Na 1948, na mobembo moko, ntango azalaki komata na bisi mosusu na engumba Santiago, Pablo amonaki Batatoli bazali kosakola na balabala mpe bapesaki ye Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Na mobembo mosusu, ndeko mwasi moko apesaki Pablo babuku mibale mpe abengisaki ye na Ekaniseli ya liwa ya Kristo na Santiago. Na Ekaniseli, makambo oyo ayokaki esimbaki mpenza motema na ye mpe amonaki ete nsukansuka, azwi solo mpe ete bato oyo bayangani na likita yango bazali bato oyo azalaki koluka.

Bamisionɛrɛ bakendaki kotala bato oyo Pablo azalaki koyekola na bango. Na esika moko, bakutaki bato 27 ya mikóló bazali kozela bango na esengo. Bato yango mosusu batambolaki kilomɛtrɛ soki 25 na makolo; bamosusu kilomɛtrɛ 50 na mpunda! Na esika mosusu, bato bazalaki 78; na esika mosusu bato bazalaki 69.

Pablo apesaki bamisionɛrɛ nkombo ya bato soki 150 oyo basepelaki na solo. Bato yango ya komikitisa mpe oyo balingaki makambo ya Nzambe bazalaki koyekola Biblia banda kala mpe kosala makambo oyo elobi. Esɛngaki kaka kobongisa bango mpe kopesa bango malako. Celeste alobi boye: “Bamisionɛrɛ bayaki kotala biso, mpe tosalaki makita. Bibongiseli ezwamaki mpo tózwa batisimo. Nazalaki moto ya liboso ya kozwa batisimo na libota na biso. Na nsima, mama na biso Fidelia Jiménez, mpe leki na ngai Carmen bazwaki mpe batisimo.”

Liyangani ya zongazonga ya liboso oyo esalemaki na République dominicaine, na engumba Santiago na mokolo ya 23-25/09/1949, elendisaki lisusu mosala ya kosakola. Bato mingi bayaki kaka kotala, mpe bayangani bazalaki 260 na diskur ya bato nyonso na mokolo ya lomingo. Bato 28 bazwaki batisimo. Liyangani yango ya mikolo misato endimisaki bato mingi ya sika ete bazali na ebongiseli oyo Nzambe azali kosalela mpo na kokokisa mokano na ye.

Ebandeli ya mosala

  1. 1945

    Ndeko Lennart Johnson ná mwasi na ye Virginia bayei

    Elilingi na lokasa 92
  2. 1946

    Ntango ndeko Knorr ná ndeko Franz bayaki

    Elilingi na lokasa 92
  3. 1949

    Liyangani ya zongazonga ya liboso

    Bato 28 bazwaki batisimo na Ebale Yaque

    Elilingi na lokasa 93
  4. 1950

    Mosala ya Batatoli ya Yehova epekisami

    Elilingi na lokasa 93
    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto