Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 183
  • Biblia elobi nini na likambo etali boninga?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia elobi nini na likambo etali boninga?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Nini esalaka moto azala moninga ya malamu?
  • Bandakisa nini ya boninga ya malamu oyo Biblia elobeli?
  • Moto akoki kozala moninga ya Nzambe?
  • Ndenge ya kobatela boninga na mokili oyo ezangá bolingo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masese 17:17​—“Moninga alingaka ntango nyonso”
    Ndenge bavɛrsɛ ya biblia elimbolami
  • Okoki kozala na boninga oyo ekoumelaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Poná baninga oyo balingaka Nzambe
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 183
Baninga ya mbula ndenge na ndenge bafandi pene ya mɔtɔ. Moko na bango azali kobɛta gidare.

Biblia elobi nini na likambo etali boninga?

Eyano ya Biblia

Kozala na baninga ekoki kosala ete moto azala na esengo mpe asepela na bomoi. Baninga ya malamu basalisanaka mpe bapesanaka makasi.​—Masese 27:17.

Nzokande, Biblia emonisi ntina oyo tosengeli kokeba ntango tozali kopona baninga na biso. Emonisi biso ete kozala na baninga ya mabe ebimisaka mpasi. (Masese 13:20; 1 Bakorinti 15:33) Baninga ya ndenge wana bakoki kotinda moto azwa bikateli ya mabe to kobebisa bizaleli na ye ya malamu.

Na lisolo oyo tokolobela:

  • Nini esalaka moto azala moninga ya malamu?

  • Bandakisa nini ya boninga ya malamu oyo Biblia elobeli?

  • Moto akoki kozala moninga ya Nzambe?

  • Bavɛrsɛ ya Biblia oyo elobeli boninga

Nini esalaka moto azala moninga ya malamu?

Biblia eteyaka ete boninga ya malamu esengeli kosimbama na eloko moko ya makasi mpenza koleka makambo oyo bosepelaka na yango. Na ndakisa, Nzembo 119:63 elobi: “Nazali moninga ya baoyo nyonso babangaka yo,a mpe ya baoyo bazali kobatela bitinda na yo.” Simbá ete mokomi ya Biblia alobi ete aponaki baninga oyo babangaka kosala makambo oyo esepelisaka Nzambe te mpe oyo balingaka kotosa mibeko na ye.

Biblia emonisi mpe bizaleli oyo moninga ya malamu asengeli kozala na yango. Na ndakisa:

  • “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.”​—Masese 17:17.

  • “Baninga mosusu balukaka kosalana mabe, kasi moninga mosusu akangamaka makasi koleka ndeko.”​—Masese 18:24.

Bavɛrsɛ yango ezali koteya biso ete moninga ya malamu azalaka sembo, azalaka na bolingo, na boboto, mpe akabaka. Tokoki kotyela moninga ya malamu motema ete akosalisa biso na ntango ya mpasi. Moninga ya solosolo akozala mpe na mpiko ya kokebisa biso ntango tolingi kolanda nzela ya mabe to soki tolingi kozwa ekateli moko ya mabe.​—Masese 27:6, 9.

Bandakisa nini ya boninga ya malamu oyo Biblia elobeli?

Biblia ezali na bandakisa ya boninga ya malamu kati na bato oyo bazalaki na bambula ekeseni, bautaki na bisika ekeseni, bazalaki mimeseno ekeseni mpe bokonzi ekeseni. Tólobela boninga misato ya ndenge wana.

  • Ruta ná Naomi. Ruta azalaki mwasi ya mwana ya Naomi, mpe ekoki kozala ete Naomi azalaki mokolo ya Ruta ya bambula mingi mpenza. Longola yango, mimeseno ya mboka oyo Ruta autaki ekesanaki na oyo ya Naomi. Atako bongo, bazalaki na boninga ya penepene mpe ya makasi mpenza.​—Ruta 1:16.

  • Davidi ná Yonatane. Atako Yonatane azalaki mokolo ya Davidi ya bambula 30, Biblia elobi ete “molimo ya Yonatane ekanganaki na molimo ya Davidi.”​—1 Samwele 18:1.

  • Yesu ná bantoma na ye. Yesu azalaki na bokonzi likoló ya bantoma na ye, azalaki molakisi mpe nkolo na bango. (Yoane 13:13) Kasi azalaki kotalela bango te lokola nde babongi te kozala baninga na ye. Kutu, Yesu azalaki moninga ya motema ya baoyo bazalaki kosalela mateya na ye. Alobaki boye: “Nabengi bino baninga, mpo makambo nyonso oyo nayoki epai ya Tata na ngai, nayebisi bino yango.”​—Yoane 15:14, 15.

Moto akoki kozala moninga ya Nzambe?

Moto akoki kozala moninga ya Nzambe. Biblia elobi: ‘Nzambe azali moninga ya motema ya bato ya kolongobana.’ (Masese 3:32) Na maloba mosusu, Nzambe azalaka moninga ya baoyo bazalaka na bizaleli malamu, bazalaka sembo, bazalaka na etamboli ya malamu, mpe basalaka makasi ya kotosa mibeko na ye na oyo etali malamu mpe mabe. Na ndakisa, Biblia ebengi Abrahama moninga ya Nzambe.​—2 Ntango 20:7; Yisaya 41:8; Yakobo 2:23.

a Bavɛrsɛ mosusu oyo ezali likoló mpe na nse ya vɛrsɛ yango emonisi ete “yo” oyo vɛrsɛ yango elobeli ezali kolakisa Nzambe.

Bavɛrsɛ oyo elobeli boninga

Nzembo 119:63: “Nazali moninga ya baoyo nyonso babangaka yo, mpe bazali kobatela bitinda na yo.”

Ndimbola: Tosengeli kopona baninga oyo tozali na bango bindimeli moko mpe oyo balingaka kotosa mibeko ya Nzambe.

Masese 3:32: “Mpo moto ya mbilingambilinga azali eloko moko oyo Yehova ayinaka, kasi ye azali moninga ya bato ya kolongobana.”

Ndimbola: Baoyo balingi kozala baninga ya Nzambe basengeli koboya bizaleli ya mabe mpe kozala na bomoi ya bato oyo babangaka Nzambe.

Masese 13:20: “Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokoma na bwanya, kasi ye oyo azalaka na boyokani na bazoba akosuka mabe.”

Ndimbola: Baninga bakoki kotinda yo osala makambo ya malamu to ya mabe.

Masese 17:17: “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.”

Ndimbola: Moninga ya solosolo azali moto oyo tokoki kotyela motema ezala na ntango ya bisengo mpe na ntango ya mpasi.

Masese 18:24: “Baninga mosusu balukaka kosalana mabe, kasi moninga mosusu akangamaka makasi koleka ndeko.”

Ndimbola: Moninga ya solosolo akoluka te kobuba moto atyelaka ye motema. Kasi moninga ya solosolo azalaka sembo, abongi kotyelama motema, mpe azalaka na bolingo.

Masese 27:6: “Bampota oyo moto oyo azali kolinga azokisi yo ezali sembo.”

Ndimbola: Moninga ya malamu amipekisaka te kopesa moto toli soki esengeli.

Masese 27:17: “Ebende epelisaka ebende. Ndenge moko mpe moto angengisaka elongi ya moto mosusu.”

Ndimbola: Baninga ya malamu basalisanaka mpe bapesanaka makasi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto