Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yb17 lok. 110
  • Biblia na monɔkɔ ya Géorgien

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia na monɔkɔ ya Géorgien
  • Buku ya mobu 2017 ya Batatoli ya Yehova
Buku ya mobu 2017 ya Batatoli ya Yehova
yb17 lok. 110
Lokasa ya Biblia ya monɔkɔ ya Géorgien

Baevanzile minei ya Mokvi, maniskri moko ya monɔkɔ ya Géorgien ya siɛklɛ ya 14

GÉORGIE | 1924-1990

Biblia na monɔkɔ ya Géorgien

GÉORGIEN ezali moko ya minɔkɔ ya liboso oyo babongolaki na yango Biblia nzela moko na minɔkɔ lokola Arménien, Copte, Latin, Syriaque mpe minɔkɔ mosusu. Bamaniskri ya kala ya Baevanzile na monɔkɔ ya Géorgien, mikanda ya ntoma Paulo mpe Nzembo, basalaki yango na katikati ya siɛklɛ ya mitano to mpe liboso na yango. Na basiɛklɛ oyo elandaki, babongolaki mpe basalaki bakopi mingi ya Biblia na monɔkɔ ya Géorgien mpe yango nde esalaki ete mabongoli ya Biblia ezala mingi na monɔkɔ yango.a

Mateya ya Biblia ekɔtá makasi na mikanda mpe mimeseno ya bato ya Géorgie. Na ndakisa, lisolo ya mawa ya mokonzi-mwasi Shushanik, oyo mbala mosusu ekomamaki na nsuka ya siɛklɛ ya mitano, etángi to elobeli mpe bavɛrsɛ ndenge na ndenge ya Biblia. Na poɛmi na ye Vepkhvistqaosani (Soda ya mpiko na mposo ya nkoi), oyo asalaki yango na mobu soki 1220, Shota Rustaveli alobelaki bizaleli ya bokristo. Powɛti yango akomaki makambo etali boninga, kokaba mpe kolinga bapaya; bizaleli oyo bato ya Géorgie bazwaka na motuya mingi.

a Mpo na koyeba makambo mosusu, talá lisolo “Eloko moko ya motuya oyo ebombamaki bankama ya bambula” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/06/2013.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto