Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yb17 nk. 128-129
  • Mobali na ngai azalaki kokoka kotika kotánga yango te!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mobali na ngai azalaki kokoka kotika kotánga yango te!
  • Buku ya mobu 2017 ya Batatoli ya Yehova
  • Masolo mosusu
  • Tózwa matomba na botángi ya Biblia mokolo na mokolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Ntango oyo batángaka yango mpe matomba oyo bazwi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Oyo okoki kosala mpo botángi ya Biblia esalisa yo mpenza
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Biblia​—⁠Búku oyo esengeli kotángama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Buku ya mobu 2017 ya Batatoli ya Yehova
yb17 nk. 128-129

GÉORGIE

Mobali na ngai azalaki kokoka kotika kotánga yango te!

Marina Kopaliani

  • ABOTAMAKI NA 1957

  • BATISIMO 1990

  • NA MOKUSE Marina ná mobali na ye Badri, bakómaki basakoli ya molende ntango bazalaki kobɔkɔla bana na bango mibale ya mibali. Na nsima Badri akómaki kosala na komite ya ekólo mpe atikalaki sembo tii liwa na ye na 2010.

Marina Kopaliani

NA 1989, ngai ná mobali na ngai tokutanaki na Batatoli epai ya moto moko ya kartye na biso. Ndeko Givi Barnadze, oyo azalaki koyekola Biblia na moto moko ya kartye na biso, azalaki na Biblia te mpo na Géorgie ezalaki mpenza mpasi komona Biblia na ntango wana.

Tosepelaki na makambo oyo toyokaki mpe tozalaki na mposa tózwa Biblia. Ntango mobali na ngai amonaki ndeko na ye ya mobali, ayebisaki ye ete azalaki koluka Biblia. Likambo ya kokamwa ndeko na ye ayebisaki ye ete autaki kosomba Biblia moko ya monɔkɔ ya Géorgien mpe akosepela kokabela ye Biblia yango.

Ntango Badri azongaki na ndako, afandaki na mesa mpe atángaki Biblia tii butu. Ntango alamukaki mokolo oyo elandaki akobaki kotánga. Ntango nautaki mosala nakutaki ye afandi na mesa mpe azali kaka kotánga Biblia. Azalaki kokoka kotika kotánga yango te! Napesaki ye likanisi ete azwa mwa mikolo oyo akokende mosala te mpo asilisa kotánga yango. Eumelaki te, asilisaki kotánga Biblia mobimba.

Na nsima ntango tobandaki koyekola na ndeko Barnadze na buku Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko, tosepelaki ndenge tozalaki na Biblia na biso moko. Makambo etambolaki malamu mpo ye azalaki na Biblia te, biso mpe tozalaki na buku Solo te! Soki mbula moko na nsima, ngai na Badri tozwaki batisimo.

Marina ná Badri Kopaliani
    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto