Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yb17 nk. 108-109
  • “Mpo na Nzambe makambo nyonso ekoki kosalema”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Mpo na Nzambe makambo nyonso ekoki kosalema”
  • Buku ya mobu 2017 ya Batatoli ya Yehova
  • Masolo mosusu
  • Kondima etyami na komekama na Pologne
    Lamuká!—2001
  • Konyata mikanda mikolimbolaka biblia na ntango ya epekiseli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Eloko moko ya motuya oyo ebombamaki bankama ya bambula
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Bazali kobatela biloko ya Nkolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
Makambo mosusu
Buku ya mobu 2017 ya Batatoli ya Yehova
yb17 nk. 108-109

GÉORGIE

“Mpo na Nzambe makambo nyonso ekoki kosalema”

Natela Grigoriadis

  • ABOTAMAKI NA 1960

  • BATISIMO 1987

  • NA MOKUSE Mwa moke nsima ya kozwa batisimo, Natela oyo azalaki mokambi ya magazini moko, asalelaki libaku yango mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya konyata na masini mikanda na kobombana.

Natela Grigoriadis

NA NSUKA ya bambula ya 1980, na makita, kaka ndeko oyo atambwisaka boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli nde azalaki na yango mpe mbala mingi ezalaki zulunalo oyo basali kopi na yango na mabɔkɔ. Nasololaki na ndeko Genadi Gudadze, moko ya bankulutu, mpe napesaki ye likanisi ete tosengeli komeka konyata biso moko na masini bazulunalo yango.

Tii na ntango wana, bandeko bamesanaki kobimisa mwa mikanda na masini ya kosala bafotokopi oyo bango moko basalaki. Mpo na kobimisa mikanda mbala na mbala, esɛngaki bázala na masini ya malamu koleka ya kosala bafotokopi, kozala na moto oyo ayebi kobɛta malamu masini ya kobɛta mikanda, kozala mpe na masini yango ya kobɛta mikanda mpe ebele ya bapapye oyo basalaka na yango bafotokopi. Nzokande, guvɛrnema ezalaki na liste ya biloko nyonso ya imprimeri, ata bapapye mpe bato na bango bazalaki kolandela yango.

Nazwaki masini moko ya kobɛta mikanda na mabɔkɔ epai ya moto moko oyo nayebanaki na ye, oyo azalaki na bamasini ya kala oyo Leta ezalaki lisusu kolandela te. Ndeko na ngai ya mwasi ayebaki kobɛta masini mpe akokaki kosalisa biso. Bandeko basalaki masini ya sika ya kosala bafotokopi mpe bazwaki esika ya kosomba bapapye oyo basalaka na yango bafotokopi. Makambo nyonso ekómaki na molɔngɔ mpe eumelaki te tobimisaki kopi ya liboso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na monɔkɔ ya Géorgien.

Kasi mokakatano mosusu ebimaki. Mokolo moko, Genadi ayebisaki ngai, “tosengeli koluka esika mosusu ya kozwa bapapye ya kosala bafotokopi.” Amonaki liboke ya bapapye yango na biro moko ya Leta, kasi ye moko akokaki kosomba yango te mpo bakonzi bazalaki kolandela ye. Ndenge nini tokokaki kozwa yango? Nazalaki koloba mbala na mbala: “Ezali mpasi tózwa yango!” Kasi Genadi alobaki na ngai boye: “Tiká koloba ‘ezali mpasi tózwa yango!’ ‘Mpo na Nzambe makambo nyonso ekoki kosalema’!”​—Mat. 19:26.

Nakobaki kokanisa maloba yango, mpe na kobanga nyonso, nakendaki na biro yango ya Leta mokolo oyo elandaki. Yehova akambaki ngai epai ya mwasi moko ya boboto oyo ayebaki kobɛta masini mpe andimaki koyebisa bosɛnga na ngai epai ya mokambi ya biro yango. Mokonzi yango nde mobali na ye! Nakómaki kosomba bapapye yango mbala na mbala na biro yango, mpe na nsima tozalaki lisusu kozanga bapapye te.

Natela Grigoriadis azali kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli
    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto