Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yb17 nk. 169-170
  • Bato ya Kurde bayambi solo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bato ya Kurde bayambi solo
  • Buku ya mobu 2017 ya Batatoli ya Yehova
Buku ya mobu 2017 ya Batatoli ya Yehova
yb17 nk. 169-170
Ndeko mwasi moko azali koyekola na mwasi moko na monɔkɔ ya Kurde

GÉORGIE

Bato ya Kurde bayambi solo

NDEKO Gulizar alobi boye: “Mbala na mbala, nayebisaka Yehova na libondeli ete nazali na botɔndi mingi ndenge nazwá libaku ya koyekola solo na monɔkɔ na ngai ya mboka.”

Ndeko Gulizar azalaki koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova banda mbula 8, kasi azwaki batisimo kaka ntango akómaki koyangana na makita na Kurde, monɔkɔ na ye ya mboka. Azali moko ya bandeko ebele ya Kurde oyo bayambaki solo na Géorgie na bambula euti koleka. Kasi, bato ya Kurde bazali banani?

Bato ya Kurde bafandaka na Moyen-Orient banda bankama ya bambula. Bato mosusu ya mayele balobaka ete bazali bakitani ya Bamede ya kala oyo Biblia elobeli. (2 Bak. 18:11; Mis. 2:9) Monɔkɔ na bango ezali na molɔngɔ ya minɔkɔ ya ekólo Iran.

Lelo oyo, bamilio ya bato ya Kurde bafandaka na bikólo ndenge na ndenge, na ndakisa Arménie, Iran, Iraq, Syrie mpe Turquie. Na Géorgie, bato ya Kurde bazali soki 20 000. Mingi na bango babangaka Nzambe mpe bazalaka na limemya mingi mpo na makambo ya Nzambe.

Lelo oyo, bato ya Kurde oyo bazali basakoli na Géorgie bazali 500, mpe masangá ya monɔkɔ ya Kurde ezali misato. Na 2014, bandeko basepelaki mingi ntango liyangani ya etúká ya liboso na monɔkɔ ya Kurde esalemaki na Tbilissi, mpe bandeko bautaki na Allemagne, Arménie, Turquie mpe Ukraine.

Bana bazali kosepela na bavideo ya Caleb ná Sofia na monɔkɔ ya Kurde
    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto